Likita Linene
Kozwa Ekimelo uta na Mipepe Makasi ya Bomoi
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Kozwa Ekimelo ya Bikumbaki ya Bomoi

Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye ezali ekimelo oyo biso banso tosengeli, atako mipepe makasi ezali koningisa bomoi na biso.

Soki tozongi nsima na katikati ya mibu ntuku libwa, na mibu na ngai na universite, nazalaki moko ya Kompani ya Minei ya na Departema ya Babundeli ya Moto na Chili. Ntango nazalaki kosala kuna, nafandaki na nganda ya baundeli ya moto lokola moko ya bakengeli ya butu. Penepene ya nsuka ya mobu wana, balobelaki ngai ete nasengelaka kozala na nganda ya moto na Ebandeli ya Mobu ya Sika mpamba te na mokolo wana makama ezalaka penepene ntango inso. Nasutukaki, mpe nayanolaki, “Ya solo?”

Malamu, namikundoli kozelaka elongo na baninga na ngai ya mosala ntango, na katikati ya butu, bapetard ebandaki kobeta na kati ya Santiago. Tobandaki koyambana na kotombelaa ya mobu ya sika bamoko na basusu. Na mbalakaka ngonga na nganda ya moto ebandaki kobeta, kolakisaka ete likama ya kozela te ezalaki. Tokamataki bibundeli na biso mpe tomataki na motuka ya moto. Na nzela na biso na epai ya likama, ntango tolekaki ebele ya bato kokembelaka mobu ya sika, namonaki ete etalaki bango mingi mpenza te. Bazalaki na bokebi te kosepelaka butu ya eleko ya molunge. Kasi esika moko mpembeni na wana, bato tozalaki kokende mbangu mpo na kosalisa bazalaki na mobulu ya makasi.

Likambo oyo esalisaki ngai nasosola ete atako bomoi na biso ekoki ntango mosusu kozala mwa kimia, ngonga ekoya mpo na moko na moko na biso ntango tokokutana na mikakatano tozelaki te mpe mipepe makasi oyo ekopusa biso na ndelo ya makoki na biso ya kokanga motema. Mikakatano ya nzoto, mayele, libota, mpe mosala; makama ya mokili; mpe makambo mosusu ya bomoi to liwa ezali bandakisa mosusu ya mipepe ya makasi oyo tokutana na yango ya bomoi oyo

Ntango tokutanaki na mipepe makasi oyo, mbala mingi toyokaka bozangi elikia mpe bobangi. Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Bondimi ezali nkisi ya bobangi”—bondimi na Nkolo na biso Yesu Klisto (“Let Your Faith Show,” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 29). Ntango namoni mipepe makasi oyo ebetaka bomoi ya bato, nasukisi ete ata lolenge kani ya mopepe ezali koningisa biso—kotalaka te soki ezali na eyano na yango to soki ezali na nsuka liboso—ezali na ekimelo moko kaka, mpe ezali yango kaka mpo na ndenge nyonso ya mipepe. Ekimelo se moko oyo epesamaki na Tata na biso ya Lola ezali Nkolo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

Moko te na biso azangi kokutana na bikumbaki. Elamani, profeta moko ya Buku ya Mormon, ateyaki biso lokola elandii: “Bomikundola ete ezali na likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana mobali ya Nzambe, ete bosengeli kotonga moboko na bino; ete ekotinda zabulu mipepe makasi na ye, iyo, makula na ye na mopepe ya kaina, iyo ekobete mvula nyonso ya mabanga na ye mpe moketi makasi na ye likolo na bino mpo ya kobenda bino na nse na libulu ya bobola mpe lisumu ezanga nsuka, na ntina ya libanga likolo na yango botongami, oyo ezali nse moko wapi soki bato batongi bakoki te kokweya” ((Elamani 5:12).

