Komikundola Bampate
Mobeko ya kotanga mpe ya kokoma makambo na mikanda ezali kosala. Ezali nzela ya Nkolo.
Klisto azali Mobateli Malamu ya Mpate. Mokomoko ya etonga azali na motuya mpo na Ye. Apesaki biso ndakisa ya kobatela bampate mpe ateyaki biso na maloba mpe na misala bizaleli ya mobateli malamu ya mpate, bakisa koyeba nkombo ya bampate na yo, kolinga bango, koluka baoyo babungi, koleisa bango, mpe na nsuka, kozongisa bango na ndako. Azali kozela biso tosala ndenge moko na babateli na Ye ya mpate.s
Tokoki koyekola mingi na oyo etali kosalela nzela ya Nkolo uta na profeta ya kala—mpe mobateli mpate ya kokamwa—Moroni. Abikaki na eleko moko ya mpasi mpenza, ntango batelefone ya maboko, baordinatere mpe Internet ezalaki te. Kasi alongaki kobatela bampate. Ndenge nini basalaki yango? Tokoki komona mwa moke mayele na ye na Moroni 6. Kuna totangaki ete bandimi “batangamaki na kati ya bato ya eklezia ya Klisto; mpe nkombo na bango ekomamaki, ete bakoka kokundolama mpe koleisama na liloba malamu ya Nzambe, kobatela bango na nzela ya alima. … Eklezia esanganaki esika moko mbala na mbala, mpo na kokila mpe kosambela mpe mpo na koloba moko na mosusu oyo etali bolamu na milimo na bango” (Moroni 6:4–5; nsete ebakisami).
Mpo na Moroni, ezalaki bobele nyonso kaka mpo na bato—bankombo! Asalelaki motindo ya kotanga mpe kokoma” mpo ete banso bakoka kokundolama. Moto nyonso oyo abundaki to ayengayenga amonanaki, kopesaka nzela na basantu kosolola na oyo etali bolamu na bango na makita. Lokola mobateli mpate oyo atikaki bampate ntuku libwa na libwa (na libateli mpe kimya, nandimi yango) mpe akendaki koluka oyo abungaki (tala Luke 15:4–7), basengi biso ete toyeba malamu bitonga na biso—mpo na kotala mpe kokundola mpe kokende mpe kosala ndenge moko.
Ntango nazalaki mokambi ya bamisionele na Inde, nazali komikundola ete natunaki elenge moko oyo azalaki mokambi ya etape na oyo etali mikano na ye mpo na mbula oyo ezalaki koya: “ Bokobongisa mibali boni mpo na kozwa Bonganganzambe ya Melikisedeke?” Eyano na ye ya mbala moko ezalaki “Nsambo!”
Namitunaki uta wapi na esika ya kokamwa akanisaki motango wana ya sikisiki mpenza! Liboso ete nazongisela ye eyano, abimisaki papye moko oyo ezalaki na mitango kobanda moko kino nsambo na ngambo na yango. Na milongo mitano ya liboso ezalaki na bankombo likolo na yango—ya bato ya solo oyo ye mpe bampaka ya lisanga na ye basengelaki kobyanga mpe kolendisa mpo na kozwa lipamboli ya bonganganzambe kati na bomoi na bango. Na ntembe te, nasengelaki kotuna na oyo etali milongo motoba mpe nsambo oyo ezali mpamba. “Oh, Mokambi,” alobaki, koningisaka moto na ye na mawa, “na ntembe te tokobatisa ata mibali mibale na mokolo ya yambo ya mobu baoyo bakoki kozala na bonganganzambe na nsuka ya mobu.” Mokambi oyo ya malamu mpenza ayebaki malamu ndenge ya kotanga mpe kokoma makambo.
Klisto abongisaki Eklezia na Ye na lolenge oyo ete ekozala mpasi mpo na kobosana molimo moko, mpamba te mokomoko azali na motuya mingi mpo na Ye. Moto na moto na palwasi, atako elenge to mokolo, mobali to mwasi, azali na ebele ya bakambi—babateli mpate—oyo bapesameli mokumba ya kotala bango, na komikundola bango. Elenge mobali, na ndakisa, apesameli mpo na bolamu na ye episikopo, bandeko mibali oyo bazali kosala mosala, baye bilenge ya mikolo, balakisi ya seminaire, bakambi ya masanga, mpe na nsima basusu—bango nyonso bazali lokola minyama ya libateli, bakangamaki makasi na nse ya elenge wana mpo na kokanga ye soki akwei. Ata soki kaka monyama moko ezali na esika malamu, elenge mobali wana akozala na likama te, akoyebana, mpe akokundolama. Kasi, mbala mingi, tomonaka ete monyama moko te ezali na esika na yango. Bato bakendaka mbala na mbala na kati ya londende—mpe moto moko te amona yango. Ndenge nini tokoki kozala babateli mpate ya malamu koleka? Tokoki koyekola kotanga mpe kokoma.
