Likita Linene
Ndako Moko ya Molongo Eteni na Eteni
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Ndako Moko ya Molongo Eteni na Eteni

Molongo ya eteni na eteni” ezali nzela ya bopete, bomoto, mpe nzela ya malonga mpo na Nkolo koteya biso, lokola bana na Ye, mabongisi ya motuya.

Na bomoi na ngai lokola mosali mpe mosala na ngai kati na Eklezia, nasali yango mbala nkoto—kaka soki moke te liboso ya bato 15 oyo bafandi awa semba nsima na ngai. Nazali koyoka nsambo na bino mpe ya bango.

Bandeko mibali mpe basi, nabotama na Bokonzi ya Tonga na Pacifique ya Sudi kasi nakola na Amerika ya Nodi. Bokono ya mokili mobimba epekisaki bankama, ntango mosusu bankoto ya bilenge bamisionele ya mboka Tonga oyo bazalaki kosala na mokili mobimba kozonga na ya bango mboka babotama mpo na bokangemi ya mindelo ya ekolo. Bandeko mibali misusu ya mboka Tonga bazalaki na misio na bango mibu misato mpe bandeko basi koleka mibu mibale! Bazelaki na bompikiliki na kondima mpo na oyo bato na biso bayebani. Na ntango se moko wana, bolela mingi te soki basusu na bango oyo bazali kosala na bapalwasi na bino mpe bituka binene bakokani mingi na ngai—mibange mpe suki mpembe. Topesi matondo mpo na bamisionele bisika nyonso mpo na misala na bango ya komipesa, ata ntango ezali molayi to mokuse koleka ndenge basalaka liboso na ntina ya bokono ya mokili mobimba.

Eyenga moko ntango nazalaki diakona, nazalaki na Eklezia kolekisaka sani ya mayi ya elambo ntango mwasi moko akotaki na kati ya ndako. Na bolingo ya mosala, napusanaki mpe napesaki ye sani. Aningisaki moto, asekaki, mpe azwaki nkeni ya mayi. Akomaki na nsima ya ngonga mpo na kozwa lipa. Nsima ya mosala oyo, moteyi na ngai ya libota, Ned Brimley, ateyaki ngai ete balolenge mingi mpe mapamboli ya nsango malamu epesameli biso na molongo eteni na eteni.

Nsima ya mposo oyo, Ned Brimley mpe moninga na ye bayaki na na liteya moko ya kobosana te. Ned akanisisaki biso ete ezalaki molongo ya ndenge nini Nzambe akelaki mokili. Nkolo alengelaki makasi kolimbolela Mose na molongo nini Ye akelaki mokili. Yambo, Abandaki kokabola pole na molili, mpe mayi na mabele ekawuka. Abakisaki bomoi na nzete mpe banyama liboso ya kokotisa na mokili ya sika ekelami ekelamu na Ye ya monene koleka: Bomoto, kobandaka na Adama mpe Ewa.

“Na yango Nzambe akelaki moto na elilingi na Yemei, na elilingi ya Nzambe nde akelaki ye; mobali mpe mwasi bakelamaki na ye nde akelaki bango. …

“Bongo Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki Ye kozalisa, mpe, ezalaki malamu mingi” (Genese 1:27, 31).

Nkolo asepelaki. Mpe Apemaki mokolo ya nsambo.

Molongo ya kobongisa beloko eteni na eteni lolenge mokili ekelamaki epesi biso kaka te limoni ya oyo ya motuya mpo na Nzambe, kasi lisusu mpo na nini mpe mpo na nani Akelaki mokili.

