Makomi
Litatoli ya Profeta Joseph Smith


Litatoli ya Profeta Joseph Smith

Maloba na ye moko Profeta Joseph Smith mpo na oyo etali bobimi ya Buku ya Mormon ezali boye:

“Na mpokwa ya mokolo ya ntuku mibale na moko ya sanza ya libwa [1823] … Namipesaki na losambo mpe libondeli na Nzambe ya Bokasi nyonso. …

“Wana ezalaki ngai boye kati na kobelelaka epayi ya Nzambe, namonaki pole kobimaka kati na kisuku na ngai, oyo ekobaki koyikana kino kisuku engengisamaki koleka moi ya nzanga, ntango na mbala moko moto moko amonanaki mpembeni na mbeto na ngai, atelemaki na mopepe, mpo makolo na ye etutaki nse te.

“Alataki nzambala monene ya mpembe mingi koleka. Ezalaki mpembe koleka eloko nyonso ya mabele naino namona te; mpe nandimi te ete eloko moko ya mabele ekokaki kosalema mpo na komonana mpembe mpe bongengi koleka boye. Maboko na ye ezalaki mpamba, mpe bibandeli ya maboko na ye mpe lokola, na likolo ya nkingo ya loboko; bongo lisusu, makolo na ye ezalaki mpamba, mwa moke likolo ya makaka. Moto mpe nkingo na ye ezalaki mpe mpamba. Nakokaki komona ete alataki elamba mosusu te bobele nzambala oyo, mpo ezalaki polele, ete nakokaki komona ntolo na ye na kati.

“Ezalaki te bobele nzambala na ye oyo ezalaki mpembe mpenza, kasi bomoto na ye mobimba ezalaki ya nkembo koleka mayele ya bolimboli, mpe elongi na ye solo lokola monkalikali. Kisuku ezalaki na pole makasi koleka, kasi ezalaki kongenga mingi mpenza te koleka nzinganzinga ya bomoto na ye. Ntango natalaki ye mbala ya yambo, nabangaki; kasi kala mingi te bobangi etikaki ngai.

“Abiangaki ngai na nkombo, mpe alobaki epayi na ngai ete azalaki ntoma atindami uta na miso ya Nzambe epayi na ngai, mpe ete nkombo na ye ezalaki Moroni; ete Nzambe azalaki na mosala ya kosala mpo na ngai; mpe ete nkombo na ngai ekoyebana mpo na bolamu mpe mabe na kati ya bikolo nyonso, mabota nyonso, mpe minoko nyonso, to ete ekolobama na bolamu mpe na mabe na kati ya bato nyonso.

“Alobaki ete ezalaki na buku moko ebombisami, ekomami likolo ya bapalaki ya wolo, oyo ezali kopesa lisolo ya bafandi ya kala ya mokili oyo, mpe ya ekanga epayi wapi bawutaki. Alobaki lisusu ete litondi ya nsango malamu ya libela ezalaki kati na yango, lokola epesamaki na Mobikisi epayi na bafandi ya kala;

“Lisusu, ete ezalaki na mabanga mibale kati na matimbo ya mpauni—mpe mabanga oyo, ekangama na ebende ya ntolo, esali oyo ebiangami Ulima mpe Tumima—ebombisama elongo na bapalaki; mpe kozala mpe kosalela mabanga oyo ezalaki nini oyo esalaki ‘bamoni’ na ntango ya kala soki te na ntango esila koleka; mpe ete Nzambe alengelaki yango mpo na mwango ya kobongola buku yango. …

“Lisusu, alobaki epayi na ngai, ete ntango nakozwa bapalaki wana oyo alobelaki—mpo ete ntango esengelaki kozwama ekokaki naino te—nasengeli kolakisa yango na moto moko te; ezala ebende ya ntolo elongo na Ulima mpe Tumima mpe te; bobele na baoyo nakotindama kolakisa bango; soki nakosala yango nakobebisama. Ntango ezalaki ye kosolola elongo na ngai mpo na oyo etali bapalaki, limoni efungwamaki na mayele na ngai ete nakokaki komona esika wapi bapalaki ebombisamaki, mpe esika yango na polele mpenza mpe na lolenge nyonso ete nayebaki lisusu esika yango ntango nakendaki kotala yango.

“Nsima ya malakisi oyo, namonaki pole na kisuku ebandaki kosangana mpenza nzinganzinga na bomoto na ye oyo azalaki koloba elongo na ngai, mpe ekobaki kosala bongo kino kisuku etikalaki lisusu molili, longola se nzinganzinga na ye; ntango, na mbalakaka namonaki, lokola soki ezalaki, lidusu efungwamaki semba likolo na lola, mpe amataki kino alimwaki mobimba, mpe kisuku etikalaki lokola ezalaki yambo ete pole oyo uta na lola emonana.

