2017
Kosalelaka Bomoi Ebulisama
August 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Mwambe 2017

Kosalelaka Bomoi Ebulisama

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi, Libota, Lisungi

“Kobulisa elakisi kotiya pembeni to kokulisa eloko moko lokola ebulisama, epesama na bantina esantu,” elobaki Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. “Elonga ya solo na bomoi oyo eyaka ntango tobulisaka bomoi na biso—yango ezali, ntango mpe maponi na biso—na bantina ya Nzambe.”1

Elder Neal A. Maxwell (1926–2004) ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki, “tozali komeka kokanisa na ntina ya bobulisi kaka lokola komibonzaka, ntango bonzambe ekambaki, bozwi ya bisalelo na biso. Kasi bobulisi eluti ezali komibonza ya moto yemei na Nzambe.”2

Ntango tomibulisi bisomei na bantina ya Nzambe, bondimi na biso na Yesu Klisto mpe na Bomikabi na Ye ekomata. Ntango tosaleli bomoi ebulisama, tokoki kokoma basantu na nzela ya misala wana.

Carole M. Stephens, Mopesi toli ya Yambo na Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki: “Mpaka Robert D. Hales ateyaki, ‘Ntango tosalaka mpe tobatelaka mayokani, tobimaka na mokili mpe tokotaka na bokonzi ya Nzambe.’

“Tobongwani. Tolukaka na bokeseni, mpe tosalaka na bokeseni. Makambo toyokaka mpe totangaka mpe tolobaka ezali na bokeseni, mpe oyo tolataka ezali na bokeseni mpo ete tokomi bana basi ya Nzambe oyo tokangisami na Ye na liyokani.”3

Bobulisi ezali liyokani oyo Nzambe asalaka “na ndako ya Yisalaele; Nsima ya mikolo wana, elobi Nkolo, Nakotiya mobeko na ngai kati na bango, mpe nakokoma kati ya mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai” (Yilimia 31:33). Kosalelaka bomoi ebulisama ezali kozala malamu na mwango ya Nzambe mpo na biso.

Makomi ya Kobakisa

1 Batesalonika 1:3; Doctrine et Aliances 105:5

reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. D. Todd Christofferson, “Reflections on a Consecrated Life,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2010, 16.

  2. Neal A. Maxwell, “Consecrate Thy Performance,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2002, 39.

  3. Carole M. Stephens, “Wide Awake to Our Duties,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2012, 115–16.