Bokende mpe Bosala Se Bongo
Nalingi kolobela mingi bamisionele oyo babyangami na mikumba ya mosala. Bazali ndakisa epai na biso.
Ntango Mobikisi asalaki mobembo na Betesaida, bato mosusu bamemelaki Ye moto oyo akufa miso. Ntango mosusu bazalaki na elikia ya komona likamwisi moko na miso. Mobikisi “azwaki mokufi miso na loboko, mpe amemaki ye na libanda ya engumba” mpo na kobikisa ye na nkuku. Na ebandeli, kobikisama emonanaki ezali na ntina te. Mobali “atalaki likolo, mpe alobaki, namoni bato lokola banzete, kotambola.” Na mawa nyonso, Yesu “atyaki lisusu maboko na ye likolo ya miso na ye, mpe asalaki ete amona likolo.” Na bosimbami lisusu ya maboko ya Mobikisi, mokufi miso sikawa “amonaki … polele.”
Oyo ezali kaka ndakisa moko ya lolenge nini bomoi ya mobikisi ezali na bizaleli ya mosala ya komikitisa. Akundoli biso ete “Ayaki te mpo na asalisama, kasi mpo na kosalisa” mpe na nsima abengisi biso na kolanda ndakisa na Ye ya komipesa, na kopesaka na baye basengi biso, mpe kolinga mozalani na biso. Ntango atunamaki, “Mozalani na ngai azali nani?” Klisto akabolaki lisese ya Mosamalia malamu na mokumba ya “Bokende, mpe bino bosala se bongo.”
Bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazali bandakisa ya mikolo na biso ya Mosamalia malamu oyo Klisto abengisi biso tokoma. Nalingi kolobela mingi bamisionele oyo babyangami na mikumba ya mosala. Bazali bandakisa mpo na biso ya lolenge nini mosala (1) efungoli mitema na nsango malamu ya Yesu Klisto, (2) epesi biso nyonso nzela ya kosalela ata makambo na biso, mpe (3) ememi nguya ya Klisto na bomoi na biso.
Ya yambo, Mosala Efungoli Mitema na Nsango Malamu ya Yesu Klisto
Pene na mobu 91 liboso ya ntango na biso, Amona, misionele moko ya Buku ya Mormon amilakisaki epai ya Mokonzi Lamoni na kolobaka ete, “Nazali na mposa ya kofanda kati na bato oyo mpo na mwa ntango; [mpe] nakozala mosali na yo.” Na ntina ya mosala na ye mpo na mokonzi, Amona azwaki libaku ya “koloba na mpiko nyonso, mpe koyebisa [Mokonzi Lamoni] na nguya nini” asalaki mosala na ye. Na esika na yango, mokonzi alakaki ete “nini [Amona] oyo azali na mposa na yango [mokonzi akopesa yango].” Bosenga ya Amona ezalaki bobele mokonzi ayoka nsango malamu ya Yesu Klisto. Mosala ya Amona esalaki ete “bankoto ya milimo [ememaki] na boyamboli.”
Na mikolo na biso, mosala ezali kokoba komema basusu na nsango malamu. Ndeko mwasi Bevan azalaki kosala lokola misionele ya koteya ntango abandaki kokutana na mikakatano ya kolongono ya nzoto, oyo esengaki ete azonga na mboka na ye mpo na kozwa nkisi. Na esika ya kolongolama, akokaki kokoba kosala lokola misionele ya mosala uta na ndako.
Ntango bazalaki kotala parke moko, Ndeko mwasi Bevan mpe moninga moko batindamaki kosolola na mama moko na bana minei ya mike, kasi bakakatanaki mpe libota ekendeki na motuka. Mokolo oyo elandaki, bazongaki na parke, kobondela ete libota oyo ezala wana. Na ndenge ya likamwisi, mama afandaki na esika moko mpenza lokola mokolo eleki. Na mbala oyo, Ndeko mwasi Bevan mpe moninga na ye bapusanaki penepene na mama, bayebaki ye, mpe bamonaki ete azalaki na mposa makasi ya lisalisi ya ntango. Basalisaki ye mpe na nsima babyangaki ye ete ayekola makambo oyo etali nsango malamu.