“Nalalaki kotambwisaka makanisi na likambo oyo ya lolenge na yango moko, mpe kokamwaka mpenza na oyo eyebisamaki epayi na ngai na ntoma oyo ya momeseno te; ntango namonaki, na katikati ya bomanyoli na ngai, na mbalakaka ete kisuku na ngai ebandaki lisusu kongengisama na pole, mpe na mbala moko, lokola ezalaki, ntoma se moko wana ya lola azalaki lisusu mpembeni na mbeto na ngai.

“Abandaki, mpe lisusu azongelaki mpenza se makambo moko wana oyo asalaki na boyei na ye ya yambo, na bokeseni ata moke te; mpe ntango asilisaki kosala oyo, ayebisaki ngai mpo na oyo etali masambisi minene oyo ezalaki koya likolo ya mabele, elongo na libebi monene ya nzala, mompanga, mpe bokono; mpe ete masambisi oyo ya nsomo esengeli koya na mabele na nkola oyo. Esilaki ye kosangela makambo oyo, amataki likolo lisusu lokola asalaki liboso.

“Na ntango oyo, bilili oyo etiamaki na mayele na ngai ezalaki ya mozindo mingi, ete mpongi ekimaki ngai na miso, mpe nalalaki makalekale na kokamwaka makambo oyo namonaki mpe nayokaki. Kasi bosutuki kani ezalaki ya ngai, ntango namonaki lisusu ntoma se moko wana mpembeni ya mbeto na ngai, mpe nayokaki ye kobandela soki te kozongela lisusu epayi na ngai makambo se moko wana lokola liboso; mpe abakisaki likebisi moko na ngai, koyebisaka ngai ete Satana akomeka kosenginia ngai, (na kotalaka bizaleli ya bokeleli ya libota ya tata na ngai), ete nazwa bapalaki mpo na ntina ya kozwa mosolo. Yango nde apekisaki ngai kosala, kolobaka ete nasengeli kozala na ntina mosusu te na makanisi na ngai na kozwaka bapalaki longola se mpo na kokembela Nzambe, mpe nasengelaki kopusama na ntina mosusu te bobele oyo ya kotonga bokonzi na ye; soki bongo te nakoki kozwa yango te.

“Nsima ya bobimeli oyo ya misato, amataki lisusu na lola lokola liboso, mpe natikalaki lisusu komanyola likolo ya likambo ya lolenge ya kokamwa oyo nawutaki komona; ntango penepene na ntango moke kaka nsima esilaki ntoma uta na lola komata uta na ngai mpo na mbala ya misato, soso elelaki, mpe namonaki ete ntongo ezalaki kobelema, boye masolo na biso ezwaki mobimba ya butu wana.

“Kala mingi te esilaki ngai kolamuka uta na mbeto na ngai, mpe, lokola momeseno, nakendaki kosala misala esengeli ya mokolo wana; kasi, na komekaka kosala lokola na bantango mosusu, namonaki bokasi na ngai kosila mingi mpenza ete ezangisaki ngai makoki ya kosala. Tata na ngai, oyo azalaki kosala elongo na ngai, amonaki ete eloko moko ezali malamu te epayi na ngai, mpe alobelaki ngai nazonga na ndako. Nabandaki kokende na mokano ya kozonga na ndako; kasi, na komekaka kokatisa lobala libanda ya zamba epayi wapi tozalaki, bokasi na ngai esilaki nie, mpe nakweyaki, na makasi te, likolo ya mabele, mpe mpo na mwa ntango nayebaki eloko moko lisusu te.

“Eloko ya yambo oyo nakoki komikundola ezalaki mongongo kolobelaka ngai, kobiangaka ngai na nkombo. Natalaki likolo, mpe namonaki ntoma se moko wana atelemi likolo ya moto na ngai, azingami na pole lokola liboso. Nsima asangelaki lisusu epayi na ngai nyonso oyo asangelaki na ngai na butu elekaki, mpe atindaki ngai nakende na tata na ngai mpe nalobela ye limoni mpe mitindo oyo nazwaki.

“Natosaki; nazongaki epayi ya tata na ngai na zamba, mpe nazongelaki koyebisa ye likambo mobimba. Ayanolaki ngai ete ezalaki ya Nzambe, mpe alobelaki ngai nakende mpe nasala lokola etindamaki ngai na ntoma. Natikaki zamba, mpe nakendaki na esika wapi ntoma alobelaki ngai ete bapalaki ebombisami; mpe engebene na polele ya limoni oyo namonaki mpo na yango, nayebaki esika yango na ntango kaka nakomaki kuna.

