Mabiangi Ya Misio
Mokapo 3: Yekola mpe Teya Nsango Malamu ya Yesu Klisto


“Mokapo 3: Yekola mpe Teya Nsango Malamu ya Yesu Klisto,” Teya Nsango Malamu ya Ngai: Mokambi mpo na Kokabola Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023)

“Yekola mpe Teya Nsango Malamu ya Yesu Klisto,” Teya Nsango Malamu ya Ngai

Elilingi
Libatisi ya Klisto, na Joseph Brickey

Mokapo 3

Yekola mpe Teya Nsango Malamu ya Yesu Klisto.

Mateya na kati ya mokapo oyo ezali na malongi ya ntina, mabongi, mpe mibeko ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Mateya oyo ezali maye baprofeta ya bomoi mpe bapostolo batindi bino boyekola mpe boteya. Epesami awa mpo ete bokoka kosunga basusu basosola polele malongi ya Klisto.

Eteni ya yambo na kati ya mokapo oyo ezali libyangi ya libatisi. Maye matikali kati ya mokapo ezali mateya minei oyo elandi:

Yekola makomi mpe manyola malongi na liteya moko na moko. Ntango osali bongo, Molimo ekotatola babosolo oyo oyekoli. Akosunga yo koyeba maye okoloba mpe okosala mpo na kosunga basusu bazwa litatoli ya bosolo. (Tala Malongi mpe Mayokani 84:85.)

Bato bakoya koyeba Mobikisi mingi na bozindo ntango bazali kosala maye Ye abengisaki bango basala. Kopalanganisa mabiangi kati ya liteya moko na moko, mpe kosunga bato babatela komipesa na bango. Ntango bato babateli bomipesi, babandi kobika nsango malamu ya Yesu Klisto mpe bamilengeli mpo na kosala mayokani elongo na Nzambe.

Teya mateya nyonso liboso mpe nsima ya libatisi. Bamisionele ya ntango mobimba bazwaka bokambi ya koteya mateya na ntango mibale. Bamisionele ya palwasi to bandimi misusu bakozala wana soki basengeli. Tala mikapo 10 mpe 13 mpo na nsango etali kokotisa bandimi na kati ya liteya.

Komilengela mpo na Koteya

Ntango bozali komilengela mpo na koteya, botala nsango mpo na moto moko na moko na kati ya aplikasio ya Teya Nsango Malamu ya Ngai. Bosala linaka ya mwango ya liteya eyekama na bamposa ya moto. Bobanza maye ye asengeli koyeba mpe koyoka na ntango ya liteya ya botali na bino. Molimo ekolendisa babokasi na bino lokola bozali kozwa ntango ya komilengela mpe kosala mwango.

Oyo ezali mwa mituna mpo na yo mpe moninga na yo mpo na kosambela ntango bozali komilengela mpo na koteya.

  • Libyangi nini tokopalanganisa mpo na kosunga moto atonga bondimi kati na Klisto mpe akoba kokende liboso? Mabengisi ezali lolenge nini osungaka bato bayambola mpe bayebaka “nguya ya Mosikoli” (Elamani 5:11). Banza bokobi liboso ya moto, lolenge, mpe bamposa na ye. Nsima kotisa libyangi moko to mabyangi mingi na kati ya mwango ya liteya na yo.

  • Malongi mpe mabongi nini ekosunga moto abatela boyokani oyo tobengisaki ye mpo na kosala? Na nzela ya losambo yeba malongi mpe mabongi nini ekosunga bato basosola mpo na nini kobatela bomipesi na bango ezali ntina mpo na bango mpe Nkolo.

  • Lolenge nini tokosunga moto ayekola malongi? Mpo na komilengela koteya malongi, bongisa mpe lengela na mokuse maye okoteya na kosalelaka mateya 1–4. Tala mituna, makomi, ndaksia, mpe bipanzelo ya nsango oyo ekosunga moto asosola maye ozali koteya. Tala mokapo 10 mpo na nsango mingi etali lolenge nini ya kobongisa liteya na yo.

  • Mapamboli nini oyo Nzambe alakaki mpo na kondima mpe kobatela bomipesi? Ntango ozali koyekola malongi, yeba mapamboli elakama ya Nzambe. Ntango ozali koteya, laka mapamboli mpe tatola na ntina na yango.

