2010–2019
Tokoki Kosala Malamu mingi mpe Kozala Malamu mingi
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Tokoki Kosala Malamu mingi mpe Kozala Malamu mingi

Bokangama na boyambola ya mokolo na mokolo eteni mpenza ya bomoi na bino ete bokoka kosalela bonganganzambe na nguya monene mingi koleka liboso.

Bandeko ba ngai ya bolingo, ezali kofula na kotalaka likolo ya lingomba oyo ya monene ya Mampinga ya bamemi bonganganzambe ya Nkolo. Makasi ya nguya kani mpo na bolamu! Tolingi bino! Tozali kosambela mpo na bino. Mpe tozali na botondi mingi mpo na bino.

Kala te namimonaki ngai moko kobendama na liteya ya Nkolo apesaka na nzela ya Profeta Joseph Smith: “Koloba eloko te bobele boyamboli na nkola oyo.”1 Esakola oyo ezongelami mbala mingi na makomi mobimba.2 Etindiki motuna moko ya solo: “esengeli moto nyonso koyambola?” Eyano ezali iyo.

Bato mingi mpenza bakanisaka boyamboli lokola etumbu—eloko moko ya koboya longola se na makambo ya makasi. Kasi liyoki oyo ya kozwa etumbu ewuti na Satana. Amekaka kokanga biso mpo na kotala Yesu Klisto te,3 oyo atelami na maboko ya kofungwana,4 kolikiaka mpe kolingaka kobikisa, kolimbisa, kosukola , kolendisa, kopetola, mpe kosantisa biso.

Liloba mpo na boyamboli na Boyokani ya Sika na grek ezali metanoeo. Ebandeli meta- elingi koloba “mbongwana.” Kinsuka -noeo ekangani na maloba ya Grek oyo elingi koloba “mayele,” “boyebi,” “molimo,” mpe “mpema.”5

Boye, ntango Yesu asengi yo mpe ngai “koyambola,”6 Ye azali kobengisa biso mpo na kobongola mayele na biso, boyebi na biso, molimo na biso—ata lolenge topemaka. Azali kosengaka biso kobongola lolenge tolingaka, tokanisaka, tosalisaka, tolekisaka ngonga, tozalaka na basi na biso, toteyaka bana na biso, mpe kutu tolengela nzoto na biso.

Eloko te ezala kopesa bonsomi mingi, kokokisa mingi, to ya motuya mingi na bomoto na biso koleka kokangama mbala na mbala, mokolo na mokolo na boyamboli. Boyamboli ezali likambo moko te; ezali mosala. Ezali fungola ya esengo. mpe kimia ya mayele. Soki esangani na bondimi, boyamboli efungolaka bokoti na biso na nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto.7

Etako bozali kotambola na lokengo na nzela ya boyokani, bosielumuki to botelemi na nzela ya boyokani, to bokoki kutu te komona nzela uta epai bozali sikoyo, nabondeli bino boyambola. Bosalela nguya elendisaka ya boyamboli ya mokolo na mokolo—ya kosalaka mpe kozalaka mwa malamu mingi mokolo na mokolo.

Ntango boponi koyambola, toponi kobongwana! Topesi nzela na Mobikisi mpo na kobongola biso na lolenge ya malamu mingi ya bisomei. Toponi kokola na molimo mpe kozwa esengo—esengo ya bosikoli na Ye.8 Ntango toponi koyambola, toponi kokoma mingi lokola Yesu Klisto!9

Bandeko mibali, tosengeli kozala malamu mingi mpe kozala malamu mingi mpamba te tozali na etumba. Etumba na lisumu ezali ya solo. Monguna azali kobakisaka makasi na ye mbala minei mpo na kokata matatoli na biso mpe kopekisa mosala ya Nkolo. Azali kopesaka mandoki ya nguya na basali na ye mpo na kopekisa biso kokabola esengo mpe bolingo ya Nkollo.10

Boyamboli ezali fungola mpo na koboya bobola epesami na mitammbo ya monguna. Nkolo azali kozela te bobongi mpenza na biso na esika oyo ya bokoli ya seko. Kasi azali kozela na biso kokoma na bopeto ya kobakisa. Boyamboli ya mokolo na mokolo ezali nzela ya bopeto, mpe bopeto ememaka nguya. Bopeto ya moto ekoki kokomisa biso bisaleli ya nguya na maboko ya Nzambe. Boyamboli na biso—bopeto na biso—ekopesa biso nguya mpo na kosalisa na bosangisi ya Yisalaele.

