Likita Linene
Lolenge nini Bonganganzambe Epambolaka Bilenge
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Lolenge nini Bonganganzambe Epambolaka Bilenge

Topesami libaku ya kosala lokola banjelu, koteya nsango malamu na mikili nyonso ya mabele, mpe kosunga milimo miya epai na Klisto.

Bandeko mibali mpe basi, nazali na botondi mpenza ya kolobela bino na molulu monene na mpokwa oyo na ntina ya likabo ya bule ya bonganganzambe mpe nguya na yango ya kokamwa mpo na kopambola bilenge na eleko oyo. Nabondeli ete atako bozangi bobonginie na ngai, Molimo ekosunga ngai nateya bosolo.

Bokambi ya Yambo ekundolisaki bamemi ya Bonganganzambe ya Alona ete “bozali kobika na mokolo moko ya mabaku mpe bitumba minene, mokolo moye wapi bonganganzambe ezongisami lisusu. Bozali na nguya ya kopesa makuli ya Bonganganzambe ya Alona. Soki bosambeli makasi mpe bosaleli na nguya wana ntango bolongobani, bokopambola mingi koleka bomoi ya baye bazali nzinganzinga na bino.” 1 Lokola bilenge mibali mpe bilenge basi ya Eklezia, tozali lisusu kokundolisa biso banso ete tozali “bana [ya bolingo] ya Nzambe, mpe Ye azali na mosala mpo na [biso] kosala” 2 mpe tozali kosunga na mosala na Ye ya “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Moses 1:39

Bonganganzambe ezali nguya ya kosala makuli mpe mayokani ya nsango malamu ya Mobikisi na baye balongobani mpo na kozwa yango. Na nzela ya makuli oyo ya bonganganzambe mpe mayokani ya bule mapamboli matonda ya Bomikabi ya Mobikisi mayaka, maye esungaka biso tokokisa nsuka na biso ya bonzambe.

Joseph Smith azalaki elenge moko oyo abiangemaki na Nzambe mpo na kozongisa nsango malamu ya Yesu Klisto mpe, mpo na ntina wana, apesamaki bonganganzambe oyo asalelaki mpo na kopambola molongo mobimba. Doctrine et Alliances 135 etangi mingi ya mapamboli maye Joseph apesaki na bilenge ya eleko oyo. Totangi: “Joseph Smith … asali mingi, longola kaka Yesu, mpo na lobiko ya bato na mokili oyo, koleka bato nionso basusu oyo basila kotikala koya kati na yango. … Ye abimisaki Buku ya Mormon … ; atindaki litondi ya nsango malamu ya seko … na biteni minei ya mabele; abimisaki bimoniseli mpe mitindo oyo esali [Buku] ya Malongi mpe Mayokani … ; asangisaki mingi ya bankota ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, … Mpe atikaki lokumu mpe nkombo moko oyo ekoki te kokweya” (Doctrine et Alliances 135:3

Mpo na kosalela mpenza lokola kaka Joseph asalaki, tosengeli kolonga na kosalelaka nguya ya bonganganzambe ya Nkolo. Ntango ya bobongoli Buku ya Mormon, Joseph Smith mpe Iliver Cowdery balukaki kobatisama, kasi bazangaki likoki oyo esengelami. Na mokolo ya 15, sanza na mitano, 1829, bafukamaki na losambo mpe Yoane Mobatisi ayaki kotala bango, mpe apesaki bango bafungola mpe nguya ya Bonganganzambe, kolobaka: “Likolo na bino baninga na ngai basali, na nkombo ya Masiya napesi Bonganganzambe ya Alona, oyo ezali na bafungola ya mosala ya banzelu, mpe ya nsango malamu ya boyamboli, mpe libatisi na bozindisi na mai mpo na bolimbisi ya masumu” (Doctrine et Alliances 13).

Topesami libaku ya kosala lokola banjelu, koteya nsango malamu na bamboka nionso ya mabele, mpe kosunga milimo eya epai na Klisto. Mosala oyo etie biso na kosangana na mosala elongo na Yoane Mobatisi, Moroni, Joseph Smith, Mokambi Nelson, mpe basali nionso ya molende ya Nkolo.

Mosala na biso kati mpe elongo na bonganganzambe na Ye esangisibiso baye nionso bamipesimpo na kolanda mpe kosalela mateya ya Nkolo na semba na yango mpenza, oyo ngai moko nayebi ete ekoki kozala mpasi ntango tokutani na mikakatano ya bilenge. Kasi soki tosangani na bandeko basali wana ya Nkolo na kokokisaka mosala na Ye ekosunga kopesa biso makasi ya kobundisa mimekano mpe lokuta ya monguna Bino bokoki kozala likonziya pole mpo na baye bazangi elikya mpo na bango moko. Pole kati na bino ekongenga makasi ete moto nionso okokutana na ye akopambolama kaka mpo na kozalaka elongo na bino. Ekoki kozala mpasi mpo na kondima ete tozali elongo na baninga na biso ya molimo, kasi nazali na botondi ya koyeba ete nazali moko ya bandeko ya sembo kati na lisanga likoki ya bonganganzambe , elongo na bango nakoki kosala mpo na kokola pembeni ya Klisto.

