Likita Linene
Kanisa Basantu na Yo Oyo Bazali Koyoka Mpasi, O Nzambe na Biso
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Kanisa Basantu na Yo Oyo Bazali Koyoka Mpasi, O Nzambe na Biso

Kobatela mayokani efungolaka nguya ya libonza ya komikaba ya Yesu Klisto mpo na kopesa bokasi mpe kutu bosepeli epai na yo oyo azali konyokwama.

Mwango ya esengo ya Tata na Lola ezali na boyebi ya kufa wapi bana na Ye nyonso bakomekama mpe kokutana na mimekano. 1 Mibu mitano eleki nazwamaki na maladi ya kanser. Nayokaki mpe nazali naino koyoka mpasi na nzoto uta na mapaso, lisalisi ya rayon x, mpe mpasi ya uta na nkisi. Nakutanaki na bitumba ya mayoki na babutu ezanga mpongi ya monyoko. Mitango ya monganga elakisi ete nakokufa ntango mosusu noki koleka oyo nakanisa naino te, kotikaka nsima libota moko oyo motuya mpo na ngai.

Kotala te wapi ofandi, mpasi ya nzoto mpe ya molimo uta na mikakatano ya motindo na motindo mpe botau ya kufa ezalaki, ezali sikawa, to ekozala mokolo moko eteni ya bomoi na biso.

Mpasi ya nzoto ekoki kowuta na kokola ya semba, makoni ekanami te, mpe makama ya mpalakaka; nzala to bozangi ndako; to bozwami na makasi, mpe bitumba.

Mpasi ya molimo ekoki kowuta na bobangi to bolembu; boteki ya molongani, moboti, to ya mokambi ondimaka; bozangi mosala to bobungisi mosolo ebele; bosambisi ya sembo te na basusu; baboponi ya baninga, bana, to bato ya libota mosusu; bozwami na makasi na ndenge mingi na yango; bandoto ya libala to bana ekokisami te; bokono to liwa ya balingami; to ntina mosusu mingi mpenza.

Lolenge nini ekoki yo mpenza kotia molende na mpasi se moko mpe ntango mosusu ezangisaka makoki oyo eyelaki moko na moko na biso?

Mokemoke, elikya ezwamaka na nsango malamu ya Yesu Klisto, mpe elikya ekoki lisusu kozala eteni ya bomoi na yo. Lelo nakabola mibeko minei ya elikya ebendami uta na makomi, mateya ya baprofeta, babotali ya kosalisa mingi, mpe momekano ya bokolongono ya sikawa na ngai moko. Mibeko oyo esalelami kaka te na bato mingi kasi lisusu na mozindo na moto se moko.

Yambo, mpasi elingi koloba te ete Nzambe asepeli te na bomoi na yo. Mibu nkoto eleki, bayekoli ya Yesu bamonaki mokufi miso moko na tempelo mpe atunaki, “Labi, nani asalaki lisumu, moto oyo soko baboti na ye ete abotami na miso makufi?”

Bayekoli na Ye bazalaki lokola kondimela malamu te, lokola esala bato mingi mpenza lelo, ete bolozi mpe mpasi nyonso na bomoi ezali mbano ya lisumu. Kasi Mobikisi azongisaki, “Moto oyo asali mabe te soko moboti na ye te, nde misala na Nzambe mimonana kati na ye.” 2

Mosala ya Nzambe ezali kosala bozangi kufa mpe bomoi na biso ya seko. 3 Kasi lolenge nini ekoki mikakatano mpe mpasi—mingimingi mpasi oyo ewuti na esaleli ya lisumu ya boponi ya kosala ya moto mosusu 4 —nsunka nsuka kotambwisa liboso mosala ya Nzambe?

