Likita Linene
Yokela Ye
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2020


Yokela Ye

Tata na biso ayebi ete ntango tozingami mpembeni na bozangi elikya mpe bobangi, oyo ekosunga biso mingi koleka mpenza ezali koyokela Mwana na Ye.

Bandeko na ngai ba bolingo mibali mpe basi, natondisami na esengo ete na nzela ya tekinolozi tokaki kokutana elongo mpe kokumbamela na eyenga oyo na ntongo. Boniboni topambolami mpenza mpo na koyeba ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisami na mabele!

Na baposo mingi eleki, mingi na biso tokutanaki na mobulu na bomoi na biso moko. Boningani ya mabele, moto, mpela, makama, mpe malandi na yango ekotisi mobulu na mimesano mpe eboti bozangi bilei, biloko ya ya ntina, mpe misolo bambobaki.

Na kati ya manso maye, topesi bino longonya mpe totondi bino mpo na kopona koyoka liloba ya Nkolo na eleko ya Ntango oyo ya kilikili na kosanganaka elongo na biso mpo na likita linene. Komata ya molili oyo ezali kokende elongo na mikakatano ezali kosala ete pole ya Yesu Klisto engenga makasi koleka. Bokanisa kaka bolamu moko na moko na biso akoki kosala na ntango oyo mokili mobimba ezali koningana. Bolingo na bino mpe bondimi kati na Mobikisi ekoki malamu mpenza kozala mobandisi mpo ete moto moko amona Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Na basanza mibale eleki, Ndeko mwasi Nelson mpe ngai tokutanaki na bankoto ya bino bandimi na mokili mobimba. Tosangani elongo na bino kati na mabanda ya masano mpe kati na bandako ya mayangani manene ya hotele. Na bisika moko na moko, nayokaki ete nazalaki liboso ya baponami ya Nkolo mpe ete nazalaki komona bosangani ya Yisalaele kosalamaka liboso ya miso na ngai.

Tozali kati na mikolo oyo “bankoko na biso bazelaki mitema likolo liolo.” 1 Tofandaki na bakiti ya liboso mpo na kozala batemwe ya maye profeta Nefi amonaki bobele na limoni, ete “nguya ya Mwana ya Mpate ya Nzambe” ekokita “likolo ya bato ba boyokani ya Nkolo, oyo bapanzanaki likolo ya etando nyonso ya mabele; mpe balatisamaki na bibundele ya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo monene.” 2

Bino, bandeko na ngai mibali mpe basi, bozali kati na mibali, basi, mpe bana wana oyo Nefi amonaki. Kanisa yango!

Na ozangaka kotala wapi bofandi to bozali na nini, Nkolo Yesu Klisto azali ya bino Mobikisi, mpe profeta ya Nzambe Joseph Smith azali ya bino profeta. Akulisamaki liboso ya bokeli ya mabele mpo na kozala profeta ya eleko ya nsuka, ntango “eloko moko ekopekisama te” 3 na Basantu. Bimoniseli ezali kokoba kotambola uta na Nkolo na bozongisi oyo ezali kaka kokoba.

Elingi koloba nini mpo na yo ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisami na mabele?

Elingi koloba ete yo mpe libota na yo bokoki kokangisama elongo mpo na libela! Elingi koloba ete lokola obatisami na moko oyo azali na likoki uta na Yesu Klisto mpe okotisamaki mondimi ya Eklezia na Ye, okoki kozwa litomba ya kozwa Molimo Mosantu lokola moninga ya ntango nyonso. Akokamba mpe kobatela yo. Elingi koloba okotikala mokolo moko te na kozanga libondi to kozanga nzela ya koyingela na nguya ya Nzambe mpo na kosunga yo. Elingi koloba ete nguya ya bonganganzambe ekoki kopambola yo ntango ozali kozwa makuli mpe kosala mayokani elongo na Nzambe mpe ozali kobatela yango. Longo nini mpo na milimo na biso bosolo oyo ezali, mingi mingi na bantango oyo wapi mopepe ya makasi etomboki.

