Liahona
Mwinda na Biso na Esobe
Sanza ya Yambo 2024


“Mwinda na Biso na Esobe,” Liahona, Sanza ya Yambo 2024.

Etinda ya sanza ya Liahona, Sanza ya Yambo 2024

Mwinda na Biso na Esobe

Baoyo batangi na bosolo mpenza Buku ya Mormon, babikaka na nzela ya mibeko yango, mpe basambelaka na ntina ya bosolo na yango bakoyoka Molimo Mosantu mpe bakokolisa bondimi na bango, mpe litatoli, na bango ya Mobikisi.

Elilingi
Ndeko mobali ya Yelede elongo na mabanga kongala

Elilingi ya ndeko mobali ya Yelede elongo na mabanga kongala na Normandy Poulter

Kutu ntango nazalaki elenge mobali, Nazalaki na litatoli ya Buku ya Mormon. Namiyokaki mpenza komikotisa mobimba na lisolo ya ndeko mobali ya Yelede mpe bato na ye na kati ya mobembo na “mabele ya elaka” (Etele 2:9).

Ntango akutanaki na limoni ya kokende mobembo na bamasuwa ezangi mwinda, ndeko mobali ya Yelede atunaki, “Tala, O Nkolo ekondima yo ete tokatisa mai manene o molili? Na koyanolaka, Nkolo alobaki “Nini olingi nasala ete bokoka kozala na mwinda o kati ya masuwa ma bino?” (Etele 2:22, 23).

Ndeko mobali ya Yelede ayebaki ete Nkolo azalaki na nguya nyonso. Ayebaki ete Nkolo azali liziba ya esengo nyonso. Ayebaki ete Nkolo apesaki motindo na libota na ye mpo na kobenga Ye na ntango ya bosenga. Boye, na kosalelaka bondimi epai ya Nkolo, ndeko mobali ya Yelede alengelaki mabanga ya mike 16. Mikundola ete sima asengaki Nkolo asimba mabanga na mosapi na Ye, “ete yango ekoka kongala liboso ya molili” (Etele 3:4).

Elilingi ya Nkolo kosimbaka mabanga yango etikalaki na makanisi na ngai ntango natangaki lisolo yango mbala ya yambo. Nakoki komona likambo wana lokola ete ezalaki kosalema na miso na ngai. Ntango mosusu ezali mpona ete elilingi ya molili kopanzanaka mpo na mwinda ezalaki solo mpo na ngai.

Ntango nayoki Molimo Mosantu te, ntango nakomi mwa mosika na Molimo ya Nkolo, namonaka molili. Kasi ntango natangaka Buku ya Mormon, pole ezongaka. Buku ya Mormon ezalaka mpo na ngai lokola libanga moko ya kongenga esimbami na Nkolo. Engengisaki mobembo na ngai katikati ya bomoi.

Mwinda Moko ya Libela na Libela

Lokola oyo ememamaki na loboko ya Nkolo na Bamerika ya kala, biso banso tokutanaka na mikolo ya bambonge mpe ya molili katikati na mobembo na biso na mabele ya bilaka ya bonetolami. Kasi Nkolo akosala mpo na biso oyo Ye asalaki mpo na Bayelede mpe Banefite. Akokamba mpe akongengisa nzela na biso—soki totosi Ye, tosaleli bondimi kati na Ye, mpe tosengi lisalisi na Ye.

Nkolo alobelaki Nefi, “Nakozala mwinda mwa bino o esobe; mpe nakolengele nzela liboso na bino, soko boye ekozala ete bokobomba mitindo na ngai; yango wana, mbala nzike lokola ekobatela bino mitindo na ngai bokokambama kino mboka elakelama; mpe bokoyeba ete ezali na ngai nde bokambemi” (1 Nefi 17:13).

Nkolo ayebisaki Yakobo ndeko mobali ya Nefi, “Ngai nakozala mwinda kati na bango libela na libela, baye bayoki maloba na ngai” (2 Nefi 10:14).

Na Mobikisi, mosakoli Abinadi atatolaki, “Ye azali mwinda mpe bomoi ya mokili; iyo, mwinda moko ezanga nsuka, oyo ekoki kokoma molili atako moke te” (Moziya 16:9).

