Likita Linene
Lengela Ntango mpo na Nkolo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Lengela Ntango mpo na Nkolo

Mpo na koboya boyokisi motema mpasi oyo elandaka, nabondeli bino boboya makambo ya mokili mpe bolengela ntango mpo na Nkolo na bomoi na bino—mokolo moko na moko mpe mikolo nyonso.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, na mikolo mibale oyo toteyamaki malamu na basali ya Nkolo oyo balukaki na bokebi koyeba nini Ye alingaki bango baloba.

Topesami mokumba mpo na basanza motoba oyo ezali koya liboso. Sikawa, motuna ezali, lolenge nini tokozala ya kokesena na oyo toyoki mpe etuti biso?

Bokono ya mokili mobimba elakisaki na lombango lolenge bomoi ekoki kobongwana, ntango mosusu na mabaku oyo etali bolingi na biso moko te. Na yango, ezali na makambo ebele oyo tokoki kokonza. Totiaka liboso bamposa na biso mpe tozwaka ekateli lolenge nini tosalelaka bompikiliki na biso, ntango mpe bozwi. Tozwaka ekateli ya lolenge nini tokosalela basusu. Toponaka baye oyo tokondimela na bosolo mpe bokambi.

Mingongo mpe masengami ya makasi ya mokili ezali kosengisa mpe ezali mingi. Kasi mingongo ebele ezali na lokuta, bopengwisi mpe ekoki kobungisa biso na nzela ya liyokani. Mpo na koboya boyokisi motema mpasi oyo elandaka, nabondeli bino boboya makambo ya mokili mpe bolengela ntango mpo na Nkolo na bomoi na bino—mokolo moko na moko mpe mikolo nyonso.

Soki bansango ebele ozwaka ewutaka na media social to na media mosusu, likoki na yo ya koyoka nungunungu ya Molimo ekokita. Soki ozali lisusu te koluka Nkolo na nzela ya losambo ya mikolo nyonso mpe boyekoli nsango malamu, omitiki yo moko na bafilozofi oyo ekoki kozala masolo kasi ezali ya solo te. Kutu Basantu ya boyengebene bakoki kobungisama na mimekano ya makambo ya Mokili.

Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, nabondeli bino bolengela ntango mpo na Nkolo! Tonga moboku na yo moko ya molimo elenda mpe zala na makoki ya kotelemela mimekano ya mokili na kosalaka makambo oyo epesaka ndingisa na Molimo Mosantu azala elongo na yo ntango nyonso.

Komona mpamba te bosolo oyo elobi ete “Molimo alobaka … makambo lolenge ezali mpenza mpe lolenge makambo ekozala mpenza.” 1 Akolakisa “epai na bino makambo nyonso oyo bokosala.” 2

Eloko moko te ebengisaka Molimo koleka komipesa na yo moko na Yesu Klisto. Lobela na ntina ya Klisto, sepela na Klisto, sala feti na maloba ya Klisto, mpe kende liboso na mpiko epai ya Klisto. 3 Sala Saba na yo mokolo ya esengo ntango ozali kosanjola Ye, liya elambo, mpe batela mokolo na Ye bule. 4

Lokola nabetaki nsete na ntongo oyo, nasengi bolengela ntango mpo na Nkolo na ndako na Ye ya bule. Eloko moko te ekolendisa moboku na yo ya molimo koleka mosala ya tempelo mpe bokumbameli ya tempelo.

Topesi matondi na baoyo nyonso bazali kosala na batempelo na biso ya sika. Ezali kotongama na mokili mobimba. Lelo nazali na esengo ya koyebisa miango na biso ya kotonga batemepelo mingi koleka na to penepene na bisika bilandi: Kaohsiung, Taiwan; Tacloban, Philippines; Monrovia, Liberia; Kananga, Republiki Democratika ya Congo; Antananarivo, Madagascar; Culiacán, Mexico; Vitória, Brazil; La Paz, Bolivia; Santiago West, Chile; Fort Worth, Texas; Cody, Wyoming; Rexburg Nordi ya Idaho; Heber Valley, Utah; mpe bozongi kotonga ya Tempelo ya Provo Utah nsima ya kobulisama ya Tempelo ya Orem Utah.

Nalingaka bino, bandeko na ngai ya mibali mpe basi. Nkolo ayebi mpe alingaka bino. Azali Mobikisi mpe Mosikoli na bino. Akambaka mpe atambwisaka Eklezia na Ye. Akokamba mpe Akotambwisa bino na bomoi na bino moko soki bokolengela ntango mpo na Ye na bomoi na bino—mokolo moko na moko mpe mikolo nyonso.

Tika Nzambe azala na bino kino tokokutana lisusu, nasambeli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.