2010–2019
Nkombo Ekoki ya Eklezia
Sanza ya Zomi 2018


Nkombo Ekoki ya Eklezia

Yesu Klisto atindi biso tobenga Eklezia na nkombo na Ye mpo ete yango ezali EklezianaYe, etondisami nanguya na Ye.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, na mokolo oyo kitoko ya Saba tosepeli na mapamboli ebele kowuta na Nkolo. Tozali na botondi mpenza mpo na matatoli na bino ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisami, mpo na mabonza bosalili ya kotikala to kozonga na nzela ya liyokani na Ye, mpe mpo na mosala na bino ya komipesa na Eklezia na Ye.

Lelo nayoki botindiki ya koloba na bino likambo moko ya ntina monene koleka Baposo mike eleki, nabimisaki liloba moko na oyo etali kobongisa elandi ya nkombo ya Eklezia.1 Nasali yango mpo ete Nkolo abendaki likolo ya makanisi na ngai na ntina ya motuya ya nkombo Ye apesaki mpo na Eklezia na Ye, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.2

Lokola bino bokoki komona, biyano na liloba yango lolenge ya botambuisi ebongisami lisusu3 esangisamaki. Ebele ya bandimi mbala moko babongisaki nkombo ya Eklezia na ba blogs mpe kati ya masolo ya internet na bango. Bamisusu bamitungisamaki mpo na nini, na oyo nyonso ezali koleka na mokili ebongaki kobeta nsete na eloko moko mpenza “ezangi litomba.” Mpe basusu balobaki yango ekokaki kosalema te, boye mpo na nini kutu komeka? Tika na nbola mpo na nini tozali kokeba na bozindo nyonso mpo na likambo yango. Kasi yambo tika ngai kolimbola nini bokasi oyo ezali te:

  • Yango ezali te mbonguana ya nkombo moko.

  • Yango ezali kobandela te.

  • Yango ezali eloko ya kopakola te

  • Yango ezali lofundu te.

  • Mpe Yango ezali kozanga mbano te.

Na esika, yango enotzali kobongisa. Yango ezali mobeko ya Nkolo. Joseph Smith apesaka te nkombo ya Eklezia ezongisami ye moko; ata kutu Mormon te. Ezalaki Mobikisi Ye moko oyo alobaki, “Mpo ete yango nkombo eklezia ekobengama na mikolo ya nsuka, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka.”4

Kutu kala te, na AD 34, ya biso Nkolo mosekui apesaki mobeko ekokani na bandimi ya Eklezia na Ye ntango Ye atalaki bango na ba America. Na ntango wana Ye alobaki:

“Bokobenga eklezia na nkombo na ngai. …

“Mpe boniboni ezala eklezia ya ngai longola se soko ebiangemi na nkombo na ngai? Mpo soko eklezia yoko ebiangemi na nkombo ya Mose, nde ezali eklezia ya Mose; to soko ezali na nkombo ya moto moko, nde ezali eklezia ya moto moko; kasi soko ebiangemi na nkombo ya ngai nde ezali eklezia ya ngai.”5

Sikawa, nkombo ya Eklezia ezali ya koyokana te. Ntango Mobikisi alobaki na polele nini nkombo ya Eklezia esengelaki kozala mpe kutu abandaki liloba na ye na, “Boye eklezia na ngai ekobengama,” Ye asalaki maseki te. Mpe soki topesi nzela na bakombo ya mibale ekoka kosalema to kondimama to kutu kosepela na bakombo wana ya nsima bisomoko, Ye ayoki pasi.

Nini ezali na kati ya nkombo to na likambo oyo, nkombo moko ya nsima? Ntango eye na nkombo ya nsima ya Eklezia, lokola “Eklezia BMN ,” moko “Eklezia ya Mormon,” to “Eklezia ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka,” eloko moko ya monene mingi na bankombo wana ezali kozangisa ya nkombo ya Mobikisi. Kolongola nkombo ya Nkolo uta na Eklezia ezali elonga monene mpo na Satana. Ntango biso tobuaki nkombo ya Mobikisi, biso na mbala mokotobuakisi nyonso oyo Yesu Klisto asala mpo na biso—kutu na Bomikabi na Ye.

