2015
Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Atonda na Nguya mpe Atonda na Nkembo
sánzá ya libwa 2015


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Libwa 2015

Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Atonda na Nguya mpe Atonda na Nkembo

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli kokabola. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe bizalela ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Makomi eteyi biso ete Yesu Klisto “azwaki nguya nionso, na lola mpe na mabele, mpe nkembo ya Tata ezalaki elongo na ye” (D&A 93:17). Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki ete na nguya oyo Mobikisi na biso asalaki balola mpe mabele, asalaki bikamwisi, mpe ayikaki mpiko na mpasi ya Gethsemane mpe ya Kalavari.1 Ntango tokomi kososola yango, bondimi na biso na Klisto ekobakisama, mpe ekokoma makasi.

Ntango tosali mpe tobateli mayokani ya tempelo, Nkolo akopambola biso na nguya na Ye. Linda K. Burton, mokambi ya monene ya Lisanga ya Bamama Basungi, alobaki ete: “bobateli liyokani epesaka bokasi, epesaka nguya, mpe ebatelaka. …Nakutanaki kala mingi te na moninga molingami ya sika. Atatolaki ete nsima ya kozwaka dotasio na ye na tempelo, ayokaki bokasi elongo na nguya ya kotelemela mimekano.”2

Nefi apesi litaloli ya nguya ya liyokami ete: “Ngai, Nephi, namoni nguya ya Mwana ya Mpate ya Nzambe, ete ekitaki … likolo ya bato ya liyokani ya Nkolo,…mpe balatisamaki na bibundeli na bosembo mpe na nguya ya Nzambe ya nkembo monene” (1 Nefi 14:14).

Makomi ya Kobakisa

Yelemia 51:15; Emoniseli 1:6; Yakobo 4:6–7; Moziya 3:17

Uta na Makomi

Lokola atondisamaki na mawa monene na motema mpo Maria mpe Malata, Yesu Klisto asekwisaki ndeko na bango Lazalo uta na kufa na nguya ya Nzambe oyo Ye azalaki na yango.

Yesu akomaki na ndako ya Malata mpe Maria mikolo minei nsima ya bokundami ya Lazalo. Bakendaki na na lilita ya Lazalo, mpe Yesu apesaki motindo ete balongola libanga oyo ezipaki ekuke. Yesu alobaki na Malata ete, Nalobaki na yo te, ete, soki ozali na kondima okomona nkembo ya Nzambe?” Bongo Abondelaki epai na Nzambe Tata mpe “agangaki na mongongo makasi ete, Lazalo, bima.

“Mpe ye oyo azalaki mokufi alamukaki, maboko mpe makolo elingama na bilamba ya nkunda.” (Tala Yoane 11:1–45.) Mobikisi asalelaka nguya na Ye mpo na kosikola mpe kopesa biso nguya. Bondimi na biso epai na Ye ekokola ntango tozali komikundola ete Ye atonda na nguya mpe nkembo nionso.

Matangi

  1. Tala M. Russell Ballard, “This Is My Work and My Glory,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 18.

  2. Linda K. Burton, “The Power, Joy, and Love of Covenant Keeping,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 111.

Botala Oyo.

Boniboni nguya ya Nzambe epesi biso bibundeli na nguya mpe nkembo?