Likita Linene
Bengisa Klisto Azala Mobandisi ya Lisolo na Yo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2021


Bengisa Klisto Azala Mobandisi ya Lisolo na Yo

Tika ete lisolo na yo ezala moko ya bondimi, kolandaka Ndakisa na yo, Mobiksi Yesu Klisto.

Nabandi na kotunaka mituna mingi, na ntina ya komema moto kokanisa ye moko.

  • Lolenge nini ya lisolo ozali kokomaka mpo ya bomoi na yo?

  • Nzela olimboli na lisolo na yo ezali ya semba?

  • Lisolo na yo esuki esika ebandaki, na ndako na bino ya lola?

  • Ezali na ndakisa na lisolo na yo—mpe ezali Yesu Klisto?

Natatoli ete Mobikisi azali “mobandisi mpe mosukisi ya bondimi na biso.” 1 Okobengisa Ye azala mobandisi mpe mosukisi ya lisolo na yo?

Ayebi ebandeli kino na nsuka. Azali Mokeli ya lola mpe ya mabele. Alingi biso tozonga na ndako epai na Ye mpe Tata na biso na Lola. Apesi biso biloko nyonso mpe alingi biso tolonga.

Eloko nini okanisi epekisi biso kopesa Ye masolo na biso?

Ntango mosusu ndakisa oyo ekosalisa bino boyeba komituya bino moko.

Zuzi molobeli ya solo solo ayebi ete na ntango ya kotalelaka likambo malamu, okotuna nzeneneke te motuna oyo ye moko azangi eyano. Nakotunaka motuna ya boye elakisi kobengisa nzeneneke koyebisa yo—mpe mosambisi mpe lisanga ya basambisi—eloko moko oyo oyebaki te. Okoki kozwa eyano oyo kosutukisa yo mpe oyo ekeseni na lisolo oyo obongisaki mpo na kosamba na yo.

Atako kotuna nzeneneke motuna oyo oyebi eyano te ezali mingi mingi kozanga bwania mpo na zuzi molobeli, ntango mosusu bokeseni na yango ezali solo mpo na biso. Tokoki kotuna mituna ya Tata na biso ya Lola ya Bolingo, na nkombo ya Mobikisi na biso ya boboto, mpe nzeneneke oyo azali koyanola mituna na biso azali Molimo Mosantu, oyo ntango nyonso atatolaka bosolo. 2 Mpo ete Molimo Mosantu asalaka na bomoko oyo ebonga nie na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto, toyebi ete misala ya Molimo Mosantu ezali ya solo mpenza. Na yango, mpo na nini ntango mosusu toboyaka kosenga lisalisi ya boye ya lola, mpo bosolo emonisamaka na biso na nzela ya Molimo Mosantu? Mpo na nini towumelaka kotuna motuna oyo tozangi eyano ntango nzeneneke azali bobele moninga te kasi alobaka ntango nyonso bosolo?

Ntango mosusu ezali mpo tozangi bondimi ya kondima eyano tokoki kozwa. Ntango mosusu ezali mpo mobali to mwasi ya mokili kati na biso eboyaka kozongisa makambo mobimba na Nkolo mpe kolikya na Ye nyonso. Ntango mosusu ezali mpo na yango nde toponaka kozala ya kokangama na lisolo tokomaki mpo na biso moko, lisolo na biso ya bolendisi oyo ebimisami na Mobikisi te. Tolingi te kotuna motuna mpe kozwa eyano oyo ekokani te na lisolo tozali kokoma mpo na bisomei.

Ya solo mpenza, moke na biso tokomaka kati na masolo na biso mimekano oyo epetolaka biso. Kasi elingaka biso te nsuka ya nkembo ya lisolo totangaka ntango mobundi alongi etumba? Mimekano ezali biteni ya lisolo oyo ekomisaka masolo na biso tolingaka ntina, esilaka ngala te, elendisaka bondimi mpe elongobana na kobeta. Bitumba ya kitoko ekomami kati na masolo na biso ekosala ete tobeleme na Mobikisi mpe epetola biso, na kokomisaka biso lokola Ye.

