Likita Linene
Nguya ya Kosalisa Moto
Likita linene ya sanza ya zomi 2025


10:28

Nguya ya Kosalisa Moto

Ntango tosalisaka moto, biso tobengisaka moto yango koya epayi ya Yesu Klisto mpe kokumbamela na ndako ya Nkolo.

Bandeko basi mpe mibali, natondi bino mpo na komipesa na bino ya bosembo na koyaka epayi ya Yesu Klisto na bangonga ya mikakatano oyo. Bozali kafukafu; bozali kitoko; bozali moko na moko mwana ya Nzambe. Ezali losambo na ngai ete tokoyeba botindiki ya Molimo Mosantu ntango tokomi mpe tosalisi moko na mosusu akoma, moyekoli amipesa ya Yesu Klisto mpe ayoki esengo na Ye ntango tozali kokumbamela na ndako ya Nkolo.

Mokambi Russell M. Nelson asakolaki: “Sikawa ezali ntango mpo na yo na ngai tomilengela mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Sikawa ezali ntango mpo na biso tosala ete kimoyekoli na biso ezala likambo na biso ya libosoliboso. Na mokili oyo etondi na makambo ya kobulunganisa makanisi, ndenge nini tokoki kosala yango?

Apesaki eyano: “Kokende mbala na mbala na tempelo ekosalisa biso. Na kati ya ndako ya Nkolo, totalelaka Yesu Klisto. … Toyaka koyeba Ye. … Moluki nyonso ya Yesu Klisto ya sembo akokuta Ye na tempelo.”

Yango wana lolenge nini tokomaka mpe tosalisaka moko na mosusu kokoma, bayekoli ya komipesa ya Yesu Klisto? Tosalisaka moto. Kosalisa na lolenge ya Mobikisi esengaka mawa, boboto, bompikiliki mpe bolingo ezanga bosambisi. Ntango tosalisaka moto moko, biso tobengisaka moto yango aya epayi ya Yesu Klisto mpe akumbamela na ndako ya Nkolo mpo na kozwa nguya na Ye ya bosikoli. Na maloba mosusu, tosalisaka moko na mosusu akoma moyekoli ya komipesa ntango tosalisaka moto na ndenge oyo ekambaka kino na ndako ya Nkolo.

Toyekolaka uta na Nkolo Yesu Klisto nguya ya kosalisa moto na bolingo mpe kozanga bosambisi. Bomikundola mwasi ya Mosamalia na liziba ya mai. Mwasi oyo akokaki komiyoka kozanga motuya, ye moko, ya kolemba, mpe ya komonana te. Ye akokaki komiyoka ete azalaki na esika na ye te. Na bomoi na ye mobimba azalaki na balongani mitano, mpe mobali oyo azalaki kofanda na ye azalaki molongani na ye te. Basusu bakokaki kosambisa ye lolenge ya sembo te kozangaka koyeba makambo ya bomoi na ye. Oyo ekoki kozala moko ya bantina ayelaki na liziba ye moko na eteni ya moi mpenza ya mokolo. Mpe kasi, azalaki moko ya yambo epayi ya nani Yesu Klisto asakolaki Azalaki Masiya. Epayi na Ye, mwasi oyo azalaki mwana mwasi ya Nzambe.

Yesu Klisto ateyaki mwasi yango ete na nzela na Ye moko akoki koyamba bomoi ya seko na komelaka mayi ya bomoi . Asakolaki, “Oyo akomela mayi oyo nakopesa akoyoka lisusu mposa ya mayi te; kasi mayi oyo nakopesa ekotikala liziba ya mayi kotiolaka tii na bomoi ya seko.”

Mwasi ya Samalia ayokaki bolingo ya Mobikisi mpe azwaki litatoli na nzela ya Molimo ete Ye azali Masiya. Nsima ya litatoli oyo, azongaki na engumba, abengaki basusu baya mpe bamona, mpe mingi bandimelaki Yesu, “azali ya solo Klisto, Mobikisi ya mokili.” Klisto asalisaki moto na bolingo, lokola mbano, basusu bakomaki bayekoli na Ye bamipesa.