Eklezia epesi biso balapolo mpe bisaleli mpo na kosala kaka bongo—mpo na komikundola. Lapolo ya Nsanza Misato ezali ndakisa malamu. Ezali kopesa biso nzela ya kotanga mpe kopesa ntina ya mondimi mokomoko mbala mingi mpe komona baye bazali kozanga to basengeli na lisalisi na biso mpe bolingo na biso. Mokanda ya Makambo ya Kosala mpe Masolo ya Mozindo, ezali komonisa bato oyo tosengeli kotyela likebi sikoyo, ndenge moko mpe na lapolo ya Ezaleli ya Mokanda ya Ndingisa ya Tempelo mpe makambo mosusu. Bisaleli wana ya kotanga mpe ya kokoma mikanda esalisi biso totalela bato. Nani azali na mposa ya libyangi, kokende liboso ya bonganganzambe, to kosalisa komema nkombo ya libota na tempelo? Nani tokoki kosalisa na komibongisa mpo na misio ya ntango nyonso? Nani abungaki na sanza oyo? Bisaleli oyo ekosalisa biso mpo kokundola bato.
Nayebaki libota moko oyo ezalaki kowuta Etazini oyo azwaki mokumba moko na Afrika. Na mokolo ya Eyenga na bango ya yambo mpenza, bakendaki na eteni bobele se moko ya Eklezia na mboka, esika wapi bayambamaki na esengo. Na nsuka ya ntongo yango, mwasi ya mobali yango abengamaki lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe ye lokola mokambi ya Bilenge Mibali! Atunaki mokambi ya etape oyo azalaki komonana ete alembi, soki bilenge mibali bazalaki boni. Mokambi oyo ya sembo, ya nkola ya yambo alakisaki sima ya ndako ya elambo mpe alobaki, “Mibale wana kaka kuna.” Mobali yango azalaki na ntembe oyo ebongi, yango wana amemaki mokanda ya etape na ndako, nokinoki amonaki ete ezalaki mpenza na bilenge mibali tuku mibale oyo bazalaki na mokanda yango. Azongaki epai ya mokambi ya etape mpe asengaki bilenge mibale ya molende, oyo bayebaki koloba minoko mibale ete bazala bapesi-toli na ye mpe na sima afandaki elongo na bango mpe bana mibali mibale mpo na kotalela lisusu bankombo yango.
Na nsima, bilenge yango ya molende babandaki mosala. Na boumeli ya basanza moke, bamonaki nkombo ya bana mibali nyonso oyo bazalaki na mokonda yango. Nkombo na nkombo, bampate wana babungaki bayambamaki lisusu na baninga na bango mpe bapesamelaki bilei ya molimo mpe ya mosuni! Na boumeli ya mbula moko, na mokolo ya Eyenga nyonso, bilenge mibali tuku mibale na moko bazalaki koyangana. Matondo mingi mpo na bilenge mibali oyo bazalaki kotanga mpe kokoma.
Moninga na ngai ya bolingo, lokola elenge moyekoli ya universite, akendaki elongo na libota na ye na engumba monene ya Amerika mpo na kokoba kelasi na ye. Abengamaki mbala moko mpo na kokamba lisanga ya bampaka. Lokola azalaki na mwa kobanga mpo na lisolo na ye ya liboso elongo na mokambi ya likonzi, azwaki ekateli ya komibongisa. Ayebisaki mokambi ya likonzi ete azalaki na mikano misato mpo na mbula oyo ezalaki koya: (1) 90% ya mosala ya kosakola, (2) liteya moko ya ntina ya nsango malamu poso na poso, mpe (3) mosala ya lisanga ya bampaka oyo ebongisami malamu sanza nyonso.
Koseka na moninga na ngai, mokambi oyo ya likonzi ya mayele atunaki, “Okoki kopesa nkombo ya mondimi ya Lisanga oyo azali na mosala mingi te oyo okoki kosalisa mpo na kokende na tempelo elongo na libota na ye na mobu oyo?” Likambo yango ekamwisaki moninga na ngai. Akanisaki malamu mpe azwaki nkombo moko. “Koma yango na nse,” elobaki mokambi ya likonzi. Na sima mokambi oyo ya mayele atunaki motuna moko mbala misato lisusu—mpe lisolo esilaki. Elenge mobali oyo alongwaki na lisolo wana sima ya koyekola liteya moko ya ntina mingi na oyo etali bokambi mpe mosala. Akendaki na lisolo yango na baprograme, mateya, mpe misala. Abimaki na bankombo! Bankombo wana minei na sima ekomaki likambo monene ya mosala na ye mpe oyo ya lisanga na ye.
