Likita Linene
Tala na nse ya Nzela
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Tala na nse ya Nzela

Kofandisaka makanisi na makambo oyo ezali motuya mpenza—mingi mingi makambo wana “na nse ya nzela,” makambo wana ya seko—ezali fungola mpo na kosalelaka na bomoi oyo.

Ntango nakokisaki mibu 15, nazwaki mokanda ya ndingisa ya kokumba, oyo epesaki ngai nzela ya kokumba motuka soki moko ya baboti na ngai azalaki elongo na ngai. Ntango tata na ngai atunaki soki nakolinga kokumba, nasepelaki.

Akumbaki mwa bakilometele kino nzinganzinga libanda ya engumba na nzela moko molai ya semba ya bangambo mibale oyo bato moke bazalaki kosalela—nasengeli koloba esika bobele moko oyo akokaki komiyoka na bokengi. Atelemaki na pembeni ya nzela, mpe tosobitinaki bakiti. Apesaki ngai mwa mateya mpe nsima ayebiski ngai, “Bima na nzela mpe kumba kino nakoyebisa yo otelama.”

Nalandaki mitindo na ye mpenza. Kasi nsima ya basegondi 60, alobaki, “Mwana, telemisa motuka. Ozali kopesa ngai mposa ya kosanza. Ozali kotepatepa na nzela mobimba.” Atunaki, “Nini ozali kotala-tala?”

Na mwa nkanda, nalobaki, “Nazali kotala nzela.”

Nsima alobaki oyo: “Nazali kotala miso na yo, mpe ozali bobele kotala nini ezali kaka liboso ya ezipeli ya motele ya motuka. Soki ozali kotala bobele nini ezali se liboso na yo, okokumba mokolo moko te semba.” Nsima abetaki nsete, “Tala na nse ya nzela. Wana ekosalisa yo okumba semba.”

Lokola moto ya mibu 15, nakanisaki ete wana ezalaki liteya malamu ya kokumba. Uta wana nasosolaki ete wana ezalaki liteya monene ya bomoi mpe lokola. Koyekama na makambo oyo ezali motuya mpenza—mingi mingi makambo wana “na nse ya nzela,” makambo wana ya seko—ezali fungola mpo na kosalelaka na bomoi oyo.

Mokolo moko na bomoi ya Mobikisi, Azalaki na mposa ya kozala ye moko, yango wana “amataki na ngomba ye moko mpo na kosambela.” 1 Atindaki bayekoli na Ye na malako ya kokatisa na ngambu ya mbu. Kati na molili ya butu, masuwa oyo ezalaki komema bayekoli ekutanaki na mopepe makasi. Yesu akendaki mpo na kobikisa bango kasi na lolenge ya momesano te. Lisolo ya makomi elobi, “Na ngonga ya minei ya butu Yesu ayei epai na bango, wana ezalaki ye kotambola likolo na libeke.” 2 Ntango bamonaki Ye, babandaki kobanga, mpo ete bakanisaki elongi oyo ezalaki kopusana mpembeni na bango ezalaki lolenge ezalaki lokola mokundoi to elima. Yesu, kososolaka makanisi na bango mpe kolingaka kotia makanisi mpe mitema na bango na kimia, abengaki bango, “Boyika mpiko; Ngai oyo; bobanga te.” 3

Petelo ayokaki bobele kimia te kasi lisusu akomisamaki makasi. Ntango nyonso makasi mpe mbala mingi motema mokuse, Petelo agangaki epai ya Yesu, “Nkolo, soki ezali yo, pesa ndingisa naya epai ozali likolo ya mayi.” 4 Yesu ayanolaki na libiangi na Ye ya momesano mpe ezanga ndelo ya ntango: “Yaka.” 5

Petelo, solo asepelaki na libaku yango, akitaki na masuwa mpe akotaki na mai kasi likolo ya mai. Ntango akangamaki na Mobikisi, akokaki kosala oyo ekoki kosalama, kutu kotambola likolo ya mai. Na ebandeli Petelo alembisamaki te na ekumbaki. Kasi mopepe “makasi” 6 na nsuka ebangisaki ye, mpe abungisaki eyekamelo na ye. Bobangi ezongaki. Na nsuka, bondimi na ye ekitaki, mpe abandaki kozinda. “Agangaki, kolobaka, Nkolo, bikisa ngai.” 7 Mobikisi, oyo azali ntango nyonso mbangu mpo na kobikisa, asembolaki loboko mpe atombolaki ye likolo na esika ezanga likama.

Ezali na mateya mingi ya koyekola uta na lisolo ya kokamwa oyo, kasi nakolobela misato.

Kangama na Klisto

Liteya ya liboso: kangama na Yesu Klisto. Ntango Petelo atikalaki na miso ya kokangama na Yesu, akokaki kotambola likolo ya mai. Ekumbaki, mbonge, mpe mopepe ekokaki te kopekisa ye te lokola atiaki bokebi na ye na mobikisi.

Kososolaka ntina na biso ya nsuka esungaka biso tokana maye bokebi na biso esengeli kozala. Tokoki te kosakana lisano ya elonga kozangaka koyeba ntina na yango, to tokoki te kobika bomoi ya ntina kazangaka koyeba ntina na yango. Moko ya mapamboli minene ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisama ezali ete eyanolaka, kati na makambo mosusu, motuna “Ntina ya bomoi ezali nini?” “Ntina na biso na bomoi oyo ezali ya kozala na esengo mpe komilengela mpo na kozonga na miso ma Nzambe.” 8 Komikundola ete tozali awa na mabele mpo na komilengela kozonga mpo na kozala na bomoi elongo na Nzambe esungaka biso tokangama na makambo oyo ekambaka biso epai na Klisto.