Elilingi
Ned Brimley mpe Libota

Ned Brimley apesaki ntin na liteya na ye efulami na maloba mpamba: “Vai, ndako na Nkolo ezali ndako ya molongo. Ye asengeli na yo obika bomoi na molongo. Na biteni ya malamu. Asengi na yo kosala misio liboso ete obala.” Na likambo oyo, bakambi ya Eklezia bazali koteya sikawa ete “Nkolo azelaka na elenge mobali nyonso alengela kosala misio. … Bilenge basi … baoyo bazali na mposa ya kosala basengeli lisusu komilengela” (Mokanda Monene: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 24.0, ChurchofJesusChrist.org). Ndeko mobali Brimley akobaki: “Nzambe alingi obala liboso yo ozwa bana. Mpe Ye alingi yo okoba kokolisa makoki ntango ozali kotanga kelasi.” Soki oponi kobika bomoi na yo libanda ya eteni na eteni, okomona bomoi mpasi mpe mikakatano.

Ndeko mobali Brimley ateyaki biso lisusu ete na nzela ya bomikabi na Ye, Mobikisi asungi biso kozongisa molongo na bomoi na biso oyo ekomaki na mikakatano to libanda ya eteni na eteni na maponi mabe ya biso moko to ya basusu.

Uta ntango wana, na komaki kolota makanisi na “molongo eteni na eteni.” Na kolisaki bizaleli ya koluka bandakisa ya eteni na eteni na bomoi mpe na nsango malamu.

Mpaka David A. Bednar ateyaki mobeko: “Ntango tozali kotanga, koyekola, mpe kobika nsango malamu ya Yesu Klisto, eteni na eteni eteyaka mbala mingi. Totala, ndakisa, mateya toyekoli na maye matali makambo ya molimo ya motuya koleka uta na molongo ya milulu ya motuya oyo esalemaki lokola litondi ya nsango malamu ya mobikisi ezongisamaki na mikolo ya nsuka.”

Mpaka Bednar atangangi bomoni ya Yambo mpe bomibimei ya ebandeli na Joseph Smith lokola moteyi ya elenge mobali profeta ya yambo, lolenge mpe bizaleli ya Nzambe, elandami na ntina ya Buku ya Mormon mpe Elia balingaki kosala na bosangisi ya Isalaele na bangambo mibale ya elamba na eleko oyo ya nsuka.

Mpaka Bednar asukisi: “ Biteni na eteni ya kofulama oyo eteyaka na ntina ya mituna ya molimo mileki na motuya koleka mpo na Bonzambe” (”The Hearts of the Children Shall Turn,” Liahona, Sanza Zomi na Moko 2011, 24).

Litatoli moko na salaki ezali ete “ molongo ya eteni na eteni” ezali nzela ya bopete, bomoto, mpe nzela ya malonga mpo na Nkolo koteya biso, lokola bana na Ye, mabongisi ya motuya.as His children.

Toyaki na mabele mpo na koyekola mpe kozwa mayele tokokaki te na lolenge mosusu kozwa. Bokoli na biso ezali se ya moto yemei mpe eteni moko ya motuya koleka na mwango ya Tata na Lola. Bokoli na biso na nzoto mpe na molimo ebandaka na litambe mpe ekolaka malembe malembe ntango tozali kozwa mayele eteni na eteni.

Alama apesi liteya moko ya nguya mpo na kondima—nakofulama na lisolo ya momboto, oyo, soki ebatelami mpe eleisami malamu, ekokola uta lititi moke kino na nzete mobimba, nzete ekomela oyo ekobota mbuma malamu (tala Alama 32:28–43). Liteya ezali ete kondima na bino ekokola ntango bopesi esika mpe boleisi mboto—to liloba na Nzambe—kati na mitema na bino. Kondima na bino ekokola ntango liloba ya Nzambe ebandi“kovimba kati na bantolo na bino” (molongo 28). Oyo ete “evimba, mpe ebota, mpe ebanda kokola” (verse 30) ezali ya mbala moko komonana mpe koteyama. Ezali lisusu eteni na eteni.

Nkolo ateyi biso moko na moko engebene na makoki na biso ya koyekola mpe ndenge nini toyekoli. Bokoli na biso ezali kouta moimba na bolingi, mposa ya koyeba, molayi ya kondima, mpe bososoli na biso.

