Mabiangi Ya Misio
Mokapo 3: Liteya 3—Nsango malamu ya Yesu Klisto


“Mokapo 3: Liteya 3—Nsango malamu ya Yesu Klisto,” Teya Nsango malamu: Bokambi moko mpa na Kokabola Nsango malamu ya Yesu Klisto (2023).

“Mokapo 3: Liteya 3,” Teya Nsango Malamu na Ngai

Mokapo 3: Liteya 3

Nsango malamu ya Yesu Klisto

Elilingi
Boyei ya Mibale, na Harry Anderson

Bato Bakoki Komituna

  • Yesu Klisto azali Nani? Lolenge nini Akoki kosalisa ngai mpe libota ya ngai?

  • Kozala na bondimi na Yesu Klisto elingi koloba nini? Boniboni kozala na bondimi na Ye ekoki kopambola bomoi na ngai?

  • Elingi koloba nini koyambola?

  • Lolenge nini ekoki ngai koyoka kimia ya Nzambe mpe bolimbisi nsima ya kosala maponi ya mabe?

  • Ntina ya libatisi ezali nini ?

  • Likabo ya Molimo Mosantu ezali nini?

  • Nini elingi koloba kotia molende kino nsuka?

Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali lolenge toyaka epayi ya Kliso. Ezali likambo ya pete mingi koleka ete mwana moke akoki kososola yango. Liteya ebeti nsete na nsango malamu mpe malongi ya Klisto, kobakisaka bondimi na Yesu Klisto, boyamboli, libatisi, likabo ya Molimo Mosantu, mpe kotiaka molende kino nsuka. Ezali lisusu kobeta nsete na lolenge nini nsango malamu epambolaka bana nyonso ya Nzambe.

Liloba nsango malamu elingi koloba polele “nsango ya malamu.” Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nsango ya malamu mpo ete epesaka malongi—bosolo ya seko—tosengeli koya epayi na Ye mpe kobikisama (tala 1 Nefi 15:14). Nsango malamu ezali koteya biso lolenge nini kobika bomoi malamu, bomoi ya ntina. Nsango ya malamu ya nsango malamu epesaka nzela mpo ete biso tolimbisama na masumu, tosantisama, mpe tozonga liboso ya nzambe.

Makanisi mpo na Koteya

Eteni oyo epesi ndakisa moko ya liteya mpo na kosalisa yo omilengela mpo na koteya. Ebakisi lisusu bandakisa ya mituna mpe mabengisi okoki kosalela.

Wana ezali yo komilengela mpo na koteya, kanisa na losambo ezalela mpe bosenga ya molimo ya moto moko na moko. Zwa mokano nini ekozala ya lisalisi mpenza mpo na koteya. Milengela mpo na kolimbola maloba oyo bato bakokoka kososola te. Sala mwango engembene na ntango boni okozala na yango, komikundolaka kobatela mateya ezala mikuse.

Pona makomi ya kosalela wana ezali yo koteya. Eteni ya liteya ya “Doctrinal Foundation” ebakisi makomi mingi ya lisalisi.

Kanisa mituna nini okotuna wana ezali yo koteya. Sala mwango ya mabengisi mpo na kosembola oyo ekolendisa moto mokomoko asala.

Beta nsete na mapamboli elakama ya Nzambe, mpe kabola litatoli na yo ya maye ozali koteya.

Elilingi
bamisionele bazali koteya libota

Nini Okoki Koteya Bato na Miniti 15-25

Pona moko to mingi ya mabongi oyo elandi mpo na koteya. Moboko ya malongi mpo na libongi moko na moko epesami nsima ya liteya oyo.

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto

  • Nzambe atindaki Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, na mabele mpo na kosikola biso uta na lisumu mpe liwa.

  • Na ntina ya libonza ya bomikabi ya Yesu, tokoki kosukolama na masumu na biso mpe kosantisama ntango toyamboli.

  • Nsima ya kobakama ya Yesu, Ye asekwaki. Mpo na Lisekwa na Ye, tokosekwisama banso nsima ya kufa na biso. Yango elakisi ete molimo mpe nzoto ya moto mokomoko ekosangana lisusu, mpe mokomoko na biso tokobika na nzoto ebongi nie, esekwisasama.

Bondimi na Yesu Klisto

  • Bondimi ezali libongi ya yambo ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

  • Bondimi na Yesu Klisto ebakisi kozala na elikya ete Ye azali Mwana ya Nzambe mpe kondimela Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso.

  • Bondimi na Yesu Klisto ezali libongi moko ya mosala mpe nguya.

  • Toolendisaka bondimi na biso na nzela ya losambo, boyekoli makomi, mpe kotosa mitindo.

Boyamboli

  • Bondimi na Yesu Klisto ememaka biso na boyamboli. Boyamboli ezali nzela ya kobaluka epayi ya Nzambe mpe kopesa lisumu mokongo. Ntango toyamboli, misala, bamposa, mpe makanisi na biso ebongwani mpo na kozala mingi koleka na boyokani na bolingi ya Nzambe.