  • Bandimi nini oyo bakoki kozala wana? Na liyangani ya bolengeli ya poso, luka koyeba bandimi nini bakoki kosunga yo koteya mpe kosunga moto. Yambo ya liteya, bosolola bozali na bango. Tala mokapo 10.

  • Nini tokoki kosala mpo na kosunga bato babatela bomipesi na bango nsima ya kokende na biso? Landela na kosalaka bokutani ya mokuse ya mokolo mpo na kosunga bato babatela bomipesi na bango. Luka ndenge ya kokotisa bandimi na kosungaka baye ozali koteya babatela bomipesi na bango. Bokutani oyo ekoki kozala ya kotangaka mokapo uta na Buku ya Mormon to makomi misusu. Soki ezali na moto oyo azali kobatela bomipesi ya liboso te, ekoki kozala malamu kosunga ye kobatela yango yambo ya kosala mosusu. Tala mokapo 11.

  • Lolenge nini tokoki kosunga malamu bango mbala ekoya? Nsima ya lolenge ya liteya nyonso, landela boyebi ya bato oyo ozali koteya. Bondimi na bango kati na Klisto ezali solo kokola? Bazali solo koyoka Molimo? Bazali koyambola, kosala mpe kobatela bomipesi? Bazali kosambela, koyekola Buku ya Mormon, mpe bazali koya na eklezia. Sala manaka mpo na kosunga bango.

Teya uta Motema na Yo lokola Okambami na Molimo

Koloba na bampaka mpe bandeko basi nyonso, Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale balobaki:

“Lotomo na biso ezali ya koteya nsango ya nsango malamu ezongisami na lolenge moko ya kopesa nzela ete Molimo akamba banso bamisionele mpe baye bazali koteyama. Ezali likambo ya ntina monene mpo na koyekola makanisi ya mateya yango, kasi masengeli te koteyama na kokanga na moto. Misionele asengeli kozala na bonsomi ya kosalela maloba ma ye moko lokola atindami na Molimo. Asengeli te kotanga makambo akangi na moto, kasi koloba uta na motema na maloba na ye moko. Akoki kotika kolanda molongo mwa mateya, kopesaka maye afulami koteya, engebene na litomba mpe mposa ya [moto]. Kolobaka na makanisi mpe maloba na ye moko, asengeli kotatola na ntina ya bosolo ya mateya na ye.

Elilingi
bamisionele bakutani na moto

Teya mpe bengisa engebene na Bamposa ya Moto

Bozali na makoki ya koteya mateya na lolenge nyonso oyo ekosalisa bato bamilengela mpenza mpo na libatisi mpe nkotisa. Liteya nini bokoteya, ntango nini bokoteya yango, mpe ntango boni bokopesa na yango ekotiama malamu koleka na bamposa ya bato oyo bozali koteya mpe bokambi ya Molimo. Ndakisa, ntango bozali koteya bato oyo bazali na boyebi ya Kimoklisto te, bosengeli kobanda na kosungaka bango bamatisa bokangisi na bango makasi na Tata na Lola mpe kososola na ntina ya mwango na Ye (tala “Koteya Bato oyo Bazali na Boyebi Kimoklisto Te” na mokapo 10).

Tika Molimo ekamba yo na maye mabyangi nini kopalanganisa mpe ntango nini kopalanganisa yango. Libyangi elongobana na ntango elongobana ekoki kotindika bato basala makambo oyo ekotonga bondimi na bango. Misala oyo ekoki kokamba na mbongwana monene ya motema (tala Mosiya 5:2; Alma 5:12–14).

Teya mateya oyo ezali pete, polele, mpe mokuse. Na momesano monene, liteya ya botali esengeli te kolekisa baminiti 30, mpe okoki koteya moto na baminiti 5.

Okozala na mposa ya babokutani ebele mpo na koteya mabongi na kati ya liteya moko. Bato bakososola malamu nsango na yo soki ozali koteya mateya ya mikuse, teya mbala na mbala, mpe teya biteni mike ya mokanda.

Koyekola Makomi

Nini botindami koteya?

Mpo na nini ezali ntina koyekola malongi na kati ya mateya?