Tala oyo uta na bomoni na Ye: Yambo ya Bokufi, Ye azalaki Yehova, Nzambe ya Kondimana na Kala. Na Nse ya botambuisi ya Tata na Ye, Ye azalaki Mokeli ya mokili oyo mpe mikili misusu.6 Ye aponaki komipesa na bolingi ya Tata na Ye mpe kosala makambo nyonso mpo na bana nyonso ya Nzambe oyo moto mususu akokaki kosala te! Kondimaka koya na mokili lokola Mwana Mobali se Moko ya Tata na mosuni, Ye na makasi nyonso afingamaki, atiolamaki, abuakelamaki soyi, mpe abetamaki mfibo. Na Elanga ya Getesemane, MobikisI na biso azuaki likolo na Ye moko mpasi nyonso masusumu nyonso mpe nyonso mpasi mpe minioko oyo ata mokolo moko eyokamaki na yo mpe ngai mpe na moto moko te oyo azala to akozala mokolo moko na bomoi. Na nse ya bozito ya mokumba wana amemaki, Ye abimisaki makila na lidusu moko moko ya nzoto.7 nyonso ya monioko yango ekomaki makasi lokola Ye abakami na motema mabe na ekulusu ya Monioko.

Na nzela ya makambo wana ya nsomo mpe ya bosekwi na Ye ya ntina—Bomikabi na Ye Ezanga suka—Ye apesaki nzela ya bozangi bokufi na banso mpe asikolakinyonso ya moko na moko na biso uta na masumu nzelaya boyamboli na biso.

Kolandisama Lisekwa ya Mobikisi mpe kufa ya Bapostolo na Ye, mokili ezindaki na mokama ya molili . Bongo na mobu 1820, Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bamonanaki epai ya Joseph Smith kosala Eklezia ya Nkolo Ezongisa.

Nsima na nyonso Ye aniokuamaki—mpe nsima ya nyonso Ye asalaki mpo na molongo mobimba—nayaki komona elongo na mpasi na motema ete biso na koyeba te tondimaka ete Eklezia ezongisami ya Nkolo ekoka kobiangema na bakombo misusu, moko mpe na mokokati na yango elongoli nkombo ya bule ya Yesu Klisto!

Eyenga nyonso ntango tokaboli na bolongobani elambo, tosalaka elaka ya sika ya bule na Tata na biso ya Lola ete tozali kolinga kozua likolo na biso nkombo ya Mwana na Ye ya mobali, Yesu Klisto.8 Biso tolaki kolanda Ye, koyambola, kobomba mitindo na Ye, mpe ntango nyonso komikundola Ye.

Soki tolongoli nkombo na Ye uta na Eklezia na Ye, tozali na kozanga bokebi kolongola Ye esika ya kokangama ya katikati na babomoi na biso.

Kotiaka nkombo ya Mobikisi likolo na biso esangisi kolobaka mpe kotatolaka epai ya basusu—na nzela ya bamisala mpe maloba na biso—ete Yesu azali Klisto. Ebangaki biso mpenza kotuka moto moko abiangi biso “Bamormon” ete tozangi kosamba mpo na Mobikisi Yemoko, kotelema mpo na Ye kutu na nkombo oyo Eklezia na Ye Ebiangemit?

Soki biso lokola bato mpe moko na moko tozwi nzela na nguya ya Bomikabi na Yesu Klisto—mpo na kopetola mpe kobikisa biso, mpo na kopesa makasi mpe kotombola biso, mpena nsuka konetola biso—tosengeli na polele nyonso koyeba Ye lokola liziba ya nguya yango. Biso tokoki kobanda na kobiangaka Eklezia na Ye na nkombo Ye apesaki.

Mpo na ebele na mokili, Eklezia ya Nkolo sikawa elatisami lokola “Eklezia ya Mormon.” Kasi lokola bandimi ya Eklezia ya Nkolo toyebi nani atelemi na moto na yango: Yesu Klisto Yemoko. Na mawa , ebele oyo bayokaka liloba Mormon bakoki kokanisa ete biso tosanjolaka Mormon. Boye te! Topesi lokumu mpe totosi profeta monene ya Amerika ya kala.9 Kasi tozali te bayekoli ya Mormon. Tozali bayekoli ya Nkolo

Na mikolo ya ebandeli ya Eklezia ezongisami, bakombo lokola Eklezia ya Mormon mpe Mormon 10 ezalaki mingi lokola kokokisana—lokola maloba, bakombo moko ya kobebisa—etindami mpo na kobomba nguya ya liboko ya Nzambe na Eklezia na Ye ezongisami ya Yesu Klisto na mikolo oyo ya suka.11

Bandeko mibali mpe basi, ezali na maloba ebele ya mokili mpenza kotelemela bozongisi ya nkombo ebongi ya Eklezia. Mpo na mokili ya digital oyo tozali kobika mpe na esaleli ya noki noki ya boluki oyo ezali kosunga banso kati na biso kozua nsango tosengeli na yango pene na lombango mpenza—sangisa nsango etali Eklezia ya Nkolobatongi balobi ete kobongisa ya ntango oyo ezali bozangi buanya. Basusu bamiyoki ete mpo ete toyebi mingi koleka lokola “Bamormon” mpe lokola “Eklezia ya Mormon,” tosengela kozala ya malamu koleka ya yango.