  • Ntango toyamboli na bosolo, Nzambe alimbisi biso. Bolimbisi ekoki kosalema mpo ete Yesu Klisto amikabaki mpo na masumu na biso.

  • Ntango toyamboli, toyokaka kimia lokola ngambo mpe mpasi na biso ebikisami.

  • Boyamboli ezal nzela ya bomoi mobimba. Nzambe ayambaka biso tozonga ntango nyonso toyambolaka. Akotika biso mokolo moke te.

Libatisi: boyokani na Biso ya Yambo na Nzambe.

  • Libatisi ezali lolenge tokotelaka mbala ya yambo na mokangano ya boyokani na nzambe.

  • Libatisi ezali na biteni mibale: libatisi ya mayi mpe ya Molimo. Ntango tobatisami mpe tokulisami nkotisa, tosukolami na masumu na biso, kopesaka biso ebandeli ya sika na bomoi.

  • Tobatisami na bozindisami na mai, kolandaka ndakisa ya Yesu

  • Bana babatisamaka te kino bakokokisa mibu mwambe. Bana oyo bakufaka liboso ya mobu wana basikolami na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto.

  • Ntango toliaka elambo mposo nyonso na bomikundoli ya mbeka ya Yesu mpe mpo na kozongisa sika mayokani na biso na Nzambe.

Likabo ya Molimo Mosantu

  • Molimo Mosantu azali moto ya misato ya Bonzambe.

  • Nsima ya libatisi na biso, tozwaka likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya bokuli ya nkotisa.

  • Ntango tozwi likabo ya Molimo Mosantu, tokoki kozala na kimoninga na Ye na bomoi na biso mobimba soki tozali sembo.

  • Molimo Mosantu asantisaka biso, akambaka biso, alendisaka biso, mpe asalisaka biso toyeba bosolo.

Kotia Molende kino Nsuka

  • Kotya molende ebakisi kokoba kosalela bondimi na Klisto mokolo moko na moko. Tokobaka kobatela mayokani na biso na Nzambe, boyamboli, koluka kimoninga ya Molimo Mosantu, mpe kolia elambo.

  • Ntango toluki na bosembo kolanda Yesu Klisto, Nzambe alaki ete tokozwa bomoi ya seko.

Nsango malamu ya Yesu Klsito Epambolaka Bana Banso ya Nzambe.

  • Kobika nsango malamu epesaka makasi na bisengo na biso, efulaka misala na biso, mpe ekomisaka makasi mikangano na biso.

  • Tosengeli lokola mpenza kozala na esengo—nyonso mibale lokola bato mpe lokola mabota—ntango tozali kobika na mateya ya Yesu Klisto.

  • Na nzela ya nsango malamu ya Yesu Klisto, mabota mapambolami na bomoi oyo mpe ekoki kokomisama moko mpo na seko mpe kobika liboso ya Nzambe.

Mituna Okoki Kotuna Bato

Mituna oyo elandi ezali bandakisa ya maye bokoki kotuna bato. Mituna oyo ekoki kosalisa bino bozala na masolo ya ntina mpe kososola babosenga mpe bomoni ya moto.

  • Oyebi nini na ntina ya Yesu Klisto?

  • Elingi kolobela yo nini kozala na bondimi na Yesu Klisto?

  • Bambongwana nini olingi kosala na bomoi na yo?

  • Bososoli na yo ya boyamboli ezali nini?

  • Bososoli na yo ya libatisi ezali nini? Sikawa okoki kosala nini mpo na komilengela mpo na libatisi?

  • Lolenge nini Molimo Mosantu akoki kosalisa yo na mobembo na yo ya kozonga liboso ya Nzambe?

  • Mokakatano nini oyo yo to libota na yo ozali kokutana na yango? Ekoki biso kokabola mwa banzela nsango malamu ya Yesu Klisto ekoki kosalisa?

Mabengisi oyo Okoki Kotinda

  • Ekolinga yo kosenga Nzambe na losambo mpo na kosalisa yo oyeba ete maye toteyi yo ezali ya solo? (Tala “Teaching Insights: Prayer” na eteni ya nsuka ya liteya 1.)

  • Okokende na ndakonzambe na mokolo ya eyenga oyo mpona koyekola mingi etali maye toteyi?

  • Ekolinga yo kotanga Buku ya Mormon mpe kosambela mpo na koyeba ete ezali liloba ya Nzambe? (Okoki kopesa makanisi ya mikapo to milongo eponami.)

  • Ekolinga yo kolanda ndakisa ya Yesu mpe kobatisama? (Tala “The Invitation to Be Baptized and Confirmed,” oyo eyei sasaipi liboso ya liteya 1.)

  • Ekoki biso kotia ntango mpo na kotala yo mbala ya nsima?

Moboko ya Malongi

Eteni oyo epesi malongi mpe makomi mpo ete yo oyekola kolendisa boyebi na yo mpe litatoli ya nsango malamu mpe kosalisa yo oteya.