Nkolo ayebisaki bato na Ye ya liyokani, “napetolaki yo … ; naponoki yo o etumbelo ya mitungisi.” 5 Atako ntina ya bampasi na yo ezali nini, Tata na Lola na yo ya bolingo akoki koyangela yo mpo na kopetola molimo na yo. 6 Milimo mipetolama ekoki komema mikumba ya basusu na bolingo ya solo. 7 Milimo epetolama oyo ebimi “na monyoko monene” balengelami mpo na bomoi ya bosepeli liboso ya Nzambe libela, mpe “Nzambe akolongola mpinzoli nyonso na miso na bango.” 8

Ya mibale, Tata na Lola azali ayebi na bolingo mpasi na biso. Ntango tozali kati na mimekano, tokoki na libaku kokanisa ete Nzambe azali mosika mpenza mpe bolozi na biso etali ye te. Kutu Profeta Joseph Smith alobelaki liyoki oyo na ntango moko ya mpasi kati na bomoi na ye. Ntango bamokangaki na Boloko ya Liberty ntango wana bankoto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazalaki kobenganama, Joseph alukaki bososoli na nzela ya losambo: “O Nzambe, ozali wapi? “Mpe wapi ema oyo ezali kobomba ebombamelo na yo?” Asukisaki na libondeli oyo: “Kanisa Basantu na Yo Oyo Bazali Koyoka Mpasi, O Nzambe na Biso.” 9

Eyano ya Nkolo endimisaki Joseph mpe banso baoyo bazali komona mpasi.

“Mwana na ngai, kimia ezala na kati ya molimo na yo; mikakatano na yo mpe mitungisi na yo ekozala kaka na ngonga moke;

“Na yango, soki okangi motema malamu,Nzambe akonetola yo likolo na yango.” 10

Basantu mingi oyo bazali na mpasi bakabolaki na ngai lolenge nini bayokaki bolingo ya Nzambe ntango ya mimekano na bango. Namikundoli mpenza likambo na ngai moko na ntango moko ya mpasi ya etumba ya kanser na ngai ntango dokotolo bamonaki naino ntina ya bolozi makasi mosusu te. Nafandaki na mwasi na ngai, kokanaka kopesa lipamboli ya momesano likolo ya bilei na biso ya midi. Na esika na yango, nyonso nakokaki kosala ezalaki na mindondo te kolela, “Tata na Lola, nabondeli sunga ngai. Nazali ya kobela mpenza.” Mpo na basegonde 20 tii 30 elandi, Nazingamaki mpembeni kati na bolingo na Ye. Napesamaki ntina moko te mpo na bokono na ngai, elembo moko te ya mbano ya nsuka, mpe libiki moko te ya bolozi. Nayokaki kaka bolingo ya peto na Ye, mpe wana ezalaki mpasi mpenza.

Natatoli ete Tata na biso ya Lola, oyo amonaka bokwei kutu ya ndeke moke moke, ayebi mpasi na yo. 11

Ya misato, Yesu Klisto apesaka nguya na Ye ekokisaka mpo na kosunga yo ozwa bokasi ya koyika mpiko na mpasi na yo malamu. Nguya ekokisaka oyo esalami na nzela ya Bomikabi. 12 Nazali kobanga ete bandimi mingi ya Eklezia bakanisaka soki bazali kaka mwa motema makasi bakoki kolonga mpasi nyonso kani na bango moko. “Solo oyo ezali lolenge moko ya mabe ya kobikela. Ngonga na yo ya bokasi ya ntango mokuse ekoki te komekolama na liboke ezanga ndelo ya nguya ya Mobikisi mpo na kolendisa molimo na yo. 13

Buku ya Mormon eteyi ete Yesu Klisto akolinga “kozwa likolo na ye” bolozi, bampasi, mpe bokono na bino mpo Akoka kosunga biso. 14 Lolenge nini tokoki kozwa nguya oyo Yesu Klisto apesaka mpo na kolendisa biso na bangonga ya mpasi? Fungola ezali kokangama na Mobikisi na kobatelaka mayokani bosalaki na Ye. Tosalaka mayokani oyo ntango tozwaka makuli ya bonganzambe. 15

