Bolingo ya Bomikabi ya Yesu Klisto
Libiki mpe bolimbisi ezwami mokomoko na botondi na yango kati ya bolingo ya bomikabi ya Yesu Klisto.
Nazali komonisa bolingo na ngai mpo na Mokambi Russell M. Nelson mpe botondi na ngai mpo na bopusi ya kokamwa oyo azali na yango na moko na moko na biso. Mpe mpo na biso nyonso, nazali kotonda Nzambe mpo na kobatela mpe kokumisa bomoi ya lokumu ya Mokambi Dallin H. Oaks.
Mibu nyonso, nayokaka bolingo monene mpo na Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe mpo na Bomikabi na Ye ya ngolu. Mbeka na Ye eleki monene, oyo ebatelaka elonga likolo ya liwa mpe lisumu, ezali likambo ya motuya mingi na lisolo mobimba ya bato. Kososolaka likabo na Ye ya bonzambe ezali mpo na ngai liteya ya lola oyo ekowumela seko mpe ekokoba ata nsima ya nkunda.
Motema mawa ya nguya ya Mobikisi na kolimbisaka lisumu mpe kobikisa bampota oyo euti na masumu ya basusu bolakisi ya makamwisi eleki monene ya bolingo ya Nzambe.
Mposa na ngai ezali ya kopesa elikia mpo na baye bazali koluka bolimbisi mpo na masumu minene mpenza mpe ya kopesa libondisi na baye bazali koluka libiki na bampota ya mpasi euti na masumu minene ya bato mosusu.
Libiki mpe bolimbisi ezwami mokomoko na botondi na yango kati ya bolingo ya bomikabi ya Yesu Klisto.
Bondimi kati na Yesu Klisto
Soki bosali masumu minene mpe bozali na nzela to mposa ya koyambola mpenza mpe koyoka esengo monene ya koyambola mpe boyoki esengo ya kolimbisa oyo ekoki kolimbolama te, boyeba ete likamwisi oyo ezali kozela bino. Mobikisi azali kokoba kobenga, “Boya epayi na ngai.”
Kolendisa bondimi na bino kati na Mobikisi na biso, Yesu Klisto, ekotindika mposa ya molimo na bino ya koyeba Ye, kondimela Ye, mpe kopesa motema na bino epayi na Ye. Enosa atunaki oyo etali bolimbisi na yemei, “Nkolo, esalemi lolenge nini?” Nkolo ayanolaki, “Mpo na bondimi na yo na Klisto, oyo naino omonaki mpe oyokaki mokolo moko te liboso.”
Mpe Moroni abakisaki, “Mpe boboya bozangi bonzambe nyonso; mpe soki boboyi bozangi bonzambe nyonso, mpe bolingi Nzambe na bokasi, mayele mpe makasi na bino nyonso, bongo ngolu na ye ekokoka mpo na bino.”
Kotika lisumu, kotalela Nzambe, mpe kolendisa bondimi na bino kati na Yesu Klisto ezali baebandeli ya kitoko. Kopesa bolingi na bino epayi ya Nzambe na bomikitisi esangisi kondimaka masumu minene epayi ya Episikopo to mokambi ya etape na bino, kasi bolimbisi na bino mobimba eutaka na Mobikisi. Bolimbisi ezali likabo ya bonzambe epesami na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto.
Bosembo
Mposa moko ya kozonga ya solo epayi ya Nzambe elandisami na ekateli ya kozala mpenza sembo na Tata na bino ya Lola, na binomei, na baye oyo bayokaki mpasi, mpe na mokambi na bino ya bonganganzambe. Tata na bino asepelaka na mposa na bino ya koya epayi na Ye na motema ebukana mpe molimo ya mawa. Kozala na motema ya mawa ezali komitia binomei na bomikitisi na maboko ya Nzambe; kozala na motema ebukana ememaka oyo Apostolo Paulo alimboli lokola “mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe,” mposa makasi ya motema ya kozonga epayi na Ye atako soki yango ezali kosenga nini.