Mpaka Robert D. Hales, oyo akutanaki ye moko na mipepe makasi, alobaki: “Mpasi ezali mpo na banso; kasi lolenge tokopesaka biyano na mpasi ezali ya moto na moto. Mpasi ekoki kozwa biso na moko ya banzela mibale. Ekoki kozala likambo ya kolendisa mpe kopetola esangani na bondimi, to ekoki kozala nguya ya kobebisa bomoi na biso soki tozali na bondimi te na libonza ya bomikabi ya Nkolo” (“Your Sorrow Shall Be Turned to Joy,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 1983, 66).

Mpo na kosepela na ekimelo oyo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye epesaka, tosengeli kozala na bondimi na Ye—bondimi moko oyo ekopesa biso nzela ya kotombwama likolo ya mpasi ya bomoni moko etiama ndelo ya mabele. Ye alakaki ete Ye akokomisa bozito na biso pepele soki toyei epai na Ye na nionso oyo tosalaka.

“Boya epai na ngai,” Ye alobaki, “bino banso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.”

“Bozwa nkanga na ngai likolo na bino, mpe boyekola epai na ngai; mpo nazali moto ya boboto mpe motema kokita: mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.

“Mpo nkanga na ngai ezali pete, mpe mokumba na nga ezali pepele” (Matai 11:28–30; tala lisusu Mosiya 24:14–15).

Elobamaki ete “na moto oyo azali na bondimi, ndimbola ezali na ntina te. Na moto azangi bondimi, ndimbola moko te ekoki kopesama.” (Esakola oyo balobaki elobamaki na Thomas Aquinas kasi ezali solo maloba mazangi maanisi uta na makambo ye ateyaki.) Nzokande, tozali na bososoli ya mokuse ya makambo oyo eyaka awa na mabele, mpe mbala mingi tozwaka te biyano na motuna ya mpo nini. mpo na nini yango esalemi? Mpo na nini oyo ekomeli ngai? Nini nasengeli koyekola? Ntango biyano bizangi biso, yango ezali ntango maloba elobamaki na Mobikisa na biso na Profeta Joseph Smith na Liberty Jail ekokisami mobimba:

“Mwana na ngai, kimia ezala na kati ya molimo na yo; mitungisi na yo mpe mawa na yo ekozala kaka na ntango moke;

“Mpe nsima, soki otieli yango molende malamu Nzambe akonetola yo na likolo” (Malongi mpe Mayokani 121:7–8

Atako bato mingi ya solo bandimaka na Yesu Klisto, motuna ya motuya ezali soki biso tondimelaka Ye mpe soki biso tondimelaka makambo oyo Ye ateyaka biso mpe asengaka biso kosala. Ntango mosusu moto moko akoki kokanisa, “Nini Yesu Klisto ayebi na oyo ezali koyela ngai? Lolenge nini Ye ayebaka maye nasengeli mpo nazala na esengo?” Ya solo, ezalaki Mosikoli mpe Mosambeli na ye profeta Yisaya azalaki kolobela ntango alobaki:

“Ye atiolamaki mpe aboyamaki na bato; moto wa mawa mpe amesanaki na mpasi;

“Solo akumbi mpasi na biso, mpe amemi mawa ma biso. …

“Kasi azokisami mpo na masumu na biso, atutami mpota mpo ya mabe ma biso; etumbu oyo eyeiseli biso kimia etiami epai na ye; mpe na mapipi na ye, biso tobikisami” (Yisaya 53:3–5).

Apostolo Petelo ateyaki biso na ntina ya Mobikisi, kolobaka, “Ye moko akumbaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza kuna na nzete, ete awa esili biso kokufela masumu, tozala na bomoi mpo na boyengebene. Tobiki na mapipi na ye” (1 Petelo 2:24).

Atako ngonga Petelo amipesaki lokola maritiru ye moko ebelemaki, maloba na ye etondisami na bobangi to mabe te; kasi, ye ateyaki Basantu na “kosepela,” atako bazalaki “na bozito na kati ya masengenia ya ndenge na ndenge.” Petelo apesaki biso toli mpo na komikundola ete “momekano ya [biso] bondimi, … atako emekami na moto,” ekokamba na “bosanzoli mpe lokumu mpe nkembo na bobimi ya Yesu Klisto” mpe mpo na “lobiko ya [biso] milimo” (1 Petelo 1:6–7, 9).