Elongo na baninga mpe libota na biso, Molimo Mosantu azali moko ya baninga na biso ya sembo mpe ya kotiela motema koleka banso. Kasi mpo na kobengisa ye azala moninga na biso ya ntango nyonso, tosengeli komitia biso moko na bizalela mpe bisika epai wapi Ye akolinga kozala wana. Yango ekoki kobanda na bandako na biso moko, ntango tokomisi yango bisika moko bisantu na kosanganaka na boyekoli ya makomi mokolo na mokolo mpe ntango tosambeli lokola libota mpe, ya motuya koleka, ntango toyekoli makomi biso moko mpe tosambeli mpo na biso moko.

Elilingi
Enzo mpe ndeko na ye ya mwasi
Elilingi
Enzo mpe libota na ye

Na ebandeli ya mobu oyo, napesamaki elongo libaku moko ya kosepela mpe ya komikitisa mpo na kosunga leki na ngai ya moke ya mwasi, Oceane, akoba na nzela ya liyokani na koyambaka libiangi ya kobatisama mpe kokokisa moko ya mitindo esengami mpo na kokota na bokonzi ya selesitiale. Ye atindikaki libatisi na ye nsima ya sanza moko lisusu, kino nabiangemaki nganganzambe, kopesaka ngai libaku ya kobongisa bokuli ntango bandeko na biso ya basi basusu bazuaki lisusu litomba ya kosala na nse ya mosala ya bonganganzambe mpe kotelema lokola banzeneneke. Ntango totelemaki na ngambo mosusu ya esika ya libatisi, mpe abongamaki mpo na kokota na mayi, namonaki bosepeli na ye, ntango yango ekutanaki na oyo ya ngai. Mpe namiyokaki kati na bomoko na ye, komonaka ete ye azali kozwa mokano ya sembo. Libaku oyo ya kosalela bonganganzambe esengi ngai kozala na bokebi koleka mpe koboya bomoto ya mpamba mpambana bomoi na ngai ya kosalela nsango malamu. Na ntina ya komilengela, nakendaki na tempelo mokolo na mokolo na mposa wana, na lisungi ya mama, nkoko ya mwasi, mpe ndeko ya mwasi, kosala mabatisi mpo na bawei.

Likambo yango eteyaki ngai mingi koleka na ntina ya bonganganzambe mpe lolenge nini nakokaki kosalela yango na kolongobana. Nayebi ete bamemi banso ya bonganganzambe bakoki koyoka makambo moko oyo nayokaki soki tolandi Ndakisa ya Nefi ya “kokende mpe kosala” (tala 1 Nefi 3:7). tokoki te kofanda na botawu mpe kozela Nkolo kosalela biso na mosala na Ye monene. Tosengeli te kozela mpo na baye bazali na mposa na biso baya koluka biso: yango ezali mosala na biso lokola bamemi ya bonganganzambe kozala ndakisa mpe kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe. Soki tozui mikano oyo ezali kopekisa bokoli na biso na nzela ya boseko, tosengeli kobongwana sikawa. Satana akosala makasi na ye mpo na kobomba biso na ezalela ya mosuni ya kolukaka bilengi ya mpamba mpamba. Kasi nayebi ete soki totie molende, koluka banani bakosunga biso, mpe toyamboli mokolo na mokolo, eyano ya mapamboli ekozala bikamwa mpe bomoi na biso ekozala ya kobongwana libela na libela soki tokeyi liboso na nzela ya liyokani

Nayebi ete oyo ezali Eklezia ya solo Yesu Klisto mpe apesa bafongola ya bonganganzambe na Bapostolo na Ye, oyo basaleli yango mpo na kotambuisa biso, mingimingi na mikolo oyo ya batumba, mpe kobongisa mokili mpo na bozongi na Ye.

Natatoli ete Joseph Smith azalaki profeta ya Bozongisi mpe ete Mokambi Nelson azali profeta na bomoi lelo. Nabengisi bato nionso koyekola babomoi ya bakumbi bonganganzambe minene mpe toluka komibongisa bisomoko mokolo na mokolo na ntina ete tokoka komilengela mpo na kokutana na Mokeli na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Bokambi ya Yambo, na Fulfilling My Duty to God (booklet, 2010), 5.

  2. Mpo ya lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona, na kati ya Mokanda Monene: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 10.1.2, ChurchofJesusChrist.org.