Liahona
Nzete ya Bomoi
Sanza ya Yambo 2024


“Nzete ya Bomoi,” Moninga, Sanza ya Yambo. 2024, 26–27.

Etinda ya sanza Moninga, Sanza ya Yambo 2024

Nzete ya Bomoi

Elilingi
Maloba mosusu

Bililingi na Andrew Bosley

Lehi azalaki profeta. Nzambe ayebisaki ye amema libota na ye na mabele ya elaka. Ntango bango na mobembo, azwaki ndoto moko na oyo etali nzete moko kitoko. Ebengamaki nzete ya bomoi.

Elilingi
maloba mosusu

Nzete ebotaki mbuma ya elengi ya pembe. Lehi ayokaki esengo ntango aliaki yango! Alingaki ete libota na ye emeka yango mpe.

Elilingi
maloba mosusu

Lehi amonaki lisusu lingenda moko ya libende oyo ememaki na nzete. Bato basimbaki lingenda mpo na kokende na nzete mpe kolia mbuma.

Elilingi
maloba mosusu

Nzete na kati ya ndoto ya Lehi ezali lokola bolingo ya Nzambe. Lingenda ezali lokola makomi. Ntango totangi makomi, tokomaka penepene ya Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klistu.

Kopakola Langi na Lokasa

Makomi Eteyi na ntina ya Yesu

Elilingi
maloba mosusu awa

Liyemi na Adam Koford

Lisolo nini olingaka mingi na oyo etali Yesu Klisto?