Kozongisa Oyo Ebukani
Mposa na bino ememaka bino bolinga kobongisa oyo bobebisi. Kasi, kososolaka ete biloko mosusu ezali te na nguya na bino ya kobongisa, bosambelaka makasi ete Nkolo, na nzela ya ngolu na Ye, akosalisa kobikisa baoyo bazokaki likolo ya misala na bino.
Mbano ya masumu minene na basusu ezalaka mingimingi mpasi makasi mpo na kolonga yango. Bozali kolanda ndakisa ya bana ya Moziya, oyo “basalaki makasi na mpila mpo na kobongisa mabe oyo basalaki”? Bosolola na baye botosaka na ntina ya makambo oyo bozali ntango mosusu komona te.
Ntango nazalaki kolengela lisikulu oyo, nazwaki email moko nakanaki te uta moto moko oyo azali na nzela ya koyambola mpe azali na mposa ya kozonga na Eklezia. Mwasi na ye ya kala azalaki konyokwama kaka na bobungisi “ya libala [na bango] ya seko, [mikakatano na bana], bobungisi ya libateli ya mosolo, … [kozala] te na makoki ya kosalela mbongo malamu, [mpe] mayoki makasi ya kotungisama mpo ete atekami.”
Akabolaki elongo na ngai lolenge nini mokambi na ye ya bonganganzambe “asepelaki mpo na [kotuna ye] kotala na ezaleli ya losambo nini [mosusu akokaki kosala mpo na mwasi na ye ya kala mpe bana].” Na ndingisa na ye, nakoki kokabola eteni ya email na ye.
“Ngai [yambo] nakanisaki ete [mbongo] natikaki kati na mokanda ya koboma libala ezali mingi koleka kokaba, kasi mokambi na ngai ya etape alendisaki ngai mpo na kokila bilei mpe kosambela na oyo etali yango. …
“Na ebandeli, nabundaki na likanisi ya kozongisa lisusu mabe na mabe. Lokola masumu na ngai ezalaki ya mosolo te, namitunaki nini ‘kozongisa ya mosolo mingi’ elingaki koloba … [kasi] namonaki nokinoki ezalaki kaka etali mosolo te.
“Bakambi na ngai ya bonganganzambe bakutanaki na [mwasi na ngai ya kala] mpe bana na ngai mpe bamonaki ete bango bazalaki kokoba kobunda mpe bazwaki libiki te. …
“Ntina na ngai ya sika ezalaki ya kokende liboso na bondimi. … Namonisaki kaka mposa na ngai ya kosunga na kozelaka lifuti te. … Nazwaki ekateli ya [kotindela mwasi na ngai ya kala motango ya sikisiki] na lifuti, oyo ezalaki eteni ya motuya mingi mpo ya mobimba ya lifuti na ngai. Kaka yambo ya kosala kofuta ya liboso, Nkolo [ya kosepela likolo ya makanisi na ngai oyo nazalaki na yango mposa] mpo na kofuta [mbala mibale motango wana].
“Nayekoli ete kozongisa ezali kaka te mpo na mbongo. Yango ezali mpo na kopesa na bomikitisi bomoi na ngai epayi ya Nkolo. Mbongo ezali mpo na kosunga kozongisa eloko nazwaki uta na libota na ngai likolo ya maponi na ngai ya mabe. Etali kosala mpe kobatela bilaka na kozelaka eloko te na ngala na ngai mpe kosungaka ye amitungisa te na oyo etali bafaktire na yango akoka koluka Molimo.”
Makasi na bino mpo na kozongisa oyo bobebisi ekoki kozala na likambo ya mbongo te, kasi ntango bozali kosala likita na Nkolo, bokoki komona ete ezali na mingi oyo bokoki kosala.