“Nefi ateyamaki nini Joseph Smith alingaki koteyama kati na Kirtland, Ohio, koleka 2,300 mibu nsima: “Mpo tala, boye elobi Nkolo Nzambe: Nakopesa epai ya bana ba bato monkoloto likolo lya monkoloto, mosise likolo lya mosise, awa moke mpe kuna moke; mpe bapambolami bango baye bakoyokemela epai ya mitindo mya ngai, mpe bakotia litoyi o toli ya ngai, mpo bakoyekola bwania” (2 Nefi 28:30).

Ete toyekolaka “molongo moko na moko, motindo moko na moko, awa ndambo mpe kuna ndambo” ezali lisusu eteni na eteni.

Totala maloba elandi oyo toyaki bomoi na biso mobimba: “Liboso makambo ya liboso” to “Leisa bango miliki liboso ya mosuni.” Mpo na nini “Tosengeli na kotambola liboso ya kopota mbangu”? Moko na moko ya maloba oyo elimboli eloko oyo ezali eteni na eteni.

Makamwisi esalamaka engebene na molongo eteni na eteni. Makamwisi esalamaka ntango yambo tosalelaka kondimba. Kondima eyaka liboso na likamwisi.

Bilenge mibali bakulisami lisusu na misala ya Bonganganzambe ya Alona na kolandaka eteni na eteni, engebene na mobu ya oyo azali kokulisama: diakona, moteyi, mpe na nsima nganganzambe.

Makuli nyonso ya lobiko mpe bonetolami ezalaka na lolenge ya eteni na eteni na mokili. Tobatisamaka liboso ya kozwa likabo ya Molimo Mosantu. Makuli ya Tempelo ezalaka lolenge moko eteni na eteni. Na bongo, lokola moninga na ngai Ned Brimley ateyaki ngai na bwanya, elambo ezali eteni na eteni—ebandaka na lipa, elandami na mayi.

“Ezalaki bango kolia, Yesu akamataki lipa, mpe apambolaki yango, mpe abukaki yango, mpe apesaki yango epai ya Bayekoli, mpe alobaki, Kamata, lia; oyo ezali nzoto ya ngai.

“Mpe akamataki nkeni, mpe azongisaki matondo, mpe apesaki yango na bango, kolobaka, Bomela yango bino nyonso;

“Mpo oyo ezali makila na ngai ya boyokani ya sika, oyo esopani mpo na bolimbisi mingi ya masumu” (Matai 26:26–28).

Na Jerusalem mpe kati na Americas, Mobikisi atiyaki lolenge ya kolia elambo na molongo se moko.

“Tala, ndako na ngai ezali ndako ya molongo, elobi Nkolo Nzambe, mpe te ndako ya mbutumbutu (Malongi mpe Mayokani 132:8).

Boyamboli ezali eteni na eteni. Ebandaka na bondimi na Yesu Klisto, atako moke lokola lidodo. Bondimi esengaka bomikitisi, oyo eloko esengeli mpo na kozala na “motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa” (2 Nefi 2:7).

Solo, mibeko minei ya yambo ya nsango malamu ezali eteni na eteni. Tondimi ete mabongisi mpe makuli ma yambo ma Nsango elamu mazali: ya yambo Bondimi na Nkolo Yesu Klisto; ya mibale, Boyamboli; ya misato, Libatisi na bozindisi na mai mpo na bolimbisi bwa masumu; ya minei, Botii bwa maboko mpo na likabo lya Molimo Mosantu.” (Biteni ya Bondimi 1:4).

Mokonzi Benyamina ateyaki bato na ye bosolo ya motuya oyo: “Mpe tala ete makambo maye manso masalemi na bwania mpe na molongo; mpo esengeli te ete moto moko akima mbangu koleka azali na makasi. Mpe lisusu, elongobani ete azala na etigia, ete na yango akoka kolonga lifuta; yango wana, makambo manso masengeli kosalema na molongo” (Moziya 4:27).

Tika ete tobika bpmoi na biso na molongo mpe toluka kolanda eteni na eteni oyo Nzambe atiela biso. Tokompambwama ntago tozali kolanda bandakisa mpe eteni na eteni oyo Nkolo ateyi nini eleki motuya na Ye. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.