Soki ezalaki na lisolo moko na oyo etali kotombolaka lisanga moko esalami na moto, makanisi yango elingaki kozala na ntina. Kasi na likambo ya ntina monene boye, totali Ye na oyo Eklezia yango ezali mpe liyebi ete banzela ya Nkolo ezali te, mpe ekozala ata mokolo moko te , banzela ya bato. Soki tokozala motema monene mpe tokosala ndambo na biso malamu, Nkolo akokamba biso na nzela ya mokumba oyo monene. Nsima na nyonso, toyebi ete Nkolo asungaka baoyo baluki kosala bolingi na Ye, kaka lolenge Ye asungaki Nefi kokokisa mokumba na ye ya kotonga masuwa mpo na kokatisa ebalea.12

Tokolinga kosala bolamu mpe motema malamu na babobakasi na biso ya kobongisa bambema yango. Mokambi ya mediz akozala na bolingo nakoyanolaka na bosenga na biso.

Na likita linene moko oyo eleki, Mpaka Benjamín De Hoyos alobelaki na eloko moko ya lolenge oyo. Alobaki:

“Mua mibu eleki ntango kosalaka na bilo ya makambo etali bato na Eklezia na Mexico, [moninga moko mpe ngai] tobengisamaki kosangana na lolaka moko ya kosolola na radio. … [Moko mokambi ya bapologalame] atunaki [biso], ‘Mpo na nini Eklezia ezali na nkombo moko ya molai bongo? …’

“Moninga na ngai mpe ngai tosekaki na moto oyo ya kitoko mpe tobandaki kolimbola ete nkombo ya Eklezia eponamaki na moto te. Yango epesamaki na Mobikisi. … Mokambi ya pologalame na lombango mpe botosi ayanolaki, ‘Biso banso tokozongela yango na esengo monene.’”13

Lisolo yango ememaki nzela moko. Moko na moko, makasi na biso koleka lokola bato se bangomoko ekosengama mpo na kobongisa bambeba oyo ekangami na kati ya mibu.14 Bandambo ya mokili bakoki to bakoki te kolanda motambuisi na biso na na kobiangaka biso na nkombo ebongi. Kasi ekozala lokuta mpo na biso soki ebele kati na mokili ebengi Eklezia mpe baandimi na yango na bakombo ebongi te soki biso mpe tosali lolenge moko.

Lolenge na biso ya kotambuisama ebonguami ezali kosunga. Yango elobami: “na kokokanisa ya yambo, nkombo mobimba ya Eklezia eponamaki: ‘Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka.’ Ntango ya bokuse [ya mbala mibale] eponami esengakir tba nkombo ‘Eklezia’ to ‘Eklezia ya Yesu Klisto’ yango ekumisami. ‘Eklezia ezongisami ya Yesu Klisto’ ezali ya kokoka mpe endimami.”15

Soki moto moko asengeli kotuna, “Ozali moko Mormon?” yo okoki koyanola, “Soki ozali kotuna soki nazali moko mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Mikolo ya Suka, iyo, ngai nazali!”

Soki moto moko atuni, “Ozali Mosantu moko ya Mokolo ya Suka?”16 yyookoki koyanola, “Iyo, nazali yango. Nandimi Yesu Klisto mpe nazali mobimi moko ya Eklezia Ezongisami.”

Bandeko na ngai ya bolingo ya basi mpe mibali, nalaki bino ete soki biso tosali yamalamu koleka mpo na kozongisa nkombo ebongi ya Eklezia ya Nkolo, Ye epai Ekezia oyo ezali akosopa na nse nguya na Ye mpe mapamboli na mito ya Bansantu ya Mikolo ya Suka,17 na lolenge moko tomona ata mokolo moko te. Tokozala na boyebi mpe nguya ya Nzambe mpo na kosunga biso kozua mapamboli ya nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto na bikolo nyonso, mabota, monoko, mpe bato mpe kobongisa mokili mpo na Bozongi ya Mibale ya Nkolo.

Boye, Nini ezali na nkombo? Ntango yango eye na nkombo ya Eklezia ya Nkolo, eyano ezali “nyonso!” Yesu Klisto atindi biso tobenga Eklezia na nkombo na Ye mpo ete yango ezali EklezianaYe, etondisami nanguya na Ye.