Bondimi ya Bonzambe Moke Moke
Ntango bozali koluka bolimbisi ya Nkolo, bozala motema molai wana ezali bino kozela kondima na Ye mobimba. Botala makomi oyo:
“Bango … bamikitisa[ki] bangomei … na bozindo ya bomikitisi; mpe … babelelaki na nguya nyonso epayi ya Nzambe; iyo, atako mokolo mobimba. … [Kasi] Nkolo azalaki malembe na koyoka kobelela na bango na ntina ya masumu na bango.”
“Nzokande Nkolo ayokaki kobelela na bango, mpe abandaki … kokomisa mikumba na bango pepele; … mpe … mpe esalemaki ete babandaki kofuluka moke moke.”
Bozala motema molai lokola Nkolo apesaka bino lipamboli mpe ndingisa na Ye moke moke.
Na ngonga ya Nkolo, bokoyoka mongongo na Ye koyebisaka bino, “Tika ete makambo oyo etungisa yo lisusu te.” Mokolo moko, ndenge bozali kokoba kobaluka epayi ya Mobikisi, Tata na bino ya Lola ako “longola elindo na [mitema na bino], na nzela ya makoki ya Mwana na ye.”
Kozoka mpe Mpasi
Mpo na bino oyo bozokisami na nko mpenza na masumu makasi ya moto mosusu, nalingi kokabola bolingo mpe mawa ya Nkolo, libondi mpe kimya na Ye.
Mawa oyo boyokaki, motema mpasi, kobungisa, mayoki makasi ya komitungisa mpo na botekami, kobongwana ya bomoi na bino ndenge bokanisaki yango ezala—napesi bino kondimisa ya solo, Mobikisi ayebi bino mpe alingi bino. Botandela Ye maboko. Azali libondisi mpe makasi na bino; Akotinda banzelu na Ye mpo ete batombola bino. Ntango mpasi na bino ekosila, mawa na bino ekiti, makambo ya mabe ebosanami? Nayebi te. Kasi oyo nayebi: Ye azali na nguya ya komema kitoko uta na mputulu ya mpasi na bino.
Bandeko na biso balingami ya Grand Blanc, na etuka ya Michigan, na kondima na bango makasi epai na Yesu Klisto, na mpiko na bango mpe na ezaleli na bango ya kozanga moimi, basili kozwa mpe bakozwa, na baposo mpe na basanza oyo ezali koya, bolingo mpe ngolu ya Mobikisi oyo ekokani na mosusu te.
Ntango bokokoba kondimela Ye, mapata ya molili mpe kolela na mawa ya bino kati na butu ekobongolama na pinsoli ya esengo mingi mpe kimia na pole ya ntongo. “Mpasi na bino ekobongwana na esengo. … Mpe esengo na bino [moko] te akolongola bino yango.” Ngonga wana ekoya. Natatoli ete yango ekoya.
Bolingo ya bomikabi ya Yesu Klisto ekoki komonana na makambo mingi mpenza ya mikakatano, kasi tosengeli banso ntango nyonso kozala na mposa ya ngolu ya bomikabi ya Mobikisi na biso. Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki: “Na ntina ya ekisperiense na Ye ya bomikabi na nkufa, Mobikisi na biso akoki kolendisa, kobikisa, mpe kokembisa mibali mpe basi nyonso bisika nyonso, kasi nandimi ete Ye asalaka yango kaka mpo na baye balukaka Ye mpe basengaka lisungi na Ye. Apostolo Yakobo ateyaki, ‘Mikitisa na miso ya Nkolo, mpe akotombola yo’ (Yakobo 4:10). Tomikokisaka mpo na lipamboli wana ntango tokondimela Ye mpe tokosambela mpo na lisungi na Ye.”