Elilingi
Yesu Atindi Baoyo Bazomi na Mibale, na Walter Rane

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto

Tata na Lola atindaki Mwana na Ye ya Bolingo Yesu Klisto, na mabele mpo na kokokisa yango mpo na biso banso tokutana na bosepeli na mokili oyo mpe bomoi ya seko na mokili ekoya. “Mpe oyo ezali a nsango malamu, nsango ya malamu, …ete [Yesu Klisto] ayaki kati na mokili … komema masumu ya mokili, mpe kosantisa mokili, mpe kopetola yango uta na bozangi bosembo nyonso; ete na nzela na ye banso bakoka kobikisama” (Malongi mpe Mayokani 76:40–42).

Lokola bakufi, biso nyonso tosumukaka, mpe biso nyonso tokufaka. Lisumu mpe liwa ekokaki kopekisa biso kozala na bomoi ya seko elongo na Nzambe soki tozangaki Mosikoli moko (tala 2 Nefii 9). Liboso ete mokili ekelama, Tata na Lola aponaki Yesu Klisto mpo na kosikola biso. Na liloba eluti likolo ya bolingo, Yesu ayaki na mabele mpe akokisaki etinda oyo ya bonzambe. Akokisisaki yango mpo na biso tosikolama uta na masumu na biso, mpe Ye asalaki ete tokosekwa banso nsima ya kufa na biso.

Yesu abikaki bomoi moko ezanga lisumu. Na nsuka ya lotomo na Ye na kufa, Azwaki likolo na Ye moko masumu na biso na minyokoi na Ye ya Getesemane mpe ntango Abakamaki na ekulusu (tala 1 Nefi 11:33). Minyoko ya Yesu ezalaki makasi mpenza ete esalaki Ye “alenga mpo na mpasi, mpe atangisa makila na lidusu moko moko ya mposo na ye” (Malongi mpe Mayokani 19:18). Nsima ya Kobakama na Ye na ekulusu, Yesu asekwaki, kozwaka elonga likolo ya liwa. Elongo, makambo oyo ezali Bomikabi ya Yesu Klisto.

Masumu na biso ekomisaka biso mbindo na molimo, mpe “eloko te ya mbindo ekoki kofanda elongo na Nzambe” (1 Nefi 10:21). Lisusu, mobeko ya boyengebene esengaka mbano mpo na masumu na biso.

Mbeka ya bomikabi ya Klisto epesaka nzela mpo ete biso tokoma ya kosukolama na lisumu mpe tosantisama ntango toyamboli. Epesaka lisusu nzela mpo na kosepelisa babosenga ya boyengebene (tala Alma 42:15, 23–24). Mobikisi alobaki, “Ngai … nayokaki mpasi ya makambo oyo nyonso, ete bakoka te komona mpasi soki bakoyambola; kasi soki bakoyambola te basengeli komona mpasi kutu lokola ngai” (Malongi mpe Mayokani 19:16–17). Soki ezalaka mpo na Yesu Klisto te, lisumu elingaki kosukisa elikya nyonso mpo na bomoi bwa mikolo mya nsima elongo na Tata na Lola.

Na komipesaka yemei lokola mbeka mpo na biso, Yesu alongolaki mokumba na biso ya moto ye moko te. Tosengeli koza na kondima kati na Ye, koyambola, bayambola, mpe babatela mitindo. Ntango toyamboli, Yesu akosenga na nkombo na biso makoki na Ye ya mawa to boboto ya Tata na Ye (tala Moroni 7:27–28). Mpo na libondeli ya Mobikisi, Tata na Lola alimbisaka biso, kolembiselaka biso mokumba mpe ngambo ya masumu na biso (tala Mosiya 15:7–9). Tosukolami na molimo mpe tokoki nsukansuka koyambama liboso ya Nzambe.

Etinda ya bonzambe ya Yesu ezalaki lisusu mpo na kobikisa biso na liwa. Mpo ete Ye asekwaki, tokosekwa banso nsima ya kufa. Yango elakisi ete molimo mpe nzoto ya moto mokomoko ekosangana lisusu, mpe mokomoko na biso tokobika na nzoto ebongi nie, esekwisasama. Soki ezalaka mpo na Yesu Klisto te, liwa elingaki kosukisa elikya nyonso mpo na bomoi bwa mikolo mya nsima elongo na Tata na Lola.

Koyekola Makomi

Nzambe Atindaki Mwana na Ye

Lobiko na Nzela ya Yesu Klisto

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Bondimi na Yesu Klisto

Mobeko mwa yambo ya nsango malamu ezali bondimi na Nkolo Yesu Klisto. Bondimi ezali moboko mpo na mibeko misusu ya nsango malamu.

