2017
Bomoi ya Moyekoli
August 2017


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Mwambe 2017

Bomoi ya Moyekoli

Mibu Ntuku misato eleki na Ghana, elenge moyekoli moko ya université na nkombo ya Doe akotaki na kati ya ndakonzambe ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka mpo na mbala ya liboso. Moninga moko abengisaka Doe aya elongo na ye, mpe Doe azalaki na mposa ya koyeba Eklezia ezalaki ndenge nini.

Bandimi na kati bazalaki malamu mpe na esengo mpenza ete akokaki komipekisa te komituna, “Oyo Eklezia ya lolenge nini?”

Doe akamwaki mpenza ete azwaki ekateli ya koyekola mingi na ntina ya Eklezia mpe bandimi na yango, oyo batondisamaki na esengo makasi. Kasi ntango kaka abandaki kosala bongo, baye libota na ye mosusu mpe baninga na ye mosusu babandaki kotelemela ye na bozongi na ye. Balobaki maloba mabe na ntina ya Eklezia mpe basalaki nyonso mpo na koboyisa ye.

Kasi Doe azwaka litatoli.

Azalaki na bondimi, mpe alingaki nsango malamu, oyo ezalaki kotondisa bomoi na ye na esengo. Mpe bongo, akotaki na mai ya libatisi.

Na sima, amizindisaki na boyekoli mpe losambo. Akilaki mpe alukaki nguya ya Molimo Mosantu na bomoi na ye. Lokola eyano, litatoli ya Doe mpe bondimi na ye ekolaki makasi mpe ekomaki mozindo koleka. Nansuka azwaki mokano ya kosala misio ya ntango mobimba mpo na Nkolo.

Nsima ya kozonga na ye na mission, alingaki mpe abalaki missionele moko ya kala—kaka moko oyo abatisaka ye mibu mileki—mpe na nsima bakangisamaki na Tempelo ya Johannesburg na Afrique du Sud.

Mibu ebele eleki uta Doe Kaku ayokaki esengo ya nsango malamu ya Yesu Klisto mbala ya yambo. Na ntango wana, bomoi ezalaki ntango nyonso malamu te mpo na ye. Ayikaki mpiko na mawa mpe bozangi elikia, lisusu na bobungisi ya bana mibale—bozindo ya mpasi ya makama wana etungisaki motema na ye makasi.

Kasi ye mpe mobali na ye, Anthony, bamekaki kokangama na moko mpe mosusu mpe na Tata na bango ya bolingo na Lola, oyo balingaka na motema na bango mobimba.

Lelo, mibu 30 eleki nsima ya bozwi libatisi na ye, Ndeko mwasi Kaku awuti kosala mission mosusu ya ntango mobimba—sikawa elongo na mobali na ye oyo azalaki mokambi ya mission na Nigeria.

Baoyo bayebi Ndeko mwasi Kaku balobi ete ezali na eloko moko kokamwa epai na ye. Azali kongenga. Ezali mpasi olekisa ntango elongo na ye ozanga koyoka esengo koleka yomei.

Litatoli na ye ezali solo “Nayebi ete Mobikisi azwaka ngai lokola mwana mwasi mpe moninga na Ye (tala Moziya 5:7; Etele 3:14),” alobi. “Mpe nazali koyekola mpe komekaka kosala makasi nazala moninga na Ye mpe—kaka bobele na lolenge nalobi te kasi lisusu na lolenge nazali kosala.

Tozali Bayekoli

Lisolo ya Ndeko mwasi Kaku ezali lolenge moko na ya basusu ebele. Azalaki na mposa ya koyeba bosolo, asalaki makasi mpo na kolonga pole ya molimo, alakisaki bolingo na ye mpo na Nzambe mpe baninga na ye bato, mpe na kosalaka lolenge wana akutanaki na mitungisi mpe mawa.

Kasi atako botelemeli, atako mawa, akobaki kokende liboso na bondimi. Mpe ya motuya ezali ete abatelaki esengo na ye. Amonaki nzela kaka ya koyika mpiko na makama ya mokili te kasi lisusu ya kokola atako yango ezalaki!

Lisolo na ye ezali lolenge moko na ya yo mpe ngai.

Mingi mingi te mobembo na biso ezali mpete to ezanga mimekano.

Moko na moko na biso tozali na mpasi na biso, boyokisami mitema na biso mpasi, mawa na biso.

Tokoki kutu komiyoka ya kozanga makasi mpe ntango mosusu ya kolongama.

Kasi baoyo bazali kosalela bomoi ya moyekoli—oyo bazali kotikala na bondimi mpe bazali kokoba kokende liboso na bondimi; oyo batie elikia na Nzambe mpe bazali kobatela mitindo na Ye;1 baoyo bazali na nsango malamu mokolo na mokolo mpe ngonga na ngonga; oyo bazali kopesa lisalisi ya Boklisto na baoyo bazali nzinga nzinga na bango, ekela malamu moko na ngonga moko—Ezali baoyo oyo ya bango bikela mbala mingi esalaka bokeseni makasi.

Baoyo bazali na mwa boboto koleka, balimbisaka mwa moke koleka, mpe mwa moke ya mawa koleka bazali bato ya mawa oyo bakozwa ngolu.2 Baoyo bazali kosala ete mokili ezala esika malamu mingi, ekela moko ya lisungi mpe ya bolingo mbala moko, mpe oyo bazali koluka kozala na bomoi ya mapamboli, ya kosepela, mpe ya kimia ya moyekoli ya Yesu Klisto bazali baoyo bakozwa esengo na nsuka.

Bakoyeba ete “bolingo ya Nzambe, oyo esopanaka na mitema ya bana ya bato … esengelami mingi koleka likolo ya biloko nyonso … mpe esengo mingi koleka na molimo.”3