Mpaka Robert E. Wells
Nazwaki ndingisa uta na moninga na ngai mpe Mokambi Monene Ntuku sambo, Mpaka Robert E. Wells, sikawa azali na mibu 97, mpo na kokabola boyebi na ye ya mibu 60 eleki:
Ntango azalaki kofanda na Paraguay na 1960 mpe kosalaka lokola mosali ya banki ya mokili mobimba, Robert Wells, ntango wana azalaki na mibu 32, mpe mwasi na ye, Meryl, bazalaki bango mibale bakumbi mpepo na bampepo ekeseni, kozongaka ndako uta na Uruguay tii na Paraguay. Kokutanaka na mapata minene, Robert mpe Meryl babungisaki bosololi na miso mpe na radio moko na mosusu. Robert akitaki noki, esika ayokaki ete mpepo ya mwasi na ye ekweyaki. Ezala mwasi na ye to baninga mibale oyo bazalaki kopumbwa elongo na te babikaki te. Bana na ye, na ndako na Asunción, bazalaki na mibu nsambo, mitano, mpe mibale.
Mpaka Wells alobelaki na ntina ya mawa na ye:
“Maloba ekozala libela ya kokoka te na kolakisa mpasi oyo ezalaki kati na ngai, kobebisaka mayoki na ngai mpe kolembisa makanisi na ngai. Pinsoli ya mozindo ya mawa ekokoka te kotika kokita. Mpo na kokomisa makambo mabe, lokola makanisi na ngai ezalaki komeka kososola boyebi ya mpasi ya liwa ya mwasi na ngai, namimonaki ngai moko kokutanaka na mayoki ya mabe makasi mpo na komona ete kokweya ya mpepo ezalaki mokumba na ngai.”
Robert amipesaki foti mpo na kozanga kotala mpepo malamu mpenza mpe kozanga kopesa mwasi na ye malako malamu ya kopumbwa. Ayokaki ete azalaki na etumbu mpo na bozangi likebi na ye.
Robert alobaki:
“Makanisi na ngai ekendaki na ebundeli moko ya molili. … Natikalaki mpamba na bomoi—[mpo na bolingo ya bana,] eloko moko lisusu te.”
“Ngai nabungisaki mposa na ngai ya kokoba.”
Na nsima, Robert apambolamaki na boyebi moko ya molimo. Alobaki lisusu:
“Mpokwa moko, mwa mobu moko nsima, wana nafukami kati na losambo, likamwisi ekomaki. Ntango nazalaki kosambela mpe kobondela Tata na ngai ya Lola, nayoki lokola Mobikisi ayaki na esika na ngai mpe nayokaki mongongo moko kolobaka maloba oyo na motema mpe matoyi na ngai: ‘Robert, libonza na ngai ya bomikabi efutaki mpo na masumu mpe mabunga na yo. Mwasi na yo alimbisi yo. Baninga na yo balimbisi yo. Nakolongola bozito na yo. …’
“Uta na ntango wana, bozito ya etumbu [mpe kozanga elikia] ezalaki mpenza ya kolongolama epayi na ngai. Nabikisamaki! Mbala moko nasosolaki nguya oyo ezali komonisa Bomikabi ya Mobikisi mpe … wana ezali kosalelama mbala moko epayi na ngai. … Ngai … nakutanaki pole mpe esengo na lolenge nayebaki naino te liboso. … Napesamaki likabo oyo ebongi na ngai te—likabo ya ngolu ya Nkolo. … Nabongaki na yango te—nasalaki eloko te mpo na kozwa yango, kasi Ye apesaki ngai yango atako bongo.”
Bandeko mibali mpe basi, ekoki biso moko na moko “kosantisama na Klisto na ngolu ya Nzambe, na nzela ya bosopi ya makila ya Klisto, … [kokomaka] basantu, bazanga mbindo.”
Natatoli mpo na bolingo, boboto, mpe ngolu ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Azali na bomoi. Tozali ya Ye, tozali bana ya boyokani. Ntango tondimeli Ye, tolandi Ye, mpe totieli Ye motema, Akotombola biso uta na bampasi na biso mpe masumu na biso. Nsima, na koleka bomoi oyo ya nkufa, kati na ndako ya Tata na biso, tokozala na bomoi elongo na Ye libela mpe seko. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.