Mpo Dawidi alonga Goliata, elenge mobali asengelaki kobundisa elombe. Lisolo malamu ya Dawidi esengalaki kozala ete azonga kobatela mpate. Kasi nzokande akanisaki makasi na ntina na kobatela bampate na nkosi mpe ngombolo. Na kotongaka bondimi na ye bitumba ya bilombe, asangisaki bondimi mpe mpiko mpo na kotika Nkolo akoma lisolo na ye, kolobaka, “Nkolo oyo abikisaki ngai na nkosi, mpe abikisaki ngai na ngombolo, akobikisa ngai na loboko ya Mofilistia oyo.” 3 Na mposa ya kotika Nzambe akonza, na litoyi na Molimo Mosantu, mpe na bolingi ya kotika Mobikisi azala mobandisi mpe mosukisi ya lisolo na ye, elenge mobali Dawidi alongaki Goliata mpe abatelaki bato na ye.

Mobeko monene ya nguya ya kopona epesaka, ya solo biso ndingisa ya kokoma ya biso moko masolo—Dawidi akokaki kozonga ndako, kobatela mpate. Kasi Yesu Klisto atelemi kosalela biso lokola bisalelo ya bonzambe, basali ya sembo na maboko na Ye, mpo akokisa mwango na Ye na bomoi na biso! Atonda na mawa mpo na kosalela ngai, esaleli oyo ezanga makasi, na maboko na Ye, soki nazali na bondimi ya kotika Ye, soki natiki Ye abandisa lisolo na ngai.

Esetele ezali ndakisa mosusu ya kitoko ya kotika Nzambe akonza. Na esika ya kokangama na mayele ya komibatela, asalelaki bondimi, na kobalukaka ye moko mobimba epai na Nkolo. Hamana azalaki kobongisa mwango mabe ya kobebisa Bayuda nyonso na Persia. Modelekai, ndeko ya Esetele, ayebaki mwango mabe mpe akomelaki ye, kolendisaka ye asolola na mokonzi mpo na bato na ye. Alobelaki ye ete oyo akopusana na mokonzi longola se soki abengisama azali mokufi. Kasi kati na bondimi monene, asengaki Modelekai na kosangisa Bayuda mpe kokila mpo na ye. “Ngai mpe basali ba ngai tokokila lolenge moko,” elobaki ye, “mpe boye nakokende epai ya mokonzi, oyo ezali engebene na mobeko te: mpe soki nakowa, nawa.” 4

Esetele alingaki kotika Mobikisi akoma lisolo na ye atako, na nzela ya kufa, nsuka ekokaki kozala liwa. Na bopambwami mpenza, mokonzi ayambaki Esetele, mpe Bayuda na Persia babikisamaki.

Ya solo, tosengamaka mingimingi te ndenge ya mpiko oyo ya Esetele. Kasi kotika Nzambe akonza, kotika Ye azala mobandisi mpe mosukisi ya masolo na biso, esengi biso kobatela mitindo na Ye mpe mayokani tosalaki. Ezali kobatela na biso ya mitindo mpe mayokani nde ekofongolela biso nzela ya bosololi mpo na kozwa bobimisi na nzela ya Molimo Mosantu. Mpe ezali na nzela ya misala ya Molimo ete toyokaka loboko ya Moteyi kokomaka masolo elongo na biso.