Lokola mokambi ya misio, nakendaki kotala moko ya bitape na ngai mokolo moko ya Eyenga na ntongo. Namonaki ete mokambi ya etape azalaki ntango nyonso kobimisa kalati moko na libenga na ye mpe azalaki kokoma likolo na yango. Nazwaki ekateli ya kotuna ye na oyo etali likambo yango sima ya losambo ya nsuka. Ntango liyangani esilaki mpe liboso ete nakoka kotuna likambo oyo etali lokasa yango, mokambi ya etape akendaki mbangu na ebaelo, epai kuna bapesaki ye lokasa yango. Nokinoki nalandaki mokambi wana ya molende na likita na ye ya poso na poso mpo na boyokani kati na bamisionele ya etape. Liboso babanda, abimisaki papye yango na libenga na ye. Etondisamaki na bankombo ya bandimi oyo bazalaki na liyangani ya elambo te. Nsima ya mwa miniti moke, moto mokomoko na kati ya bato yango aponaki nkombo moko to mibale, mpe alobaki ete akokende kotala bango kaka mokolo yango mpo na koyeba soki bazali malamu mpe koyebisa bango ete babungisaki bango. Sikoyo wana ezali kotanga mpe kokoma.
Nazali komikundola disitiliki moko, na ntaka ya bangonga mingi na mpepo longwa na tempelo oyo ezali penepene, epai wapi kozala na mokanda ya tempeloezalaki likambo ya ntina mingi, atako ekokaki kosalelama soko moke te. Na mokolo ya Eyenga ya liboso ya sanza nyonso, bakambi basalelaki bisaleli na bango mpo na kotanga motuya ya bandimi bazwa dotatio. Soki bamonaki ete kala mingi te, mokanda ya tempelo ezali kosila, seketeleakobongisa mwango ya sika ya lisolo. Bato oyo bazalaki na mokanda ya tempelo esila, bakambi basololaki na bango, na sima balukaki kosalisa bango na kozonga na nzela ya boyokani. Natunaki motuya boni ya bandimi bazali na dotatio bazalaki na mokanda ya tempelo ya sika. Eyano ezalaki 98,6 pourcent ya kokamwa. Ntango natunaki bango na oyo etali motoba oyo mikanda na bango ya tempelo esilaki, bakambi bayebisaki ngai bankombo na bango mpe bayebisaki ngai milende oyo bazali kosala mpo na kozongisa bango!
Eleki mwa bambula, libota na ngai ezongaki na Etazini. Tozalaki na esengo ya kokende na eklezia awa nsima ya mibu 26 ya kokamwa na ba biteni ya mike, oyo ezalaki mosika mingi. Babengaki ngai lokola misionele ya palwasi. Tozalaki na mokambi monene ya misio ya palwasi mpe tozalaki kosala makambo ya kosepelisa mpe koteya bato ya kokamwa. Nasengaki kokende na likita ya lisanga ya palwasi mpo na kotala mpe kozwa lisalisi na bango elongo na baninga oyo tozalaki kosala na bango. Nakamwaki ntango nyonso oyo balobelaki ezalaki mosala oyo ezalaki koya ya palwasi. Napusanaki penepene na mokambi ya misio ya palwasi sima mpe nakanisaki ete azwaki libaku te ya kozonga mpe kopesa lapolo na bato na biso. Ayanolaki nini? “Oh, nakoki kopesa lapolo te.”
Nakesenisaki yango na likita moko ya lisanga ya etape na Lahore, Pakistan, oyo nakendaki kaka baposo liboso. Mwa liboke oyo bafandaki zingazinga ya mesa moko ya moke elongo, mpe nyonso oyo balobelaki etalaki bato. Bankombo. Mokambi mokomoko apesaki lapolo ya mosala na ye mpe ya bato mpe ya mabota oyo azalaki kobatela. Bango nyonso bazalaki na libaku ya kobakisa makanisi na bango na banzela ya malamu koleka oyo bakokaki kopambola baoyo bazalaki kolobela. Miango misalemaki mpe misala mipesamaki. Oyo nde liteya kitoko mpo na oyo etali kotanga mpe kokoma bankombo ya bandeko na biso mibali mpe basi ya nkola ya liboso.
Na Eklezia ya Yesu Klisto, tosili kolakisama na baprofeta ya kala mpe baprofeta ya lelo—mpe na motindo oyo Mobikisi na biso abongisi—ndenge ya kosala mosala. Tozwi bankombo, tomikundoli, mpe tolobeli mpo na bolamu ya milimo. Bakambi oyo basali bongo bakozanga te makambo oyo basengeli kolobela na makita na bango! Mobeko ya kotanga mpe ya kokoma makambo na mikanda ezali kosala. Ezali nzela ya Nkolo. Tokoki kosala malamu koleka. Mpo na Nzambe, oyo azalisaki molongo mpe azali mokonzi likolo na nyonso, mosala oyo—ya Ye mosala mpe nkembo—ezali mpenza ya moto ye moko. Mpe bongo esengeli ezala mpo na moko moko na biso, lokola bisaleli na maboko na Ye na mosala na Ye ya kokamwa ya lobiko mpe ya bonetolami. Makamwisi kati na bomoi ya bato ya solosolo ekobima. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.