“Mpembeni na mboka moke ya Manchester, na etuka ya Ontario, New York, ezali na ngomba ya monene, mpe ya molai koleka mosusu ya bisika ya mpembeni. Na mopanzi ya westi ya ngomba, mosika te na nsonge, na nse ya libanga moko monene, bapalaki elalaki wana, ebombisami na sanduku ya libanga. Libanga oyo ezalaki monene mpe lokola libungutulu na ntaka ya mopanzi ya likolo, mpe moke mingi epayi na nsuka, boye ete eteni ya katikati na yango emonanaki likolo ya mabele, kasi nsuka nzinganzinga mobimba ezipamaki na mabele.

“Esilaki ngai kolongola mabele, nazwaki etombolelo, oyo nakotisaki na nse ya nsuka ya libanga, mpe na mwa makasi moke natombolaki yango. Natalaki na kati, mpe kuna solo namonaki bapalaki, Ulima mpe Tumima, mpe ebende ya ntolo, lokola elobamaki na ntoma. Sanduku oyo wapi bapalaki etandamaki esalemaki na mabanga matandama esika moko na lolenge ya nsima. Na nse ya sanduku, mabanga mibale etandamaki, lokola se ekatisaki sanduku, mpe likolo ya mabanga oyo bapalaki etandamaki mpe biloko mosusu elongo na yango.

“Namekaki kobimisa yango, kasi napekisamaki na ntoma, mpe lisusu ayebisaki ngai ete ntango mpo na kobimisa yango ekokaki naino te, mpe ekokoka te, kino mibu minei uta na ntango wana; kasi ayebisaki ngai ete nasengeli koyaka na esika yango nsima ya mobu moko kaka uta na ntango wana, mpe ete akokutana kuna elongo na ngai, mpe ete nakokoba kosala boye kino ekokoka ntango mpo na kozwa bapalaki.

“Na engebene, lokola natindamaki, nakendaki na nsuka ya mobu na mobu, mpe ntango nyonso nakutaki ntoma se moko wana kuna, mpe nazwaki mateya mpe mayele uta na ye mbala nyonso ya masolo na biso, mpo na oyo etali nini Nkolo akosala, mpe boniboni mpe na lolenge kani bokonzi na ye esengeli kokambama na mikolo ya nsuka. …

“Na bolandi, ntango ekokaki mpo na kozwa bapalaki, Ulima mpe Tumima, mpe ebende ya ntolo. Na mokolo ya ntuku mibale na mibale ya sanza ya libwa, na mobu ya nkoto moko nkama mwambe ntuku mibale na nsambo, nsima ya kokende lokola momeseno na nsuka ya mobu mosusu na esika wapi ebombisamaki, ntoma se moko wana uta na lola apesaki ngai yango na mokumba oyo: ete nakozala moyanoli mpo na yango; ete soki nakotika yango ekende na bozangi bokebi, soki te na bopoto na ngai, nakokatama; kasi soki nakosalela bokasi na ngai nyonso mpo na kobomba yango, kino ye, ntoma yango, akosenga yango, ekobatelama.

“Kala mingi te nasosolaki mpo na nini nazwaki mikumba ya ntina boye mpo na kobatela yango, mpe mpo na nini esalemaki ete ntoma alobaki ete ntango nakosala nini esengamaki na maboko na ngai, akosenga yango. Mpo kala mingi te wana eyebanaki ete nazalaki na yango, bokasi boike ya kilikili esalamaki mpo na kobotola yango epayi na ngai. Basalaki mayele nyonso oyo makokaki kokanisama mpo na ntina wana. Monyokoli ekomaki ya motema mabe mpe ekomaki makasi mingi koleka liboso, mpe ebele ya bato bazalaki na bokebi ntango nyonso mpo na kobotola yango epayi na ngai soki ekokaki. Kasi na bwanya ya Nzambe, ebatelamaki na maboko na ngai, kino ekokisaki ngai na yango nini esengelamaki na maboko na ngai. Ntango, engebene na maye ebongisamaki, ntoma yango asengaki yango, napesaki yango epayi na ye; mpe azali na yango na mokumba na ye kino na mokolo oyo, oyo ezali mokolo ya mibale ya sanza ya mitano, na mobu nkoto moko nkama mwambe ntuku misato na mwambe.”

Mpo na lisolo mobimba, tala Joseph Smith—Mambi ya Kala kati na Liyaka ya Ntalo Monene.

Lisolo ya makomi ya kala ebimisami boye uta na mabele lokola mongongo ya bato bakolobaka uta na mputulu, mpe ebongolami kati na elobeli ya mikolo oyo na lisalisi ya likabo mpe nguya ya Nzambe lokola etatolamaki na Lisakoli ya bonzambe, ebimisamaki na buku mbala ya yambo na mokili na lokota ya Angele na mobu 1830 lokola The Book of Mormon.

Bimisa na lokasa