Na Sanza ya minei 2021, profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, asengaki biso kokanisa oyo tokoki kosala soki tozali na bondimi koleka mpenza kati na Yesu Klisto. Na kondima koleka kati na Yesu Klisto, tokoki kotuna motuna oyo toyebi eyano te—kotuna Tata na biso na Lola, na nkombo na Yesu Klisto, kotinda eyano na nzela ya Molimo Mosantu, oyo atatolaka bosolo. Soki tozali na kondima koleka, tokoki kotuna motuna mpe kutu kolinga kondima eyano tozwi, ata kutu ebongi na lisolo na biso te. Mpe lipamboli elakelami oyo ekoya na kosalelaka kondima kati na Yesu Klisto ezali boyeisi monene ya bondimi kati na Ye lokola mobandisi mpe musukisi na biso. Mokambi Nelson alobaki ete to “kozwa bondimi koleka na kosalaka eloko songolo oyo esengisaka bondimi mingi kolea.” 5

Boye, babalani ya sika oyo bazali kobota te bakoki kosenga na bondimi soki bakoki koluka mwana ya kobokola mpe kolinga kondima eyano, atako lisolo bakomaka mpo na bangomei esengaki mbotama moko ya kokamwa.

Babalani ya kala bakoki kotuna soki ezali ngonga mpo na bango kosala misio mpe kolinga kokende, atako lisolo bakomaka mpo na bangomei esangisi ntango ebele na mosala. To ntango mosusu eyano ekoki kozala “naino te,” mpe bakoyeba na bambula ekoya mpo na nini basengisamaki na ndako mwa moke nsima.

Elenge mobali to mwasi akoki kotuna na bondimi soki kolanda masano to kotanga to miziki ezali na motuya koleka mpe kozala na bolingi ya kolanda banungunungu ya nzeneneke oyo abonga nie, Molimo Mosantu.

Mpo na nini tolingi Mobikisi azala mobandisi mpe mosukisi ya masolo na biso? Mpo ete Ye ayebi makoki na biso malamu mpenza, akomema biso na bisika oyo tokokaki kokanisa ata mokolo moko te. Ye akoki kokomisa biso Dawidi to Esetele moko boye. Ye akoki kokolisa biso na molimo mpe kopetola biso tokoma lokola Ye. Makambo tokosala ntango tosali na bondimi koleka ekokolisa bondimi na biso na Yesu Klisto.

Bandeko mibali mpe basi, kaka mbula moko eleki molingami profeta na biso atunaki: “ Ekoki yo kolinga kotika Nzambe azala ntina koleka na kati ya bomoi na yo? … Ozali na bolingi ya kotika oyo nyonso Ye azali kolinga yo osala yambo koleka makambo mosusu?” 6 Na bomikitisi nabakisi na mituna oyo ya profeta: “Okotika Nzambe azala mobandisi mpe mosukisi ya lisolo na yo?”

Na Emoniseli toyekoli ete tokoteleme liboso na Nzambe mpe kosambisama uta na maye mazali kati na babuku ya bomoi, engebene na misala na biso. 7

Tokosambisama engebene na buku na biso ya bomoi. Tokoki kopona kobika na lolenge oyo ekosalisa biso tokola. To tokoki kotika Nkolo Mobandisi mpe Mosukisi akoma lisolo na biso, kotika oyo nyonso Ye azali kolinga biso tosala yambo koleka makambo mosusu.

Tika Nkolo azala mobandisi mpe mosukisi ya lisolo na yo!

Tika Molimo Mosantu azala nzeneneke na yo!

Koma lisolo kati na eye wapi nzela oyo ozali ezali ya semba, na nzela ya solo oyo ekokamba yo kozonga na ndako na bino ya lola mpo na kobika liboso na Nzambe

Tika ete monyoko mpe motungisi oyo ezali eteni ya lisolo ya kitoko ya moto nyonso ekoma nzela mpo na yo obeleme, mpe okoma lokola, Yesu Klisto.

Beta lisolo oyo ondimi ete lola ezali ya kofungwama Tuna mituna oyo oyebi eyano te, koyebaka ete Nzambe alingi amonisa bolingi na Ye mpo na yo na nzela ya Molimi Mosantu.

Tika ete lisolo na yo ezala moko ya bondimi, kolandaka Ndakisa na yo, Mobiksi Yesu Klisto. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.