Buku ya Mormon elobeli botombwani mpe bokwei ya sivilizasio to bompenza mibale ya minene. Lisolo na bango elakisi lolenge nini na pete mingi ya bato babosanaka Nzambe, babwakaka makebisi ya baprofeta ya Nkolo, mpe balukaka nguya, bolingami, mpe bamposa ya mosuni. 4 Mbala na mbala, baprofeta ya kala basakolaki “ makambo manene mpe ma bokamwi epai ya bato, maye bato bandimaki te.” 5

Ekeseni te na mikolo na biso. Mibu mileki, makambo minene mpe ya kokamwa eyokami uta na bilobelo bibulisama na mabele mobimba. Atako bato mingi te bayambi bosolo oyo—ezala mpo bayebi wapi koluka yango, 6 to mpo bazali koyokela baoyo bazali na bosolo mobimba te, to mpo babwaki bosolo mpo na kolanda mokili.

Monguna azali mayele. Na bafunda ya mibu, azali kosala ete malamu emonana mabe mpe mabe emonana malamu. 7 Mateya na ye ezali koyokana makasi, ya mpiko, mpe ya lofundo.

Nzokande, bansango ya Tata na Lola ezali mpenza ya kokesana. Asololaka na pete, na kimia, mpe na pete moko mpenza ete tokoki kozanga kososola Ye te. 8

Ndakisa, ntango nyonso alakisi mwana na Ye ya Likinda epai ya bato ya kufa ya mabele, Asali yango na mwa maloba ya kosimba motema. Likolo ya ngomba ya Bobongwani epai ya Petelo, Yakobo, mpe Yoane, Nzambe alobaki, “Oyo Mwana na ngai na bolingo: boyoka ye.” 9 Maloba na Ye epai ya Banefi na Beboo ya kala ezalaki “Tala Mwana Molingami wa ngai, na ye nasepeli mingi, na ye nakembeli nkombo ya ngai, boyokela ye.” 10 Mpe epai ya Joseph Smith, na esakola oyo ya mozindo oyo efungolaki eleko oyo, Nzambe na pete nyonso alobaki, “Oyo azali Mwana na ngai wa Bolingo. Yokela Ye! 18

Sikawa, bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, bokanisa likambo oyo ete na mbala misato oyo kaka tolobeli, kaka liboso Tata alakisaki Mwana, bato oyo bakutanaki na likambo wana bazalaki na bobangi mpe, na ndelo moko bozangaki elikya.

Bapostolo babangaki ntango bamonaki Yesu Klisto kozingamaka na lipata na Ngomba ya Bobongwani.

Banefite babangati mpo bazalaki kati na libebi mpe molili mikolo mingi.

Joseph Smith azalaki na nkanga ya nguya moko ya molili kaka liboso ete balola efungwama.

Tata na biso ayebi ete ntango tozingami mpembeni na bozangi elikya mpe bobangi, oyo ekosunga biso mingi koleka mpenza ezali koyokela Mwana na Ye.

Mpo ntango toluki koyokela—koyokela ya solo—Mwana na Ye, tokokambama mpo na koyeba nini kosala na likambo nyonso kani.

Liloba ya yambo mpenza na Malongi mpe Mayokani ezali yokela 12 elingi koloba “koyoka na moano ya kotosa.” 13 Koyokela elingi koloba “koyoka Ye”—mpo na koyoka maye Mobikisi alobi mpe nsima kotia bokebi na toli na Ye. Na maloba mibale wana—“Yokela Ye”—Nzambe apesi biso ndakisa mpo na elonga , esengo, mpe bosepeli na bomoi oyo. Tosengeli koyokela maloba ya Nkolo, koyoka yango, mpe kotia bokebi na maye Ye ayebisaki biso!

Lokola tozali koluka kozala bayekoli ya Yesu Klisto, makasi na biso ya koyokela Ye esengeli kolekela makanisi ya kosala yango. Esengaka bokasi ya motema moko mpe ya ntango nyonso mpo na kokokisa bomoi na biso ya mokolo na mokolo, mateya na Ye, bosolo na Ye.

