2017
Esengo ya kozala Moyekoli ya Yesu Klisto.
August 2017


Bilenge

Esengo ya kozala Moyekoli ya Yesu Klisto.

Osi oyoka mabe mokolo moko? Osalaka nini mpo na koyoka malamu lisusu? Mokambi Uchtdorf ayebi ete “moko na moko kati na biso azali na mpasi na ye, boyokisami mitema na biso mpasi, mawa na biso. Tokoki kutu komiyoka ya kozanga makasi mpe ntango mosusu ya kolongama.”

Mposa na ye ezali ete tosalela oyo abengi “bomoi ya moyekoli”: “kotikala na bondimi mpe kokoba kokende liboso na bondimi. Ntango tokobi kokende liboso na bondimi, tozali na makoki ya kondimela Nzambe, kobatela mitindo na Ye, mpe kosalisa basusu—mpe koyoka esengo na maye manso! Lokola Mokambi Uchdorf alobaki, “Baoyo bazali kosalela bomoi ya moyekoli… bazali baoyo oyo ya bango bikela esali mbala mingi bokeseni.”

Banza kokomaka molongo ya ndende oyo ekoki kosunga yo osalela bomoi ya moyekoli. Na ndakisa, okoki kokoma likanisi ya mosala lokola “Kosunga moboti kolengela bilei ya mpokwa” to likanisi mpo na kobatelaka mitindo lokola “Kosambelaka mpo na kozalaka na bompikiliki elongo na bandeko na ngai.” Na nsima okoyoka mpasi to kolongama, bimisa molongo na yo, zwa likanisi moko, mpe meka yango!