Toyekoli na oyo etali nguya ya kosalisa moto na mawa uta na Bapostolo ya Klisto Petelo mpe Yoane. Bomikundola moto moko, mokatatali uta na mbotama, azalaki kolala mokolo na mokolo na ekuke ya tempelo kosengaka mosolo. Moto oyo akokaki komiyoka ya kozanga motuya, ye moko, ya kolemba, mpe ya komonana te. Akokaki koyoka ete azalaki na esika na ye te.

“Kasi Petelo alobaki na ye, Nazali na palata te to mpe wolo te; kasi oyo nazali na yango, [ngai] napesi [na] yo yango: Na kombo ya Yesu Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.”

Petelo azwaka moto yango na loboko na ye ya mobali mpe atelemisaki ye, mpe moto yango azongisamaki mobimba. Nokinoki nsima ya likamwisi yango, moto yango akotaki na tempelo elongo na Petelo mpe Yoane“, “kotambolaka, mpe kopumbwaka, mpe kokumisaka Nzambe.” Petelo mpe Yoane basalisaki moto na ndenge oyo ekambaki na ndako ya Nkolo, mpe moto yango akomaki moyekoli ya komipesa ya Klisto.

Baninga na ngai, ezalaki na bangonga na bomoi na ngai wapi na miyokaki mpe ya kozanga motuya, ngai moko, ya kolemba, mpe ya komonana te. Naiyokaki lokola nazalaki esika na ngai te. Nabatisamaki mpe nazwaki nkotisa ya mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ntango nazalaki na mibu 19. Nsima ya mbula moko, nandimaki libiangi ya kosala lokola misionele ya ntango mobimba, kasi ezalaki na makambo mingi oyo nayekolaki naino te na ntina ya lisitwale ya Eklezia.

Na ebandeli ya mosala ya misionele, nayekolaki ete ezalaki na eleko moko oyo bakitani ya baindo ya afrika bapesamaki nzela te kosepela mapamboli nyonso mpo na kokumbamela na ndako ya Nkolo. Kososola yango mpo na mbala ya liboso ememaki mayoki ya nkanda, mobulungano, ntembe mpe bobangi. Mayoki yango ezalaki makasi ete makoki na ngai ya koyoka Molimo Mosantu ebungaki mpo na eleko moko.

Na libaku malamu, nazalaki na moninga misionele ya kafukafu, Kevin Vick, oyo asalisaki ngai na bolingo, bompikiliki, mpe boboto. Butu nyonso ntango azalaki nzeneneke ya mayoki na ngai ya ntembe mpe bozangi solo, azalaki kaka koloba na pete, na Mpaka ya elenge Johnson, “nalingaka yo.” Sima ya baposo mibale, namitikaki ngaimoko koyoka bolingo ya Kevin. Nazuaki makasi ya kosambela epai ya Tata na Lola na nkombo ya Yesu Klisto. Ntango nasambelaki, nabendamaki na eteni 6 ya Malongi mpe Mayokani, molongo 21–23,, Oyo elobi:

“Tala, nazali Yesu Klisto Mwana ya Nzambe. … Nazali pole oyo ezali kongenga kati na molili. …

“… Zongisa mayele na yo nsima na butu oyo wapi obelelaki epayi na ngai kati na motema na yo, ete okoka koyeba mpo na oyo etali bosolo ya makambo oyo.

“Ekitisaki ngai kimia na mayele na yo mpo na oyo etali likambo yango te? Litatoli nini monene osengeli kozala na yango koleka oyo ewuti epayi ya Nzambe ?”

Ntango natangaki, nakundolaki. Ntango natangaki, namikundolaki mokolo oyo nakilaki bilei mpe nasambelaki mpo na koyeba ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe mpe litatoli mosusu ya Yesu Klisto ete Joseph Smith azali Profeta ya Bozongisi. Namikundolaki mayokani esalamaki kati na ndako ya Nkolo oyo ekangisi ngai epayi ya Yesu Klisto na lolenge ya moto ye moko mpe lolenge ya kati. Nayokaki bolingo ya Mobikisi, boboto na Ye, mpe bondimisi na Ye ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi na Ye na nse mpe esengelami mpo na kolengela biso mpo na Boyei na Ye ya Mibale. Lokola namikundolaki, nakokaki lisusu koyeba Molimo Mosantu mpe kososola mobimba mingi ete Yesu azali Klisto mpe nazali moyekoli na Ye.