Mpo na Yemoko, Mobikisi atatolaki, “Nazali mwinda mpe bomoi ya Mokili.” Abakisaki, “Tala nazali mwinda; natii ndakisa yoko mpo ya bino.” (3 Nefi 9:18; 18:16).

Elilingi
Mokambi Russell M. Nelson azali kotambola.

Koyokaka Pole

Nalingi profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson. Nazali na lipamboli ya kosalaka na mopanzi na ye. Ntango azali kotambola na kisuku moko ya ndako, yango engengaka na mbala moko. Amemi Mwinda ya Klisto elongo na ye.

Mwinda ya Klisto ezali solo. Yango “ezali bokasi, nguya, to botindiki ya bonzambe oyo esalami wuta na Nzambe na nzela ya Klisto mpe epesi bomoi mpe mwinda na biloko nyonso.” Yango ezali likabo moko kitoko ya molimo oyo ekoki kokamba bana ya Nzambe epai ya Molimo Mosantu mpe nsango malamu ya Yesu Klisto.1 Kotangaka Buku ya Mormon ekembisaka Mwinda yango.

Bantango mosusu tosengeli kotala sima na bomoi na biso mpo na kokundola lolenge nini tosalisamaki na mobembo na biso. Ntango totali na sima, tokoki koyoka botindiki ya mobikisi lisusu. Ntango makomi elobi, “Kundola, kundola” (Elamani 5:12), Nabanzi yango ezali koyebisa biso, “Komikondola bobele te oyo oyebaki to oyokaki mbala moko; kasi, yoka pole wana lisusu.”

Mpo na boko, koyoka pole ya molimo eyaka na pete nyonso. Mpo na basusu, pole ya molimo ekoki kozala mpasi mpo na koyoka mpo na bitumba ya moto yemoko to mabulungano ya mokili. Kasi soki tozali na bondimi, pole ekoya—na ngonga mpe balolenge tokanisaki te.

Mokambi Nelson, oyo apesaki biso toli to “ totanga na losambo makasi Buku ya Mormon mokolo nyonso,”2 apesaki balolenge ebele Buku ya Mormon ekoki komema biso penepene ya Mobikisi mpe kosalisa biso koyoka pole ya nsango malamu, kosimba babosolo ya nsango malamu, mpe kobika mateya ya nsango malamu.

Ntango totangi Buku ya Mormon, Mokambi Nelson alobaki, bososoli na biso, mpe bosepeli na biso mpo na, Bomikabi ya Yesu Klisto ekokola.

Tokoyoka mposa ya “kobotama lisusu” (Moziya 27:25) wana buku esalisi biso koyeba bobongoli ya motema (tala Moziya 5:2).

Ntango totangi mateya ya Buku ya Mormon na ntina ya bosangani ya Yisalaele, tokoyoka bokoli ya mposa ya koluka bakufi na biso mpe kosala makuli ya lobiko mpe ya kobulisama mpo na bango na tempelo.

Tokoyoka pole ntango tozali kozwa biyano na mituna na biso, bokambi na kozwaka mikano, mpe makasi mpo na koyambola mpe kotelemela mabe.

Mpe ntango totangi babosolo ezwami na Buku ya Mormon, tokoyoka lobiko, malamu, bozongisami, lisungi, bokasi, libondisi, mpe konzo na molimo na biso.3

“Na bongo, yango ezali solo te?” Alma atunaki na ntina ya molona ya bosolo, ya boyebi mpe ya litatoli oyo evimbi mpe ekoli. “Nalobi epai ya bino, Iyo, zambi ezali pole; mpe oyo nyonso ezali pole, ezali malamu mpo ete yango ezali komonana, bosengeli boye koyeba ete yango ezali malamu” (Alma 32:35).

Elilingi
foto ya Yesu Klisto

Elilingi ya Klisto, na Heinrich Hofmann

Luka Mobikisi kati na Molili.