Tokoki kaka te kotia mitema na nsango tolokotaka beboo na media sosiale. Na bankoto ya funda ya maloba na Interneti mpe maye mokili etondi na marketing kobelelaka bokebi ya bato na makelele, bokasi mabe ya monguna, epai wapi ekoki biso kokenda mpo na koyokela Ye?

Tokoki kokende na makomi. Eteyaka biso Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, monene ya Bomikabi na Ye, mpe mwango monene ya esengo mpe bosikoli ya Tata na biso. Bomipesi ya mikolo na mikolo kati na liloba ya nzambe ezali ntina mpo na kobika ya molimo mingi mingi na mikolo oyo ya mobulu makasi. Ntango tozali kosala feti ya maloba ya Klisto mokolo na mokolo, maloba ya klisto ekolobela biso lolenge ya koyanola na mpasi oyo tokanisaki mokolo moko te tokokutana na yango.

Tokoki lisusu Koyokela Ye na tempelo. Ndako ya Nkolo ezali ndako ya boyekoli. Kuna Nkolo ateyaka na lolenge na Ye moko. Kuna, bokuli moko na moko eteyaka Mobikisi. Kuna, toyekolaka kofungola elamba mpe kosolola polele mingi koleka na lola. Kuna, toyekolaka lolenge nini kongangela monguna mpe kosalela nguya ya bonganzambe ya nkolo mpo na kolendisa biso mpe baye tolingaka. Boniboni moko na moko na biso asengelaki kozanga bompikiliki mpo na koluka ekimelo kuna.

Ntango bandelo ya ntango mokempo na COVID-19 ekolongolama, tosengi bokanisa kosala manaka ya mbala na mbala mpo na kokumbamela mpe kosala kati na tempelo. Miniti nyonso ya ntango wana ekopambola yo mpe libota na yo na banzela mingi lokola eloko moko te mosusu ekoki. Zwa tango ya komaniola maye oyoki mpe okanisi ntango ozali kuna. senga Nkolo ateya yo lolenge nini kofungola balola mpo naa kopambola bomoi na yo mpe bomoi ya baye olingaka mpe osalisaka.

Atako sikawa tokoki kokumbamela na tempelo te, nabengisi bino bobakisa makasi na bino ya kosala elongo na mambi ma kala ya libota, kompe lisusu boluki ya mambi ma kala ya libota mpe kokoma nkombo na masini. Nalaki ete ntango oobakisa ngonga na yo na mosala ya tempelo mpe ya mambi ma kala ya libota, okobakisa mpe okobongisa makoki na yo ya koyokela Ye.

Lisusu toyokelaka Ye na polele mingi ntango topetoli makoki na biso mpo na koyeba mamimisa ya Molimo Mosantu. Etikala lisengisi mokolo moko te ya koyeba lolenge Molimo elobelaka yo koleka lokola sikawa. Na Bonzambe, Molimo Mosantu azali motindami. Ye akomema makanisi na molimo na yo oyo Tata mpe Mwana balingi yo ozwa. Azali Molendisi. Akomema liyoki ya kimia na motema na yo. Akotatola na ntina ya bosolo mpe akondimisa yo maye mazami solo, ntango oyoki mpe otangi liloba ya Nkolo.

Nazongeli libondeli na ngai mpo ete osala maye manso ekosenga yo mpo na kobakisa makoki ya molimo mpo na kozwa emoniseli na yo moko.

kosalaka bongo ekosunga yo oyeba lolenge nini kokende liboso na bomoi na yo, nini kosala na bantango ya kpokoso, mpe lolenge nini kososola mpe kokima masenginia mpe lokuta ya monguna.

Mpe, na nsuka, tokoyokela Ye a ntango totie bokebi maloba ya baprofeta, bamoni, mpe bamonisi. Bapostolo babulisama ya Yesu Klisto batatolaka ntango nyonso na ntina na Ye. Balakisaka nzela ntango tozali kotambola na nzela ya kpokoso ya ya bomoi na biso ya kufa.