Bangonga mosusu tokozala na mituna eyanolami te mpe mayoki ya kozala motuya te, ya kolemba, biso moko, mpe komonana te. nzokande, baninga na ngai, tosengeli kokende liboso na bondimi kati na Yesu Klisto mpe komikundola maloba na Ye:

“Tika ete mitema na bino mitungisama te.”

“Kati na mokili bokozala na mitungisi: kasi bozala na esengo malamu; ngai nasili kolonga mokili.”

Nazali nzenekene na bosolo oyo mpe ya lipamboli elakama ya Mobikisi.

Yango wana, nini tokoki kosala mpo na koyeba ete kosalisa na biso ya moto ezala makasi mpenza? Kobika malongi ya Klisto ekosalisa biso. “Kobikaka malongi ya Klisto,” lokola Mokambi Nelson alimboli, “ekoki kobota zolongano ya nguya ya malamu mingi mpenza, kosalaka bomilengeli na bopumbwe ya molimo na bomoi na biso.

Ntango toluki kosalela mibeko ya yesu Klisto ya likolo koleka, … Mobikisi atomboli biso likolo mpo na kobenda mokili ekweisama na kopambolaka biso na bolingani, bomikitisi, bokabi, boboto, bomitosi, kimia, mpe ya monene bopemi.”

“Bopumbwe [Yango ya molimo] ebimisami na kobikaka malongi ya Klisto,”Mpaka Dale G. Renlund elimboli,” epesaka kaka mbongwana ya bozali na biso ya bonzambe na bomoi na biso ya seko te kasi epesaka biso lisusu makasi ya kosunga [na kosalisa] basusu na banzela ya malamu,” Mpaka Renlund akundolisi biso ete “mosala ya Mobikisi ezali kobikisa [mpo na kokomisa biso mobimba]. Mosala na biso ezali ya kolinga—kolinga mpe kosala na lolenge ete basusu bapusana epayi ya Yesu Klisto.”

Makoki na biso ya kobika malongi ya klisto ekofulukisama na boyekoli ya mokolo na mokolo ya Buku ya Mormon mpe ya bolei elambo poso na poso. Mokambi Nelson asakolaki ete Buku ya Mormon “eteyaka malongi ya Klisto … [mpe] epesaka litondi mpe bososoli ya nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto ekoki kozwama na esika nyonso.” Nalingaka buku oyo. Koliaka elambo na losambo poso moko na moko ekokolisa bososoli na biso ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpee epesaka bozongisi sika ya molimo, libondi, mpe nguya ya bonzambe kati na bomoi na biso. Bomikundola, “na nzela ya makuli [ya bonganganzambe], nguya ya bonzambe ezali komonana,” mpe nguya oyo, yango eutaka na Yesu Klisto elendisaka mposa na biso mpe makoki na biso ya kosalisa moto.

Boyekoli Buku ya Mormon mpe kolia elambo na ngai ekitisaka mayoki ya bolembu, nakomisa mokano na ngai ya kosalisa moto na lolenge ya Mobikisi, mpe esungi kokomisa kiboyekoli na ngai ya yambo ya likolo mpenza.

Baninga na ngai, nalaki ete ntango biso tobiki malongi ya Klisto mpe tosalisi moto na ndenge oyo ekambaka na ndako ya Nkolo, tokozala na makoki ya kokende liboso na bondimi kati na Yesu Klisto kutu kondima mituna eyanolama te mpe mayoki ya kozala ya kozanga motuya, yo moko, ya kolemba, mpe ya komonana te. Tokobengisa moto aya epayi ya Yesu Klisto mpe akumbamela na ndako ya Nkolo mpo na kozwa nguya na Ye ya kosikola mpe bolingo. Na kati ya ndako ya Nkolo, biso “tokoyoka boboto [ya Mobikisi]. [Biso] tokozwa biyano na mituna na oyo ezali kotungisa [biso] mpenza. [Mpe biso] tokososola malamu esengo ya nsango malamu na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Nkolo Yesu Klisto Akoya Lisusu,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2024, 121–22