Ntango moninga na ngai Kamryn azalaki na mibu 10 ya mbotama, azwaki bokono moko ezalaka mingi te kasi ntango nyonso oyo ebebisaki liso na ye ya mobali.4 Bangonga mosusu, ntango mpasi esanganaki ekomaki ya ntango mpe ya bozangi kokoka, Kamryn akokaki kotala mwinda ata moko te. Baboti na ye, babangaki ete akoka kokufa miso, bakokaki kotika ya kokanga maninisa ya kisuku na ye ya kolala mpo na komeka kotia ye na kimia. Mama ya Kamryn, Janna, akanisaki:

“Na sima ya sanza minei sima ya boyebi bokono, nakotaki bongo na kisuku na ye ya molili. Ntango miso na ngai emonaki malamu mpenza, nakokaki komona Kamryn akokami na lolenge ya kogumbama likolo ya mbeto na ye. Azalaki koyoka mpasi makasi mpenza ete aninganaki te to kutu kolela te ntango ayokaki ngai kokota. Atikalaki bobele ya kolala na miso nyonso mibale ya kovimba.

“Nafukamaki pembeni ya mbeto na ye, nazwaki loboko na ye na kati ya oyo ya ngai, mpe nafinaki yango mbala misato— ezalaki lolenge na biso ya sekele mpo na koloba ‘Nalingaka yo.’ Na lolenge esengeli mpenza, alingaki kofina mbala minei mpo na koloba ‘nalingaka yo mingi koleka,’ kasi ayanolaki te. Azalaki na mpasi makasi koleka. Na mpisoli kokitaka likolo ya matama na ngai, natalaki mwana na ngai ya mwasi ya mbula 10 oyo mbala eleki azalaki makasi, akokaki zolongani. Motema na ngai ebebaki.”

Janna asalaki na kimia, losambo ya sembo.

“Nayebisaki Tata ya Lola ete nayebaki ete Ye ayebaki malamu koleka, kasi nasambelaki, ‘Soki Olingi salisa ye.’ Ntango nafandaki wana kosambelaka, nayokaki mopepe moko ya molunge esimbaki ngai. Nayokaki kimia ntango likanisi moko na oyo etali Yesu Klisto eyaki na makanisi na ngai: ‘Ye azali mwinda. Luka Ye na molili.’”

Janna atombolaki mutu na ye mpe alobaki na mongongo moke na litoyi ya Kamryn: “Osengeli koluka Mobikisi na molili.”

Sima na yango, Kamryn alalaki na koyokaka banzembo mpe makomi na library app.

Elilingi
mwana mwasi alati eloko ebombi liso

Ntango bokono na ye ya liso emonanaki, Kamryn alukaki Mobikisi na molili.

Elilingi na ndakisa ya bolingo ya libota ya Kamryn

Bokono ya Kamryn elalaka na mwa bangonga, kasi ntango eyaka makasi, Janna mpe mobali na ye, Darrin, balendisaka ye mpe lisusu batiaka babulangeti na maninisa ya kisuku na ye. Katikati ya bantango wana ya pasi, Kamryn alobi, “Nazali koluka bobele Mobikisi na kati ya molili.”5

Ntango bomoi emonanaka lokola “esobe moko ya molili mpe kokawuka” (1 Nefi 8:4), tokoki lisusu kozala na bosenga ya koluka Mobikisi na molili. Natatoli ete Buku ya Mormon, elongo na banzeneneke na yango “ete Yesu azali Klisto, Nzambe ya Seko,”6 ekokamba biso epai na Ye. Nayebi ete baye oyo batangaka Buku ya Mormon na bosolo, babikaka na mibeko na yango, mpe basambelaka mpo na bosolo na yango bakoyoka Molimo Mosantu mpe bakokolisa bondimi mpe litatoli na bango epai ya Mobikisi.

Tika biso tolakisa botondi mpo na buku yango “ya sembo koleka”7 na kotanga yango, kobombaka yango, mpe kosalelaka yango mpo na kokembisa bondimi na biso mpe bondimi ya basusu kati na Mwinda ya Mokili.

Matangi

  1. Tala Masolo mpe Mituna, “Light of Christ,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

  2. Russell M. Nelson, “Buku ya Mormon: Bomoi na Yo Ekokaki Kozala Lolenge nini Soki Yango Ezalaki Te?Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 62.

  3. Tala Russell M. Nelson, “Buku ya Mormon: Bomoi na Yo Ekokaki Kozala Lolenge nini Soki Yango Ezalaki Te?,” 62, 63.

  4. Herpes simplex virus keratitis.

  5. Natondi Janna Cannon mpe mwana na ye ya mwasi Kamryn mpo na kokabolaka lisolo na bango.

  6. Lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon.

  7. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 64.