Nini ekosalama ntango oyoki na makanisi nyonso, oyokeli, mpe otie bokebi na maye Mobikisi alobi, mpe maye Azali koloba sikawa na nzela ya baprofeta na Ye? Nalaki ete okopambolama na nguya mosusu mpo na kolonga masenginia, bitumba, mpe bolembu ya bomoto. Nalaki makamwisi na libala, mikangano ya libota, mpe mosala na bino ya mokolo na mokolo. Mpe nalaki ete makoki ya koyoka bosepeli ekobakisama atako mobulu ebakisamii na bomoi na yo.

Likita linene oyo ya sanza ya minei 2020 ezali ntango na biso ya kokundola likambo moko oyo ebongolaki mokili. Lokola tozali komona na mosika bokundoli ya Limoni ya Yambo ya joseph Smith, Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale bamitunaki nini biso tokoki kosala mpo na kokundola na lolenge elongobani likambo oyo ya kokamwa.

Komonisama ya Nzambe oyo na bato ebandaki Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe eyebisaki eleko ya litondi ya ntango.

Tomitunaki soki tosengelaki kotonga likonzi. Kasi lokola totalelaki nguya ya libaku moko oyo ya lisitwale mpe na mokili mobimba ya Limoni wana ya Yambo, todinamaki na motema kotonga likonzi ya sima ya makasi to mabanga te kasi ya maloba—maloba ya limpompo mpe masakoli ya bule—makomama, ya kofinama na “bitando ya mabanga” kasi ya nyatamana na “bitando ya misuni” ya mitema na biso. 14

Kobanda Eklezia ebongisamaki, bobele masakoli mitano mabimisamaki, na ya nsuka kozalaka “Libota: Esakola na Mokili,” oyo etalisamaki na Mokambi Gordon B. Hinckley na 1995.

Sikawa lokola totaleli ntango monene oyo na lisitwale ya mokili mpe mokumba ya Nolo ya kosangisa Yisalaele oyo epanzanaki mpo na kolengela Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto, biso, Bakambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo zomi na Babale, tobimisi esakola oyo elandi. Nkombo na yango ezali “Bozongisi ya Litondi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto: Esakola ya Mibu Nkama Mibale na Mokili.” Ekomami na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka Na Sanza ya Minei ya Mobu 2020. Mpo na kolengela mokolo ya lelo, liboso na tiaki esakoli oyo na Zamba ya Bule, wapi Joseph Smith amonaki yambo Tata mpe Mwana.

“Tosakoli polele ete Nzambe alingaka bana na ye na bikolo nyonso ya mokili. Nzambe tata apesi biso mbotama ya bonzambe, bomoi oyo ya kokokanisa te mpe mbeka ya bomikabi ezanga nsuka ya Mwana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto. Nanguya ya Tata, Yesu asekwaki lisusu mpe azwaki elonga likolo ya liwa. Ye azali Mosikoli na biso, Ndakisa na biso, mpe Mosikoli na biso.

“Mibu nkama mibale eleki; na ntongo moko kitoko ya eleko moko ya milona na 1820, elenge Joseph Smith, kolukaka koyeba na eklezia nini asengelaki kosangana, akendaki na zamba penen na ndako na bango kosambela na etuka ya New York, USA. Azalaki na mituna na ntina ya lobiko ya molimo na ye mpe atiaki elikya ete Nzambe akolakisa ye.

“Kati na bomikitisi, tosakoli ete lokola eyano na losambo na ye, Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bamonanaki epai ya Joseph mpe babandaki ‘bozongisi ya makambo manso’ (Misala 3:21) lokola elobamaki na Biblia. Na limoni oyo, ye ayekolaki ete nsima ya liwa ya Bapostoo ya ebandeli, Eklezia ya Boyokani ya Sika ebungki na mabele. Joseph akozala ye oyo Nzambe akosalela mpo na bozongi na yango.

“Tondimi ete na nse ya bokambi ya Tata mpe ya Mwana, bantoma uta na lola bayaki kolakisa Joseph mpe azongisaki Eklezia ya Yesu Klisto. Yoane Mobatisi Mosekwi azongisaki likoki ya kobatisa na nzela ya bozindisi na mai mpo na bolimbisi ya masumu. Misato ya Bapostolo zomi na babale—Petelo, Yakobo, mpe Yoane—bazongisaki mosala ya bapostolo mpe bafungola ya likoki ya bonganganzambe. Basusu mpe bayaki, kotangaka Eliya, oyo azongisaki likoki ya kosangisa mabota esika moko mpo na libela na mokangano ya seko mosika koleka ntango ya liwa.