Petelo akobaki:

“Balingami, mpo na moto ya monyoko mozali kokomela bino lokola emekeli, bokamwa te pela moko soko ekamwiseli ezali kokwela bino:

“Kasi motindo mosusu, bosepela ete bozali kosangana na mpasi na Klisto ete bosepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na ye” (1 Peter 4:12–13).

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete “Basantu bakoki kosepela na nse ya makambo manso. … Ntango totie makanisi na bomoi likolo ya moango ya lobiko ya Nzambe … mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo kotalaka te oyo ezali kosalema—to kosalama te—na bomoi na biso. Esengo eyaka uta mpe mpo na Ye. Azali liziba ya esengo nionso” (“Joy and Spiritual Survival,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 82).

Na ntembe te, ezali pete mingi ya koloba makambo oyo ntango tozali na kati ya mipepe makasi te mpo na kotosa mpe kosalela yango na ntango ya mipepe makasi. Kasi lokola ndeko na bino ya mobali, nalikii bokoki koyoka ete ya solo nalingi kokabola na bino lolenge nini ezalimotuya ya koyeba ete Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye ezali ekimelo oyo biso banso tosengeli, atako mipepe makasi. ezali koningisa bomoi na biso.

Nayebi ete tozali banso bana na Ye, ete Ye alingi biso, mpe ete tozali biso moko te. Nabengisi bino mpo na koya mpe komona ete Ye akoki kolembisa bozito na biso mpe kozala ekimelo bozali koluka. Boya mpe bosunga basusu bamona ekimelo oyo bozali kolelela. Boya mpe botikala elongo na biso na ekimelo oyo, oyo ekosalisa bino botelemela mipepe makasi ya bomoi. Ezali na ntembe te na motema na ngai ete soki boyei, bokomona, bokosalisa, mpe bokotikala.

Profeta Alama atatolaki boye na mwana na ye ya mobali Elamani: “Nayebi ete baye banso bakotia elikia na bango na Nzambe bakosalisama o mikakatano mya bango, mpe mobulu mwa bango, mpe matungisi ma bango, mpe bakotombolama likolo o mokolo mwa nsuka” (Alama 36:3

Mobikisi Ye moko alobaki:

“Tika mitema mya bino milendisama … ; mpe mosuni nionso ezali na maboko ma ngai; bozala na kimia mpe boyeba ete nazali Nzambe. …

“Yango wana, bobanga te ata kutu liwa; mpo na mokili oyo esengo na bino ekozala ya kotonda te, kasi na ngai esengo na bino ezali ya kotonda” (Doctrine et Alliances 101:16, 36).

Loyembo “Zala kimia, Molimo mwa Ngai,,” oyo esimbaki motema mwa ngai mbala mingi, ezali na nsango moko ya bolendisi mpo na milimo na biso. Maloba malobi boye:

Zala kimia, molimo mwa ngai: ngonga ezali kowelisa mpenza

Ntango tokozala libela elongo na Nkolo,

Ntango nkele, motungisi, mpe bobangi ekosila,

Mawa ebungi, bisengo ya peto ya bolingo ezongisami.

Zala kimia, molimo mwa ngai: Ntango mbongwana mpe mpizoli eleki,

Banso na bokengi mpe topambolami tokokutana na nsuka. (Nzembo, no. 272).

Ntango tokutani na mipepe makasi ya bomoi, nayebi ete soki tosali makasi koleka manso tokoki mpe totieli Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye motema lokola ekimelo na biso, tokopambolama na libondisi, bolendisi, bokasi, boboto, mpe kimia oyo tozali koluka, na bosolo na mitema na biso ete na nsuka ya ntango na biso awa na nse, tokoyoka maloba ya Moteyi: “Malamu, mpe ozali mowumbo ya sembo:yingela na esengo ya Nkolo na yo” (Matai 25:21). Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.