Bondimi na Yesu Klisto esangisi kozala na elikya ete Ye azali Mwana na Likinda ya Nzambe. Esangisi kotia elikya na Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli—ete Ye azali bobele nzela na biso ya kozongela na liboso ya Nzambe (tala Misala 4:10–12; Mosiya 3:17; 4:6–8). Tobiangami mpo na kosalela “bondimi kati na ye ekoki te koningana, kotalelaka na mobimba matomba na ye oyo azali na nguya mpo na kobikisa.” (2 Nefi 31:19).

Bondimi na Yesu Klisto esangisi boyambi ete Ye anyokwamaki mpo na masumu na biso na mbeka na Ye ya bomikabi. Mpo na mbeka na Ye, tokoki kosukolama mpe kosikolama ntango toyamboli. Bosukoli oyo esalisaka biso tozwa kimia mpe elikya na bomoi oyo. Epesaka biso lisusu nzela ya koyamba litondi ya esengo nsima ya liwa na biso.

Bondimi na Yesu Klisto esangisi botye elikya ete na nzela na Ye, tokosekwisama banso nsima ya liwa na biso. Bondimi oyo ekoki kosunga mpe kolendisa biso na bangonga ya bobungisi. “Mawa ya liwa ekoki libela kolimwisama na elaka ya Lisekwa.

Bondimi na Yesu Klisto ekwi boyambi mpe botie elikya ete Ye akamataki likolo na Yemei mitungisi mpe bokono na biso (tala Yisaya 53:3–5). Ayebi na nzela ya makambo na ye akutana na yango lolenge nini kosunga biso na mawa na nzela ya mikakatano ya bomoi (tala Alma 7:11–12; Malongi mpe Mateya 122:8). Tango tosaleli bondimi, Ye akosalisa biso tokende liboso kati na mimekano .

Na nzela ya bondimi na biso na Ye, Yesu akoki kobikisa biso na nzoto mpe na molimo. Ye azali ya kobelema ntango nyonso mpo na kosalisa biso tomikundola libiangi na Ye ya, “kotala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, bobanga te.”(Malongi mpe Boyokani 6:36).

Libongisi moko ya Mosala mpe nguya

Bondimi na Yesu ememaka biso na mosala. Tolakisaka bondimi na biso na kotosaka mitindo mpe kosalaka bolamu mokolo na mokolo. Toyambolaka masumu na biso. Tozali sembo epayi na Ye. Tosalaka makasi mpo na kokoma mingi koleka lokola Ye.

Ntango tosaleli bondimi, tokoki kokutana na nguya ya Yesu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Ye akoyeisa makasi na biso ya monene koleka. Akosalisa biso tokola mpe totelemela masenginia.

Kolendisa Bondimi na Biso

Profeta Alma eteyaki ete kotonga bondimi ekoki kobanda na “mposa moko ya kondima” ya pete (Alma 32:27). Nsima, mpo ete bondimi na biso na Yesu Klisto ekola, tosengeli koleisa yango na boyekoli maloba na Ye, kosalelaka mateya na Ye, mpe kotosaka mitindo na Ye. Alma ateyaki ete ntango tozali na motema molai, kokolisa liloba ya Nzambe na bompikiliki, molende na motema na biso, “ekokamata mosisa [mpe ekokoma lokola] nzete moko oyo ekokola kino na bomoi ya libela”—Boye kolendisa bondimi na biso (Alma 32:41; tala milongo 26–43).

Koyekola Makomi

Bondimi, Nguya, mpe Lobiko

Malongi ma Bondimi

Ndakisa ya Bondimi

Misala mya Botosi

Bondimi mpo na Boyamboli

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Bokambi mpo na Makomi: “Yesu Klisto,” “Komikaba, Bomikabi,” “Bondimi

  • Bible Dictionary, “Faith

  • Masolo ya Nsango malamu: “Yesu Klisto,” “Bomikabi ya Yesu Klisto,” “Bondimi na Yesu Klisto

Boyamboli

Boyamboli Ezali Nini?

Boyamboli ezali libongisi ya mibali ya nsango malamu. Bondimi na Yesu Klisto mpe bolingo na biso mpo na Ye ekambaka biso na boyamboli (tala Elamani 14:13). Boyamboli ezali nzela ya kotalela Nzambe mpe kotika lisumu. Ntango toyambolaka, misala, bamposa, mpe makanisi na biso ebongwanaka mpo na kozala mingi koleka na boyokani na bolingi ya Nzambe. Bolimbisi ya lisumu esalami na nzela ya Yesu Klisto mpe mbeka na Ye ya bomikabi.

Boyamboli ezali mingi koleka kosalela nguya ya bolingi mpo na kobongwanisa ezalela moko to kolonga botau moko. Boyamboli ezali solo kobaluka epai ya Klisto, oyo apesaka biso nguya ya kokutana na “mbongwana ya nguya” na mitama na biso (Alma 5:12–14). Ntango tokutani na mbongwana oyo ya motema, tobotami mbala ya sika na molimo (tala Malongi mpe Mayokani 24– 26).