Nkolo ateyaki Profeta Joseph Smith “ete makoki na bonganganzambe ekangana ya kokabola te na nguya ya lola, mpe ete nguya ya lola ekoki te kokambama bobele likolo ya mabongi ya bosembo.”11

Toyebi nini ekopesa biso mingi bokoti na nguya ya lola. Toyebi lisusu nini ekopekisa bokoli na biso—Nini tosengeli mpo na kotika kosala mpo na kobakisa bokoti na biso na nguya ya lola. Bandeko mibali, boluka na losambo kososola nini etelemi na nzela ya boyamboli. Bososola nini epekisaka bino koyambola. Mpe sima, bobongwana! Boyambola Biso banso tokoki kosala malamu mingi mpe kozala malamu mingi koleka naino te liboso.12

Ezali na ndenge songolo na yango tokoki ntango mosusu kobonga. Moko ezali lolenge tosalelaka nzoto na biso. Natelemi na nsomo ya likamwa ya nzoto ya moto. Ezali ekelamo ya eluti kitoko, ya ntina mpenza mpo na bomati na biso moke moke na likoki na biso ya nsuka ya bozambe. Tokoki kokoka te soki yango te. Na kopesaka biso likabo ya nzoto, Nzambe apesaki biso ndingisa ya kozwa nzela ya kokoma mingi lokola Ye.

Satana asosoli yango. Azali na nkele mpo ete kopengwa na ye yambo ya bokufi elongoli ye libela na litomba oyo, kotikaka ye na kozala ntango nyonso na likunia mpe nkanda. Boye mingi, soki te mingi koleka, ya masenginia atiaka na nzela na biso esalaka biso toniokola nzoto na biso to banzoto ya basusu. Mpamba te Satana azali mobola na bozangi nzoto,alingi biso tozala babola na ntina ya biso.13

Nzoto na bino ezali tempelo na binomei, ekelama mpo na kobomba molimo na bino ya seko.14 Bolengeli ya tempelo wana ezali na motuya. Sikawa, natuni bino bandeko mibali, bozali na ntina ya kolatisa mpe kobongisa nzoto na bino mpo na kobenda mokili mingi koleka kosepelisa Nzambe? Eyano na motuna oyo etindi elembo ya mbala moko na Ye etali mayoki na bino etali likabo oyo ya bonzambe mpo na bino. Na limemia mpo na nzoto na bino, bandeko mibali, nakanisi tokoki kosala malamu mingi mpe kozala malamu mingi.

Lolenge mosusu tokoki lisusu kosala malamu mingi mpe kozala malamu mingi ezali kokumisa mwasi na bomoi na biso, kobandaka na basi mpe bana basi na biso, bamama mpe bandeko basi na biso.15

Basanza eleki, nazwaki mokanda moko ya motema mpasi ewutaki na ndeko moko ya mwasi. Akomaki: “[Bana na ngai ya basi mpe ngai] toyoki tozali na momekano ya makasi mpo na bokebi ya kokabola te ya mibali mpe bana mibali na biso na kokomisa sika masano, kokomisa sima mombongo, [mpe] kososola mpe kotala masano ya lisano nyonso [eyemami]. Nayoki lokola tozali kobungisa kiti na biso ya liboso na mibali mpe bana mibali na biso na ntina ya kiti na bango ya liboso ntango nyonso na [masano mpe bobeti zeke].”16

Bandeko mibali, mokumba na bino ya liboso mpe ya yambo lokola bamemi bonganganzambe ezali kolinga mpe kolengela mwasi na yo. Bokoma moko elongo na ye. Ozala moninga na ye. Bokomisa yango pete mpo na bango kolinga kozala ya bino. Litomba mosusu te na bomoi esengeli kozwa esika ya yambo likolo ya mokangano na ye na libela. Eloko te na TV, na kotala filimi, to na masini ya mayele ezali na motuya koleka bolamu na ye. Bosala bososoli ya boniboni balekisaka ngonga na bino mpe wapi bopesaka makasi na bino. Yango ekolobela bino wapi motema na bino ezali. Bosambela mpo na kozala na motema eyokana na motema ya mwasi na bino. Boluka komemela ye esengo. Boluka toli na ye, mpe boyoka. Bokotisi na ye ekobongisa bobomisi na bino.