“Totatoli lisusu ete Joseph Smith apesamaki likabo mpe nguya ya Nzambe mpo na kobongola nkoma ya makomi ya kala—Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto. Na kati ya bankasa ya bule oyo tozali na lisolo ya mosala ya Yesu Klisto ye moko na kati ya bato ya Ndelo ya Westi ya mokili kala mingi te nsima ya Bosekwi na Ye. Ezali koteya ntina ya bomoi mpe kolimbola malongi ya listo, maye mazali na kati-kati ya ntina wana. Lokola moninga ya makomi ya Biblia, Buku ya Mormon etatoli ete bato nyonso bazali bana mibali to bana basi ya Tata ya bolingo na lola ete azali na moango ya bonzambe mpo ns bomoi na biso, mpe ete Mwana na Ye, Yesu Klisto, azali koloba lelo lokola [asalaki] na mikolo ya kala.

“Tosakoli ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka, ebongisamaki na mokolo ya 6, sanza ya minei, 1830, ezali Eklezia ya Klisto ezongisami ya Boyokani ya Sika. Eklezia oyo ekangisami na longo na bomoi ya bobongi nie ya mokonzi na yango oyo azali libanga ya nsuka, Yesu Klisto mpe na Bomikabi na Ye ezanga nsuka mpe Bosekwi na Ye na nzoto. Yesu abiangaki mbala moko lisusu Bapostolo mpe apesaki bango likoki ya bonganganzambe. Ye abengisi banso kati na biso koya epai na Ye mpe Eklezia na Ye, kozwa Molimo Mosantu, makuli ya lobiko, mpe kozwa esengo ya ntango molai.

“Mibu nkama mibale esili koleka banda Bozongisi ebandisamaki na Nzambe Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto. Funda ya bato basila koyamba boyebi ya makambo maye masakolamaki na mokili mobimba.

“Tosakoli na esengo nyonso ete Bozongis bolakelamaki ezali kokende liboso na nzela ya emoniseli na bokobi. Mabele ekozala soki moke te ndenge moko lisusu, mpo Nzambe ‘akosangisa biloko nyonso esika moko na Klisto’ (Baefese 1:10).

“Na limemia mpe botondi, biso lokola Bapostolo na Ye tobengisi banso bayeba—lokola toyebi—ete lola efungwami. Tondimi ete Nzambe azali koyebisa bolingi na Ye mpo na bana mibali mpe bana basi na Ye ya bolingo. Totatoli ete baoyo na nzela ya losambo bakoyekola nsango malamu ya Bozongisi mpe bakosala na bondimi bakopambolama mpo na kozwa litatoli na bango moko ya bonzambe mpe ya ntina na ye ya kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale elekama ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.” 15

Balingami bandeko mibali mpe basi oyo wana ezali bosakoli na biso ya nkama mibale ya mibu na mokili mpo na Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na litondi na yango. Esakola yango ebongolami na nkota 12. Nkota mosusu ekolanda kala mingi te. Ekozwama sika sikawa na site interneti ya Eklezia, epai wapi okoki kozwa kopi moko. Yekola yango yo moko mpe elongo na libota mpe baninga na yo. Manyola bosolo mpe kanisa nguya oyo bosolo yango ekozwa na bomoi na yo soki oyokeli yango, otie bokebi na yango, mpe omikebisi na mitindo mpe makuli maye ezali kotambola elongo na yango.

Nayebi ete Joseph Smith akulisami yambo ya mbotama profeta oyo Nkolo aponaki mpo na kofungola eleko oyo ya nsuka. Na nzela na Ye, Eklezia ya Nkolo ezongisamaki na mabele. Joseph akangaki litatoli na ye na makila na ye. Boniboni nalingaka mpe nakumisaka ye!

Nzambe azali na bomoi! Yesu azali Klisto! Eklezia na Ye ezongisami! Ye mpe Tata na Ye, Tata na biso na Lola, bazali kokengela biso. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.