Na nzela ya boyamboli, tokolisi lilolenge ya komona Nzambe ya sika, biso moko, mpe mokili. Toyokaka bolingo ya Nzambe ya sika mpo na biso lokola bana na Ye—mpe bolingo ya Mobikisi na biso mpo na biso. Libaku ya koyambola ezali moko ya mapamboli monene mpenza oyo Nzambe apesi biso na nzela ya Mwana na Ye.

Nzela ya Boyamboli

Ntago toyambolaka, tondimaka masumu na biso mpe toyokaka mawa na motema ya solo. Totubelaka masumu na biso epayi ya Nzambe mpe tosengaka bolimbisi na Ye. Totubelaka lisusu masumu minene na bakambi ya Eklezia bapesami ndingisa, baye bakosunga biso ntango tozali koyambola. Tosalaka maye tokoki mpo na kosala bozongisi oyo elingi koloba komeka kosembola bakpokoso ya misala mya biso mikoki kosala. Boyamboli ya solo elakisami malamu mpenza na misala ya bosembo na eleko moko ya ntango.

Boyamboli ezali nzela ya mokolo na mokolo na bomoi na biso mobimba. “Banso basumuki, mpe bazangi nkembo ya Nzambe” (Baloma 3:23). Tosengeli kokoba koyambola, komikundolaka ete biso “tokoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto oyo alendisaki” biso (Bafilipi 4:13). Nkolo andimisi bisi ete “mpe mbala inso bato ba ngai bakoyambola nakolimbisa bango masumu na bango na ngai.” (Mosiya 26:30).

Mapamboli ya Boyamboli

Boyamboli ezali libongisi malamu oyo ememaka bosepeli mpe kimia. Ememaka biso “na nse ya nguya ya Mosikoli, kati na lobiko ya milimo [na biso]” (Elamani 5:11).

Ntango toyamboli, ngambo mpe mawa na biso ebikisami nzela ya ngonga. Tokoyoka nguya ya Molimo mingi koleka. Mposa na biso ya kolanda Nzambe ekokola makasi koleka.

Elilingi
Mokambi Russell M. Nelson

“Bato mingi mpenza bakanisaka boyamboli lokola etumbu—eloko moko ya koboya. … Kasi liyoki oyo ya kozwa etumbu ewuti na Satana. Amekaka kokanga biso mpo na kotala Yesu Klisto te, oyo atelemaka na maboko ya kofungwama, kolikiaka mpe kolingaka kobikisa, kolimbisa, kosukola, kolendisa, kopetola, mpe kosantisa biso” (Russell M. Nelson, “We Can Do Better and Be Better,” Ensign to Liahona, Saza ya mitano 2019, 67).

Yekola Makomi

Boyamboli

Bosikoli mpe Bolimbisi

Boboto mpo na Baoyo Bayambolaka

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Elilingi
elenge mwasi azali kobatisama

Libatisi: boyokani na Biso ya Yambo na Nzambe.

Bondimi na Yesu Klisto mpe boyamboli elengelaka biso mpo na makuli ma libatisi mpe ma nkotisa. Libatisi ezali bokuli ya lobiko ya yambo ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ntango tozwi bokuli ya bosepeli oyo ya elikya, tosali boyokani na biso ya yambo elongo na Nzambe.

Bokuli ezali mosala ya bule to molulu ya bule esalami na likoki ya bonganganzambe. Makuli misusu, lokola libatisi esengelami mpo na lobiko na biso.

Na nzela ya makuli, tosalaka mayokani na Nzambe. Mayokani oyo ezali bilaka ya bule kati na biso na Nzambe. Alaki kopambola biso, ntango tozali kobatela bilaka na biso elongo na Ye. Tosengeli kozala na bomipesi moko makasi mpo na kobatela bilaka na biso elongo na Nzambe.

Nzambe apesi makuli mpe mayokani mpo na kosalisa biso toya epayi na Ye mpe tozala na bomoi ya seko. Ntango tozwaka makuli ya bonganganzambe mpe tobatelaka mayokani oyo esangani na yango, tokoki kokutana na “nguya ya bonzambe” na bomoi na biso (malongi mpe Mayokani 84:20).

Liyokani ya Libatisi

Mobikisi ateyaki ete libatisi esengelami mpo ete biso tokota na bokonzi ya lola (tala Yoani 3:5). Ezali lisusu kosengelama ete biso tokoma bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto. Mobikisi na biso atii ndakisa na kobatisamaka (tala Matai 3:13–17)

Ntango tobatisami mpe tobateli boyokani na biso, Nzambe alaki kolimbisa masumu na biso (tala Misala 22:16; 3 Nefi 12:1–2). Lipamboli ya monene oyo esalisami na nzela ya mbeka ya bomikabi ya Yesu Klisto, oyo “alingaki biso, mpe asukoli biso na masumu na biso na makila na ye” (Emoniseli 1:5). Nzambe lisusu alaki kopambola biso na kimoninga ya Molimo Mosantu mpo ete tokoka kosantisama, kokambwisama, mpe kobondisama.