Bato ya Alma bakotaki na liyokani ya libatisi. Nsima bayokaki mpasi ya boombo mpe bapekisamaki kokumbamela na polele to kutu kosambela na mongongo makasi. Kasi babatelaki mayokani na bango lokola ekokaki bango na kolelaka na nse kati na mitema na bango. Lokola mbano, nguya ya Nzambe eyaki. “Nkolo alendisaki bango mpenza ete bakokaki komema mikumba na bango na pete.” 16

Na mikolo Mobikisi abiangi, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.” 17 Ntango tobateli liyokani ya elambo ya komikundola Ye, Alaki ete Molimo na ye akozala elongo na biso. Molimo apesaka biso makasi ya koyika mpiko na mimemekano mpe kosala maye tokoki mbele kosala te na biso moko. Molimo akoki kobikisa biso, atako lokola Mokambi James E. Faust ateyaki, “Libiki mosusu oyo ekoki kosalama na mokili mosusu.” 18

Topambolami lisusu na nzela ya mayokani mpe makuli ya tempelo, wapi “nguya ya bonzambe ezali komonana.” 19 Nakendaki kotala mwasi moko oyo abungisaki elenge mwana ya mwasi na akisida ya nsomo, bongo nsima molongani na ye na Kanser. Natunaki lolenge nini akokaki koyika mpiko na bobungisi mpe mpasi ya boye. Ayanolaki ete bokasi ewutaki na bondimi ya molimo na ntina ya libota moko ya seko ezwamaki na bokumbameli ya tempelo ya mbala na mbala. Lokola elakelamaki, makuli ya ndako ya Nkolo elatisaki ye na nguya ya Nzambe. 20

Ya minei, pona kozwa bosepeli mokolo na mokolo. Baoyo bayokaka mpasi mbala mingi bamiyokaka ete butu ezali kokoba se kokoba, mpe moi ekoya te. Ezali malamu mpo na kolela. 21 Kasi, soki omimoni kati na babutu ya molili ya mpasi, na koponaka bondimi okoki kolamuka na bantongo ya kongenga ya esengo. 22

Ndakisa, nabengisaki elenge mama moko oyo azalaki kosalisama na kanser, kosekaka na lokumu na kiti na ye atako bolozi mpe bozangi nsuki. Nakutanaki na babalani ya mikolo na esengo kosalaka lokola bakambi ya bilenge atako bazalaki na makoki te ya kobota bana. Nafandaki na molingami mwasi moko—elenge nkoko ya mwasi, mama, mpe mwasi—oyo alingaki kokufa na ntaka ya mikolo; kasi na kati ya mpinzoli ezalaki na masanga ya koseka mpe ya esengo.

Basantu oyo bazalaki na mpasi bazali ndakisa ya oyo Mokambi Russell M. Nelson ateyaki:

“Esengo toyokaka etali moke makambo ya bomoi na biso mpe nionso etali kotiaka makanisi na bomoi na biso.

Ntango tofandisi makanisi na bomoi likolo ya mwango ya lobiko ya Nzambe … mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo na kozangaka kotalaka toyo ezali kosalema—to kosalama te—na bomoi na biso.” 23

Natatoli 24 ete Tata na biso ya Lola akanisaka Basantu na Ye oyo bazali na mpasi, alingaka bino, mpe ayebi bino na bolongo. Mobikisi na biso ayebi lolenge nini bozali koyoka. “Na ntembe te akumbi mpasi ya biso, mpe amemi mawa na biso.” 25 Nayebi—lokola mozwi ya mokolo na mokolo 26 —ete kobatelaka mayokani efungolaka nguya ya libonza ya komikaba ya Yesu Klisto mpo na kopesa makasi mpe kutu esengo epai na yo oyo ozali komona mpasi.

Mpo na banso oyo bazali komona mpasi, nasambeli, “Nzambe asala epai ya bino ete mikumba mya bino mikoka kozala pepele, na lisalisi lya bosepeli bwa Mwana wa ye.” 27 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.