Nayebi ete Nzambe azali na bomoi. Yesu Klisto Ye azali kokamba Eklezia na Ye lolo. Boye natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Nkolo atiaki mponsa makasi likolo ya makaniso na ngai motuya ya nkombo Ye abimisaki mpo na Eklezia na Ye, kutu Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Suka. Tosalaki liboso na mpo na komema bisomoko naboyokani elongo na bilingi na Ye. Na bamposo eleki kala te, batambuisi ya ndenge na ndenge ya Eklezia mpe masanga bazuaki likanisi ya motuya ya kokoba kosala bongo. Nsango moko ya kobakisa na oyo etali likambo oyo ntina mingi ekokokisama na basanza ekoya” (Russell M. Nelson, na “The Name of the Churchofficial statement, Aug. 16, 2018], mormonnewsroom.org).

  2. Yambo Bakambi ya Eklezia basalaki lilombi ya ndenge moko. Ndakisa, Mokambi George Albert Smith alobaki: “Bobuaka Nkolo na nse te na kobengaka Eklezia na Ye . Ye abengaki yango Eklezia ya Mormon te” (in Conference Report, Apr. 1948, 160).

  3. Tala “Style Guide—The Name of the Church,” mormonnewsroom.org.

  4. Doctrine et Alliances 115:4.

  5. 3 Nefi 27:7–8.

  6. Tala Moses 1:33.

  7. Tala Doctrine et Alliances 19:18.

  8. Tala Moroni 4:3; Doctrine et Alliances 20:37, 77.

  9. Mormon azalaki moko ya bakomi minei ya Buku ya Mormon, basusu bazalaki Nephi, Yakobo, mpe Moroni. Bango nyonsobazalaki banzeneneke ya Nkolo, lokola ezalaki moblongoli afulami na yango, Profeta Joseph Smith.

  10. Kutu liloba Bamormonite ezalaki kati na bango lokola maloba ya kotiola oyo esalelamaki (tala History of the Church,2:62–63, 126).

  11. Ba kobiangama mosusu emonanaki kozala kosalamana na eleko Kondimana ya Sika. Ntango ya komekama ya Apostlo Paulo liboso ya Felix, Paul o alobamaki kozala “moko ya bakambi ya binzambinzambi ya Nazareti” (Acts 24:5). Kotalaka esaleli ya molongo “ya Nazareti,” mokomi moko akoamki: “Yango ezalaki nkombo epesamaki na Baklisto na nzela ya kotiona. Babiangemaki bongo mpo ete Yesu azalaki ya Nazareti” (Albert Barnes, Makomi, Explanatory and Practical, on the Acts of the Apostles1862], 313).

    Ndenge moko, elobeli mosusu elobami: “Lokola Nkolo na biso abiangemaki na koyinama ‘Ya Nazareti’ (Mat. xxvi. 71boye biso Bayuda bazalaki kolakisa bayekoli na ye ‘Banazareneti.’ Bango bakokati kondima ete bango bazalaki Baklisto, p.n. bayekoli ya Masiya” (The Pulpit Commentary: The Acts of the Apostles ed. H. D. M. Spence and Joseph S. Exell [1884], 2:231).

    Na ndenge ya mosisa, Mpaka Neal A. Maxwell alobaki: “Na nzela ya lisolo ya makomi, tomoni babokasi ya mbala na mbala mpona kokitisa baprofeta na ntina ya kobuaka bango—kotia bango elembo na ntina ya kokomisa bango mike. Mingimingi, kutu, batalamaki ata liso na pete nyonso nabato ya kala mpe balobeli liloba ya Nzambe ya lisituale. Nnsima na nyonso, kala te Baklisto babiangamaki kaka ‘binzambinzambi ya Banazareti.’ (Misala 24:5.)” (“Out of Obscurity,” Ensign, Nov. 1984, 10).

  12. Tala 1 Nefi 18:1–2.

  13. Benjamín De Hoyos, “Called to Be Saints,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 106.

  14. Atako tozangi na makoki kokamba na oyo basusu bakoki kobenga biso, tozali kokamba mobimba lolenge biso tozali kominona biso moko. Boniboni tokoki kozela basusu kopesa lokumu na nkombo ebongi ya Eklezia soki biso lokola bandimi na yango tokueyi na kosala bongo?

  15. Style Guide—The Name of the Church,” mormonnewsroom.org.

  16. Liloba mosantu esalelami mingi na Biblia ya Bule. Na Mokanda ya Paulo epai ya Baefese, mpo na ndakisa, ye asalelaki liloba mosantu na nyonso mbala moko na mokapo moko na moko. Mosantu azli moto mokooyo andimeli Yesu Klisto mpe azalaki kobunda mpo na kolanda Ye.

  17. Tala Doctrine et Alliances 121:33.