Na eteni na biso ya boyokani ya libatisi, totatolaka ete tozali na bolingi ya kozwa likolo na bisomei nkombo ya Yesu Klisto. Tolakaka lisusu ntango nyonso tokomikundola Ye mpe kobatela mitindo na Ye. Tolakaka kolinga mpe kosalisa basusu “kolela na baoyo bazali kolela; … kobondisa baoyo bazali na mposa ya libondisi, mpe kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na ngonga nyonso mpe na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso” (Mosiya 18:9; tala molongo 8–10, 13). Tolakisaka mokano ya kosalela Yesu Klisto tii na nsuka ya bomoi na biso (tala Malongi mpe mayokani 20:37; Mosiya 2:17).

Bomipesi na biso ya boyokani oyo esangani na libatisi ezali mokumba monene. Ezali lisusu ya kofula mpe ya esengo. Ekelaka mokangano ya kitoko kati na biso mpe tata na Lola na nzela na yango Ye asembolaka seko seko bolingo na Ye.

Libatisi na Bozindisi na mai.

Yesu ateyaki ete tosengeli kobatisama na bozindisami na mai mpo na bolimbisi ya masumu na biso (tala Malongi mpe Mayokani 20:72–74). Libatisi na bozindisami na mai ezali elilingi ya liwa, bokundi, mpe Bosekwi ya Yesu Klisto (tala Baloma 6:3–6).

Libatisi na bozindisi na mai ezali lisusu na elilingi ya nguya mpo na bomoto na biso moko. Ezali kolakisa liwa ya bomoi na biso ya kala, bokundi ya bomoi wana, mpe bobimi na biso kati a mbotama ya sika na molimo. Ntango tobatisami, tobandi bongo nzela ya kobotama mbala ya sika mpe kokomaka bana mibali mpe bana basi ya Klisto na molimo (tala Mosiya 5:7–8; Baloma 8:14–17

Bana

Bana babatisamaka te kino bakokisi mibu mya boyanoli, miye ezali mibu mwambe (tala Malongi mpe Mayokani 68:27) Bana oyo bakufaka liboso ya mobu yango bazali na ntina ya kobatisama te mpe basikolami na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto (tala Moroni 8:4–24; Malongi mpe Mayokani 137:10). Liboso bana babatisama, basengeli koteyama nsango malamu bongo bakolengelama mpo na etape oyo ya motuya na bomoi na bango ya kosala boyokani elongo na Nzambe.

Elambo

Tata na biso na Lola alingi biso tozala na bondimi mpo na mayokani tosalaka elongo na Ye. Mpo na kosalisa biso na yango, Atindaki biso tokutanaka mbala mingi mpo na kolia elambo. Elambo ezali bokuli ya bonganganzambe oyo Yesu eyingisaki epayi ya Bapostolo na Ye kaka liboso ya Bomikabi na Ye.

Kolia elambo ezali ntina ya motuya ya liyangani ya elambo poso na poso. Lipa mpe mai epambolami mpe ekabolalami na lingomba. Lipa elakisi mbeka ya Mobikisi ya nzoto na Ye mpo na biso . Mai elakisi makila na Ye, oyo Asopaki mpo na biso.

Toliaka bilembo oyo na bomikundoli ya mbeka ya Mobikisi mpe mpo na kozongisa lisusu sika mayokani na biso elongo na Nzambe. Tozwaka elaka ya sika ete Molimo ekozala na biso.

Yekola Makomi

Ndakisa ya Klisto

Liyokani ya Libatisi

Makoki ma Libatisi

Mapamboli Malakami ya Libatisi

Lisengeli ya Likoki

Yesu Atiaki mobeko ya Elambo

Nsambo ya Elambo

Kolia Elambo

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Elilingi
Klisto atye maboko likolo ya mwasi

Likabo ya Molimo Mosantu

Kozwa Likabo ya Molimo Mosantu

Libatisi ezali na biteni mibale. Yesu ateyaki ete tosengeli “kobotama na mai mpe na Molimo” mpo na kokota na bokonzi ya Nzambe (Yoane 3:5; nsete ebakisami). Joseph Smith ateyaki: “Libatisi na mai ezali libatisi ya ndambo, mpe ezali ntina te soki mosusu ezali te—elingi koloba, libatisi ya Molimo Mosantu” (Teachings: Joseph Smith [2007], 95).

Libatisi na mai esengeli elandisama na libatisi ya Molimo mpo na kozala ya kokoka. Ntango tozwi mabatisi nyonso mibale, tosukolami na masumu mpe tobotami mbala ya sika na molimo. Nsima nde tobandi bomoi ya sika na molimo lokola bayekoli ba Klisto.

Tozwaka libatisi ya Molimo na nzela ya bokuli ebengami nkotisa. Likuli oyo esalami na moko to bazali mingi ya bonganganzambe oyo batyaka maboko ma bango likolo ya moto na biso. Yambo bakotisi biso mondimi ya Eklezia, mpe nsima bapesi likabo ya Molimo Mosantu likolo na biso. Oyo ezali bokuli kaka se moko oyo elobelami na Boyokani ya Sika mpe Buku ya Molomoni (tala Misala 8:14–17; 3 Nefi 18:36–37).