Mpo na mosala wana mpe libyangisi, mama wana mpe mwana na ye ya liboso ya mwasi bazwaki libatisi, mpe mwana na ye ya mibale ya mobali azwaki libatisi mbula moko na nsima. Tii lelo, bazali kaka bandimi. Ndeko mwasi Bevan ayebaki ete likambo oyo efulamaki na bonzambe mpe “elakisamaki na [ye] ete [ye] azalaki mpenza esika Nzambe azalaki na mposa [ye] azala.”
Lokola Amona mpe Ndeko mwasi Bevan, lokola tozali kosalela basusu, tozali “kolakisa bandakisa malamu epai na bango”mpe bazali na mposa ya koyeba “ntina ya elikia oyo ezali kati na [biso].”
Yesu abengisi biso “Tokende, mpe biso tosala se bongo.”
Ya mibale, Mosala Epesi Biso Nyonso Nzela ya Kosalisa ata Soki Tozali na Makambo Ndenge Nini
Mokambi Russell M. Nelson asengi nai “nyonso elenge mobali alongobani, akoki mpo na komilengela mpo na mpe kosala misio” mpe mpo na elenge mwasi nyonso oyo akoki “kosambela mpo na koyeba soki Nkolo alingi [ye] asala misio.” Alakaki ete “ekateli na yo ya kosala misio, ezala ya koteya to ya mosala, ekopambola yo mpe ebele basusu.” Misala ya misio ebongolaki ndimbola ya liloba ekoki. Sikawa elenge mobali nyonso mpe mwasi oyo abongi oyo azali na mposa ya kosalela misio ya ntango mobimba mpo na Nkolo akoki kosala yango, na bolongoli moke mpenza.
Mpaka Holgado azali ndakisa ya kozala na likoki ya kosalela ata soki makambo ezali ndenge nini. Abotamaki na maladi moko ya mabe oyo ewutaka na makila oyo epekisaki ye kosalaka misio ya koteya. Mpaka Holgado abengami lokola misionele ya mosala mpe amipesaki na mosala na ebombelo ya episkopo, epai wapi asalisaki basusu kozwa lisalisi oyo basengelaki na yango. Atondisaki baetage, atyaki ndunda na basaki, mpe abukaki bakarto.
Ntango Mpaka Holgado alobaki na likita ya elambo nsima ya misio na ye, akabolaki ete “Nzambe azali na mposa ya bamisionele ya mosala. Azali na mposa bato balinga mpe basalela basusu. Bato yango babombaka papye ya twaleti, batyaka broccoli na basaki, batongaka biloko ya bandako, mpe bazalaka malamu mpo na bato.”
Ezali na ntina te ozala na mokumba moko to ozala na elembo moko mpo na kosala malamu. Eloko nyonso ya mosala endimami na Mobikisi. Tozali banso na makoki ya kosalisa basusu koya epai ya Klisto na kosalelaka na bolingo ya motema. Tokoki banso kosala mosala na nkombo ya Klisto na moko na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu mpe kozala na bomoi lokola bandakisa ya bondimi na Yesu Klisto. Mosala epesi biso nzela ya komilakisa lokola bambeka ya bomoi oyo endimami na Nzambe.
Yesu abengisi biso “Tokende, mpe biso tosala se bongo.”
Ya misato, Mosala Ememaka Nguya ya Klisto na Bomoi na Biso.
Elenge misionele oyo akendaki uta na mosala ya koteya na kino na mokumba ya mosala akutanaki na mikakatano ya moto ye moko oyo etikaki ye na mposa ya nguya ya lobiko ya Klisto. Mosala oyo ebulisami ememaki nguya wana na bomoi na ye. Alobaki, “Nayokaki ete ntango nazalaki kobunda na mikakatano, nakokaki koyoka Klisto kotombola ngai likolo. Ezali na likambo moko ya ntina mingi na komonaka Ye kopambola bato na nzela ya biloko ya kolia, na tempelo, mpe na nzela ya nsango malamu na Ye.”
Mpaka yango abandaki koyoka esengo mingi, mpe molende na ye ya sika epambolaki ye mpe libota na ye mobimba. Molimo ekotaki na ndako na bango mingi, bakendaki na tempelo elongo mbala na mbala, mpe Klisto akomaki kotya likebi mingi na libota na bango. Misionele oyo andimaki ete Klisto abikisaki bomoi na ye mpe apambolaki libota na ye na nzela ya mosala.