  2. Tala Yoane 4:5–42.

  3. Na momesano, liziba ya Yakobo etalamaka mpenza na ebandeli ya mokolo na ntongo. Ezalaki esika ya kosangana mpe ya bondeko na moko na mosusu. Mwasi ya Mosamalia ayaki ye moko na liziba ya Yakobo na eteni ya katikati mpe molungie mpenza ya mokolo na ngonga ya motoba, oyo ezalaki na nzanga. Kokomaka na ngonga oyo ekoki kolakisa lolenge nini amonaki maye basusu bakokaki koyoka oyo etali ye mpe lolenge nini akokaki komiyoko na oyo etali yemoko.

  4. Yoane 4:13–14.

  5. Yoane 4:42.

  6. Tala Misala 3:1–11.

  7. Misala 3:6.

  8. Tala Misala 3:7.

  9. Misala 3:8.

  10. Nabatisamaki mpe nazwaki nkotisa ya mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na sanza ya mwambe 1986. Uta na sanza ya mwambe 1987 kino sanza ya mwambe 1989 nasalaki lokola misionele na Misio ya Alabama Birmingham.

  11. Tala Mituna ya Eklezia mpe Nsango malamu, “Langi ya Loposo mpe Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka,“ Biblioteke ya Nsango malamu.

  12. Eksperiense oyo elimbolami na molai mingi koleka kati na lisukulu ya Peter M. Johnson, “Applying the Doctrine of Jesus Christ into Our Lives” (Losambo ya Brigham Young University–Idaho, Sanza ya misato 14, 2023), byui.edu.

  13. Malongi mpe Mayokani 6:21–23.

  14. Yoane 14:27

  15. Yoane 16:33

  16. Malongi ya Klisto esali biloko mitano ekangama: bondimi kati na Nkolo Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, koyambola, kozwa makuli mpe kotosa mayokani, kosantisama na Molimo Mosantu, mpe koyika mpiko tii na nsuka. Bondimi na Nkolo Yesu Klisto ezali libongi moko ya mosala mpe ya nguya ya bonzambe. Boyamboli ezali kosalelaka bondimi ya moto kati na Klisto na kobalusaka mitema mpe milimo na biso epayi na Ye. Boyamboli ezali etumbu te. Ezali nzela ya kozalaka kobotama na molimo kati na Yesu mpe kozwaka elilingi na Ye kati na elongi na biso. Kozwa makuli mpe kotosa mayokani esalamaki elongo na Nzambe mpe Klisto epesaka biso ekoteli monene koleka na nguya na Bango mpe bolingo na Bango mpe epesaka nzela ya kosatisama na nzela ya Molimo Mosantu. Eloko ya nsuka ya malongi ya Klisto ezali kotia molende kino na nsuka, oyo ezali kobika eloko moko na moko ya malongi ya Klisto “na kozongelaka mbala na mbala” mpo ete tokoka kokoma, mpe kosalisa moko na mosusu akoma moyekoli amipesa ya Yesu Klisto mpe toyoka esengo na Ye ntango tozali kokumbamela na ndako ya Nkolo (Dale G. Renlund, “Bolandani ya Nguya mpe ya Malamu ya Malongi ya Klisto,” Liahona, Sanza ya Mitano 2024, 81; tala lisusu Russell M. Nelson, “Overcome the World and Find Rest,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2022, 97).

  17. Russell M. Nelson, “Overcome the World and Find Rest,” 97.

  18. Dale G. Renlund, “Bolandani ya Nguya mpe ya Malamu ya Malongi ya Klisto,” 82, 83; nsete ebetami.

  19. Russell M. Nelson, “Buku ya Mormon: Bomoi na Yo Ekokaki Kozala Lolenge nini Soki Yango Ezalaki Te?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 62.

  20. Malongi mpe Mayokani 84:20.

  21. Russell M. Nelson, “Nkolo Yesu Klisto Akoya Lisusu,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2024, 122.