Molimo Mosantu azali moto ya misato ya Bonzambe. Asalaka na bomoko elongo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Ntango tozwi likabo ya Molimo Mosantu, tokoki kozala na kimonga na Ye na nzela ya bomoi na biso mobimba ntango tozali sembo.

Lolenge nini Molimo Mosantu Apambolaka Biso.

Likabo ya Molimo Mosantu ezali moko ya makabo minene yaTata na Lola. Molimo Mosantu asukolaka mpe asantisaka biso, kosalaka biso basantu mingi koleka, ya kokoka mingi koleka, mingi koleka lokola Nzambe (Tala 3 Nefi 27:20). Asalisaka biso tobongwana mpe tokola na molimo ntango tozali koluka kolanda maloba ya Nzambe.

Molimo Mosantu asalisaka biso toyekola mpe toyeba lisusu bosolo (tala Moroni 10:5). Akotisaka lisusu bosolo na mitema mpe makanisi na biso. Lisusu, Molimo Mosanu asalisaka biso toteya bosolo (tala Malongi mpe Mayokani 42:14). Ntango toyekoli mpe toteyi bosolo na nguya ya Molimo Mosantu, Ye akomema yango kati na mitema na biso (tala 2 Nefi 33:1).

Ntango tozali koluka na bomikitisi boyangeli uta na Molimo Mosantu, Ye akokamba biso (Tala 2 Nefi 32:5). Yango esangisi bopusi biso na lolenge nini tokoki kosalisa basusu.

Molimo Mosantu apesaka bokasi ya molimo mpo na kosalisa biso tolonga botau. Ye asalisaka biso totelemela momekano. Akoki kokebisa biso na likama ya molimo mpe ya nzoto.

Molimo Mosantu akosalisa biso kati na mikakatano ya bomoi. Akobondisa biso na ntango ya momekano mpe mawa, kotondisaka biso na elikya (tala Moroni 8:26). Na nzela ya Molimo Mosantu tokoki koyoka bolingo ya Nzambe mpo na biso.

Yekola Makomi

Lolenge ya Molimo Mosantu

Mapamboli mpe Nguya uta na Molimo Mosantu

Motuya ya Likabo ya Molimo Mosantu

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Elilingi
Yesu asimbi bana

Kotia Molende kino Nsuka

Ntango tobatisami mpe tokulisami nkotisa, tokoti kati ya boyokani elongo na Nzambe. Kati ya makambo misusu, tolaki kobatela mitindo na Ye mpe kosalela Ye mpo na bomikundoli bomoi na biso (tala Mosiya 18:8–10, 13; Malongi mpe Mayokani 20:37).

Nsima ya kokota na nzela ya nsango malamu kati na libatisi mpe ya nkotisa, tosaka bokasi nyonso ya kotikala kati na yango. Ntango tobimi na nzela yango ata kutu mwa moke, tosalelaka bondimi kati na Klisto mpo na koyambola. Mapamboli ya boyamboli epesaka biso nzela ya kozonga na nzela ya nsango malamu mpe kozwa mapamboli ya mayokani elongo na Nzambe. Ntango toyambolaka na bosembo, Nzambe azalaka ntango nyonso na bolingi ya kolimbisa mpe koyamba biso tozonga.

Kotia molende kino na nsuka elingi koloba kotikala bosembo epayi ya Nzambe kino na nsuka ya bomoi na biso—kati na bangonga ya malamu mpe bangonga ya mpasi, kati na bofuluki mpe mokakatano. Topesaka nzela na bomikitisi na Klisto asembola biso mpe asala biso mingi koleka lokola Ye. Totalelaka Klisto na bondimi, sembo, mpa elikya atako eloko nini ekoya na bomoi na biso.

Kotya molende kino na nsuka elingi koloba te na pete kotingama tii liwa. Na esika na yango, elingi koloba koyekamisa bomoi, makanisi, mpe misala na biso likolo ya Yesu Klisto. Esangisi kokoba kosalela bondimi na Yesu Klisto mokolo na mokolo. Tokobaka lisusu koyambola, kobatela mayokani na biso elongo na Nzambe, mpe tolukaka kimoninga ya Molimo Mosantu.

Kotya molende kino na nsuka esangisi “kokenda[ka] mbangu liboso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi ebongi nie ya elikya, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato nyonso.” Tata na biso na Lola alaki ete ntango totye molende kino na nsuka, biso “tokozwa bomoi ya seko”(2 Nefi 31:20).

Koyekola Makomi

Kotia Molende kino Nsuka

Mapamboli mpo na Baoyo Batyaka Molende

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Elilingi
libota ezali koseka

Nsango malamu ya Yesu Klsito Epambolaka Bana Banso ya Nzambe.

Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali mpo na banso ya bana ya Nzambe. Makomi eteyi ete “banso tozali lolenge moko epayi ya Nzambe” kotala te lisolo to ezalela na bino. Ye abengisaka “banso toya epayi na Ye mpe tosalela bolamu na Ye; mpe aboyaka te moto nyonso oyo ayaka epayi na Ye” (2 Nefi 26:33).

Nsango malamu epambolaka biso na bomoi na biso ya kufa mobimba mpe na boseko mobimba. Tozali na litomba mingi ya kozala na esengo—nyonso mibale lokola bato mpe lokola mabota—ntango tobiki na mateya ya Yesu Klisto (tala Mosiya 2:41; “Libota: Esakola na Mokili,” ChurchofJesusChrist.org). Kobika nsango malamu epesaka makasi na bisengo na biso, efulaka misala na biso, mpe ekomisaka makasi mikangano na biso.

Kobika nsango malamu ya Yesu Klisto ekoki lisusu kobatela biso uta na kosalaka maponi oyo ekolinga kosala biso mpasi na nzoto to na molimo. Esalisaka biso tozwa bokasi mpe libondi na ngonga ya momekano mpe ya mpasi. Epesaka nzela ememaka na bomoi ya esengo ya bosepeli.

Moko ya bansango minene ya nsango malamu ezongisama ezali ete tozali baso eteni ya libota ya Nzambe. Tozali bana mibali mpe bana basi na Ye ya bolingo. Atako ezaleli ya libota na biso na mabele ezali nini, moko na moko na biso azali moto ya libota ya Nzambe.

Eteni mosusu monene ya nsango na biso ezali ete mabota ekoki kokangisama mpo na libela. Libota etindami na Nzambe. Mwango ya esengo ya Tata na Lola epesaka makoki na mikangano ya libota Ekoba koleka lilita. Makuli mpe mayokani ya bule ya tempelo epesaka makoki na mabota ezala elongo mpo na libela.

Na nzela ya pole ya nsango malamu, mabota ekoki kosilisa bozangi bososoli, bowelani mpe mikakatano. Mabota epasuka na bozangi boyokani ekoki kobikisama na nzela ya boyamboli, bolimbisi, mpe bondimi na nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Nsango malamu ya Yesu Klisto esalisaka biso kokolisa mikangano ya mabota makasi koleka. Ndako ezali esika ya malamu mpenza mpo na koteya mpe koyekola mibeko ya nsango malamu. Ndako oyo etongami na mibeko mya nsango malamu ekozala esika ya kokimela mpe ya bokengi. Ekozala esika wapi Molimo na Nkolo ekoki kofanda.

Yekola Makomi

Yekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Libongisi ya Liteya ya Mokuse na Mwa Mokuse

Liteya oyo elandi ezali ndakisa ya oyo okoki koteya moto moko soki ozali na mwa ngonga moko mokuse. Ntango ozali kosalela liteya oyo, pona mobeko moko to mingi ya koteya. Moboko ya malongi ya mobeko moko na moko epesami liboso na liteya.

Ntango ozali koteya, tuna mituna mpe yoka. Sembola mabyangi oyo ekosalisa bato bayekola lolenge nini kokola pepene koleka ya Nzambe. Moko ya libyangi ya motuya ezali mpo ete moto yango akutana na yo lisusu. Molai ya liteya ekozala engebene na mituna oyo otuni mpe na boyoki oyo ozali kosala.

Elilingi
bamisionele bazali koteya basi

Nini Okoki Koteya Bato na Miniti 3–10

  • Nzambe atindaki Mwana na Ye ya Bolingo, Yesu Klisto, na mabele mpo na kosikola biso uta na lisumu mpe liwa.

  • Bondimi na Yesu Klisto ezali libongi moko ya mosala mpe nguya. Bondimi esalisaka biso tokutana na nguya ya kolendisa ya Mobikisi na bomoi na biso.

  • Bondimi na Yesu Klisto ememaka biso na boyamboli. Boyamboli ezali nzela ya kotalela Nzambe mpe kotika lisumu. Ntango toyambolaka, misala, bamposa, mpe makanisi na biso ebongwanaka mpo na kozala mingi koleka na boyokani na bolingi ya Nzambe.

  • Ntango toyamboli, Nzambe alimbisaka biso. Bolimbisi ekoki kosalema mpo ete Yesu Klisto amikabaki mpo na masumu na biso.

  • Libatisi ezali na biteni mibale: libatisi ya mayi mpe ya Molimo. Ntango tobatisami mpe tokulisami nkotisa, tosukolami na masumu na biso, kopesaka biso ebandeli ya sika na bomoi.

  • Nsima ya kobatisama na biso na mai, tozwaka likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya bokuli ya nkotisa.

  • Ntango tolandi na bosembo nzela ya nsango malamu kino na nsuka ya bomoi na biso, Nzambe alaki ete tokozwa bomoi ya seko.