Likita Linene
Kogangaka Ozana
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Kogangaka Ozana

Sikawa, bandeko balingami mibali mpe basi, na ntango oyo tozali kokembela Limoni ya Yambo ya Tata mpe Mwana, toyokaki ete ekozala malamu kosepela elongo na kogangaka Ozanna.

Konganga oyo ya bule esalamaki mbala ya yambo na eleko oyo na bobulisi ya Tempelo ya Kirtland na sanza ya misato, mokolo ya 27, 1836. Ezali kosalama sikawa na bobulisi ya tempelo moko na moko. Ezali lokumu ya bule epai ya Tata mpe Mwana, elembo ya eyano ya bibele ya bato ntango Mobikisi asalaki bokoti na Ye ya elonga kati na Yelusaleme. Ezali kondimisa lisusu maye elenge Joseph akutanaki na yango mokolo wana na zamba ya Bule—mingi mingi, ete Tata mpe Mwana bazali Bikelamu ya nkembo oyo tokumbamelaka mpe tosanzolaka.

Nakolakisa sikawa lolenge Koganga Ozana epesamaka. Wana ezali ngai kosala, nabengisi baninga na biso ya mosala na media basala yango na bokebi ya bule mpenza oyo na lokumu mpe limemia.

Moko na moko oyo azali awa azwa moswale ya mpembe, kosimbaka na songe moko, mpe kopepa yango na bomoko, “Ozana, Ozana, Ozana epai ya Nzambe mpe Mwana Mpate,” kozongelaka mbala misato, elandisami na “Amene, Amene, mpe Amene.” Soki ozali na muswale ya mpembe te, okoki na pete kopepa loboko na yo.

Bandeko mibali mpe basi, sikawa nabengisi bino botelema mpe boloba elongo kogangaka Ozana, nsima na yango Kantiki ya Ozana mpe “Molimo ya Nzambe”1 ekoyembama.

Na elembo uta na motambwisi, tosengi bosangana na koyembaka “Molimo ya Nzambe.”

Ozana, Ozana, Ozana epai ya Nzambe mpe Mwana na Mpate.

Ozana, Ozana, Ozana epai ya Nzambe mpe Mwana na Mpate.

Ozana, Ozana, Ozana epai ya Nzambe mpe Mwana na Mpate.

Amene, Amene, Amene.

Matangi

  1. Kantiki, no. 2.