Soki bozali na bosenga ya koyambola na ntina ya lolenge bosali na basi oyo bazali penepene bino mingi, bobanda sikoyo. Mpe bomikundola ete ezali ya bino mokumba kosalisa basi na bomoi na bino kozwa mapamboli ewuti na kosalala mobeko ya bopeto ya Nkolo. Ntina moko te ezali oyo ekoki kopekisa mwasi kokoka te kozwa mapamboli ya tempelo.

Bandeko mibali, biso banso tosengeli koboyambola. Tosengeli kotelema na kolala, kotika kozala mosika, mpe kolamuka na mpongi na biso ya molimo. Ntango ekoki mpo na kolata bibundeli mobimba ya Nzambe mpo tokoka kopesa na mosala eleki motuya na mokili. Ntango ekoki mpo na “kosukuma [ya biso] mbeli, mpe kobuka na [ya biso] nguya, makanisi, mpe makasi.”17 Makasi ya mabe engala naino te na bokasi koleka bazali kosala lelo. Lokola mosala ya Nkolo, tokoki te kolala ntango etumba ezali kongala.

Libota na bino esengeli bokambi mpe bolingo na bino. Lisanga likoki na bino mpe baye na palwasi to etape na bino basengeli na makasi na bino. Mpe banso oyo bakutani na bino bayebi moyekoli ya solo ya Nkolo azali lokola mpe asalaki lokola.

Bandeko na ngai ya bolingo, boponamaki na Tata na biso mpo na koya na mabele na ngonga oyo ya kafukafu na ntina ya libongi na bino ya molimo liboso ya bokufi. Bozali o ntei ya bato ya libongi mingi, oyo bayaka naino te na mabele. Satana ayebi nani bozali mpe nani bozalaki liboso ya bokufi mpe bososoli mosala oyo esengeli kosalema liboso Mobikisi azonga. Mpe nsima ya nkoto ya mbu ya kosalaka bikela ya mabe, monguna azwa na mayele mpe akobonga te.

Na botondi, bonganganzambe tozali na yango ezali makasi mingi koleka ezali mayele mabe ya monguna. Nabondeli na bino kozala mibali mpe bilenge mibeli Nkolo asengeli bino kozala. Bokangama na mokolo na mokolo boyambola eteni mpenza ya bomoi na bino ete bokoka kosalela bonganganzambe na nguya monene mingi koleka liboso. Oyo ezali bobele lolenge bokobatela bino moko mpe libota na bino na likama na molimo na mikolo ya mikakatano ezali liboso.

Nkolo asangeli mibali ya moyimi te oyo atii bolamu ya basusu liboso ya bango moko. Ye asengeli na mibali oyo na bolingi bazali kosala mpo na koyoka mongongo ya Molimo na polele. Ye asengeli na mibali ya boyokani oyo babatelaka mayokani ya bango na bosembo. Ye asengeli na mibali oyo bakani komibatela peto na bosoni te—mibali balongobani oyo bakoki kobengama na ngonga songolo mpo na kopesa mapamboli na mitema peto, milimo esukwama mpe maboko ya bolingi. Nkolo asengeli bato bazali na mposa ya koyambola—mibali na nzunzu mpo na kosalisa mpe kozala eteni ya mapinga ya bamemi bonganganzambe balongobani ba Nkolo.

Napamboli bino mpo na kokoma mibali wana. Napamboli bino na mpoki mpo na koyambola mokolo na mokolo mpe koyekola boniboni kosalela nguya ya bonganganzambe. Napamboli bino mpo na kokabola bolingo ya Mobikisi na mwasi mpe bana na bino mpe banso oyo bayebi bino. Napamboli bino mpo na kosala malamu mingi mpe kozala malamu mingi. Mpe napamboli bino ete lokola bokosala bokasi oyo, bokomona bikamwa na bomoi na bino.

Tozali na mosala ya Nzambe ya Bokasi nyonso. Yesu azali Klisto Tozali basali na Ye. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.