Kokangamaka na Klisto esengaka botosi, mingi mingi oyo etali mimesano ya mike mpe mindondo te oyo esungaka biso tokoma bayekoli malamu koleka. Ezali na kimoyekoli moko te ezanga botosi.

Bokebi na biso na Klisto ekomaka polele mingi ntango totalaka na nse ya nzela epai wapi tolingaka kozala mpe nani tolingaka kokoma mpe nsima kozwa ntango mikolo nyonso kosala makambo wana oyo ekosunga biso kokoma kuna. Kokangamaka na Kliso ekoki kolongola mindondo ya mikano na biso mpe kopesa bokambi mpo na lolenge tokoki kolekisa ntango mpe kosalela babozwi na biso.

Ntango ezali na makambo mingi ebongi na bokebi na biso, toyekoli uta na ndakisa ya Petelo motuya ya kobombaka ntango nyonso na kati ya bokebi na biso. Ezali bobele na nzela ya Yesu Klisto nde tokoki kozonga kofanda elongo na Nzambe. Toyekamaka na ngolu ya Klisto ntango tomekaka kokoma lokola Ye mpe tolukaka bolimbisi mpe nguya ya kolendisa na Ye ntango tokweyaka.

Yeba ete Makambo ya Kobungisa Makanisi Ezali

Liteya ya mibale: yeba babobangi ezali. Ntango Petelo alongolaki bokebi na ye uta na Yesu mpe atalaki mopepe mpe mbonge oyo ebetaki makolo na ye, abandaki kozinda.

Ezali na makambo mingi “iliboso ya mofinuku ya motele” nde ebangisaki biso uta na kokangama na Klisto mpe makambo ya seko oyo ezali “na nse ya nzela.” Zabulo azali mobangisi monene. Toyekoli uta na ndoto ya Lehi ete mingongo uta na etonga monene mpe ya etando kolukaka kobenda biso epai ya makambo oyo ekolongola biso na nzela ya komilengelaka kozonga kozala elongo na Nzambe. 9

Kasi ezali babobangisi mosusu ya solo mingi te oyo ekoki kozala mpe ya likama. Lokola elobi lisese, “Eloko moko ezali ntina mpo na elonga ya mabe ezali ete bato malamu basala eloko te.” Monguna amonani kokana kozwa bato malamu kosala eloko moko te, to pene kobebisa ntango na bango na makambo oyo ekobangisa bango uta na bantina mpe mikano na bango ya lokumu. Ndakisa, makambo mosusu oyo ezali masano ya malamu ekoki kokoma masano mabe soki ezangi botosi. Mosani na ngambo mosusu asosoli ete kobungisa makanisi esengeli te kozala mabe to ya nsoni mpo na ete ebetama makasi.

Tokoki Kobikisama

Liteya ya mibale: tokoki kobikisama. Ntango Petelo abandaki kozinda agangaki, “Nkolo, bikisa ngai. Mpe na mbala moko Yesu atandaki loboko na ye, mpe asimbaki ye.” 10 Ntango tomimonaka kozindaka ntango tozali kokutana na mitungisi to ntango tozali kotatabana biso mpe tokoki kobikisama na Ye.

Ntango tozali kokutana na motungisi to momekano, bokoki kozala lokola ngai mpe kolikya ete libiki ekozala ya nokinoki. Kasi bomikundola ete Mobikisi ayaki mpo na kosalisa Bapostolo na Na ngonga ya minei ya butu—nsima balekisaki mingi ya butu na kosalaka kati na ekumbaki. 11 Tokoki kosambela ete soki lisungi ekoya nokinoki ekoya ata na ngonga ya mibale to kutu ngonga ya misato ya butu ya lisese. Ntango tosengeli kozela kotikala ya kondima ete Mobikisi azali kokengela kosalaka ete tokosengela te kotia molende mingi koleka tokoki komema. 12 Na baoyo bazali kozela na ngonga ya minei ya butu, ntango mosusu naino na katikati ya mpasi kobungisa elikya te. Libiki ntango nyonso eyaka na basembo, atako na kufa to na seko.

Ntango mosusu bozindi na biso eyaka mpo na mabunga to bobuki mibeko na biso. Soki omimoni kozindaka mpo na bantina wana, sala boponi ya esengo mpo na koyambola. 13 Nandimi ete makambo mike epesaka Mobikisi esengo koleka kobikisaka baoyo batelelaka to bazongaka, epai na Ye. 14 Makomi etondisami na masolo ya bato oyo bakweyaki ntango moko kasi oyo bayambolaki mpe bakomaki sikisiki na bondimi ya Klisto. Nakanisi masolo wana ezali kati na makomi mpo na kokundolisa biso ete bolingo ya Klisto mpo na biso mpe nguya na Ye mpo na kosikola biso ezali na nsuka te. Mobikisi azalaka na esengo ntango toyambolaka kaka te, kasi tozwaka esengo monene lokola mpe.

Kosukisa

Nabengisi bino bozwa mikano ya “kotalaka na nse ya nzela” mpe kobakisa bokebi na makambo wana oyo ezali ntina. Tika ete tobomba Klisto na katikati ya bokebi na biso. Na katikati ya babobangi, makambo “liboso ya mofinuku ya motele,” mpe mipepe makasi oyo ezingi biso, natatoli ete Yesu azali Mobikisi mpe Mosikoli na biso mpe Mobikisi na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.