2015
Kosalaka na Losambo
sánzá ya libwa 2015


Bilenge

Kosala na Libondeli

Mokambi Eyring ateyi ete libota na yo ekoki kopambolama na bokasi ya mokangano na yo elongo na Tata ya Lola. Okoki kokolisa mokangano na yo na Ye na kobongisaka mabondeli na yo! Oyo ezali mwa makanisi moke ya boniboni kosala bongo:

Yambo ya kobanda losambo na yo, zwa mwa ntango mpo na kokanisa na ntina ya nini olingi koloba. Tala mituna okoki kozala na yango to makambo oyo ezali kotungisa yo—oyo okoki nkutu kokoma ete okoka kobosana yango te. Salela ntango oyo lisusu mpo na kopetola mayele na yo uta na makelele ya mokolo bongo nde okoki kotia makanisi na mayoki ya boboto ya Molimo Mosantu. Soki mayele na yo elingi kaka kowayawaya ntango ozali kosambela, meka kotia na motema na yo ete Tata na Lola azali koyoka. Loba na bantina ya sikisiki. Lisusu, tika mwa miniti moke na nsuka ya losambo mpo na koyoka bitinda ya Molimo. Okoki kokoma mayoki na Yo kati na zulunale na yo.

Mikundola ete losambo ezali lolenge moko ya mosala, na yango kobanga te soki ekokoma momeseno to soki ezali mpasi. Makasi na yo na kosambelaka ekoki kosalisa yo kotonga mokangano na Nzambe, mpe oyo ekopambola bankola.