Mokambi Nelson ateyaki, “bolingi ya kosalisa mpe kolendisa basusu etelemi lokola elembo ya bomilengele ya moto mpo na kobikisama” na nguya ya bosikoli ya Mobikisi.
Yesu abengisi biso “Tokende, mpe biso tosala se bongo.”
Bamisionele ya Mosala Bazali Bandakisa ya Bayekoli ya Yesu Klisto oyo Bamipesi.
Ntango yo to moi libota apambolami na libiangi lokola misionele ya mosala, wana ezali ntango ya kosepela. Sikawa libota na yo ekozala na momonisi ya Nkolo Yesu Klisto oyo aponami mpo na kofanda na ndako na yo. Yango ekobongola bino banso mpo na bolamu. Esengeli kozala na mawa te na libiangi moko mpo na kosalela. Toyemba, “Nakokende esika olingi nakende” mpe “Nakozala oyo olingi nazala.” Tala libaku ya kolakisa ete tolingi mpenza koloba oyo tolobaka!
Mpo na bino banso oyo bozali kosalela, mpe mingimingi na bilenge koleka 4.000 ya bamisionele ya mosala, tolingi bino! Soki bamisionele ya koteya bazali monoko ya Nkolo, bongo bamisionele ya mosala bazali maboko ya Nkolo, mpe bozali bamisionele ya kelasi ya mibale te. Mokomoko na bino azali na ntina mingi mpo na bosangani ya Yisalaele. Mokambi Nelson ateyi ete “ntango nyonso oyo tosali eloko moko oyo ezali kosalisa moto … mpo na kosala mpe kobatela boyokani na bango elongo na Nzambe, tozali kosunga mpo na kosangisa Yisalaele.”
Bino bamisionele ya mosala bosangisaka Yisalaele na makambo mingi, mpe mosala na yo ebongoli bomoi. Mbala mingi toyebi te nani akozwa litomba na mosala na yo, kasi Nzambe ayebi. Kundola ntango nyonso ete “ntango [osaleli] moko ya moke oyo aleki moke na kati na bino, bino [bosalela Ye].” Tozali koyoka mingongo na bino ntango bozali kosala na bolingo na bino moko na bisika ya bosungi ya Eklezia; tozali komona koseka na bino ntango bozali kosalisa na bibongiseli ya mboka; mpe tozali komona pole na bino ntango bozali kosalela na batempelo. Ozali koleisa bato oyo bazali na nzala, kolatisa bato oyo bazali bolumbu, mpe kopesa mayi na bato oyo bazali na mposa ya mayi.
Biso nyonso tozali na mposa “Tokende, mpe tosala lokola.
Mosala Ezali Eteni ya Ntina mpo na Bayekoli ya Klisto
Mosala ezali na nguya ya kofungola mitema na nsango malamu mpe epesi biso banso nzela ya kopesa molimo na biso mobimba na Klisto. Ebongoli mitema na biso mpo na kokoma mingi lokola Ye, mpe na nzela na yango, totomboli basusu. Mokolo moko Mokambi Nelson atunaki, “Na mokili oyo ebetami na bobebisi ya molimo, bato moko moko bakoki kosala bokeseni?” Eyano na ye: “Iyo! ‘Bato ya boyokani ya Nkolo, bansimbi elongo na nguya ya Nzambe na nkembo monene bakoki kotombola bomoi ya bato banso.” Na nzela ya mosala tozali kobongola mitema ya bato—mpe mokili mobimba.
Klisto “atambolaki kosala malamu.” Asalisaki babeli, apesaki miso na bakufi miso, mpe akendaki kotala bato oyo bazalaki konyokwama. Alambaki bilei, asalisaki na bafeti ya libala, mpe aleisaki bankoto ya bato bazalaki na nzala. Ntango tozali kopesa lisalisi na nkombo ya Klisto epai ya moto moko, tokomi mosantu mingi mpe tolongobani na likabo ya bomoi ya seko. Yesu Klisto azali na bomoi. Azali Mobikisi na ngai mpe ya bino. Azali mosikoli na biso. Azali ndakisa na biso monene ya mosala. Nabengisi mokomoko na biso kokende mpe kosala se bongo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.