2015
Losambo ya Bokundoli
sánzá ya libwa 2015


Bana

Losambo ya Bokundoli

Mokambi Eyring ateyi ete kosambela elongo na libota na yo ezali na ntina monene. Okoki kozala ndakisa mpo na libota na yo na kosambelaka mokolo na mokolo. Okoki lisusu kokundolisa libota na yo mpo ete bosambela esika moko mokolo na mokolo. Kanisa maloba oyo uta na lisikulu mosusu ya Mokambi Eyring: “Tata na Lola azali koyoka mabondeli na yo. Ye alingi yo. Ayebi nkombo na yo” (“Continuing Revelation,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2014, 73). Koma pembeni maloba oyo na carte to eteni ya lokasa mpe tia yango kuna wapi libota na yo mobimba ekomona yango. Lolenge oyo okoki kokundola ntango nyonso ete Tata na Lola alingi koyokela bino!