2015
Mabota Ekoki Kozala Elongo mpo na Libela
Sanza ya Motoba 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Motoba 2015

Mabota Ekoki Kozala Elongo mpo na Libela

Elilingi
Mokambi Henry B. Eyring

Nguya ya bonganganzambe mpo na kokanga mabota seko na seko ezali moko ya makabo manene ya Nzambe. Moto nionso oyo asosoli moango ya lobiko ayokaka mposa makasi ya lipamboli wana ya libela. Bobele na milulu ya bokangisi oyo esalami na batempelo ebulisama ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka nde Nzambe apesi elaka ete mabota ekoki kokangama elongo mpo na libela.

Bafungola ya bonganganzambe oyo esalaka ete likambo yango esalama ezongisamaki na mabele na profeta Eliya epai ya Joseph Smith na Tempelo ya Kirtland. Bafungola wana ya bonganganzambe elekisami na mokoloto moko oyo ebukana te na nzela ya baprofeta ya bomoi kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na mokolo ya lelo.

Mobikisi kati na mosala na Ye na bokufi alobelaki nguya ya kokanga mabota kati na maloba epai ya Petelo, Apostolo na Ye mokonzi, ntango Alobaki, “Nazali koloba na bino solo ete, eloko nionso oyo bino bokokanga na nse, ekokangama na likolo: mpe eloko nionso oyo bino bokofungola na nse ekofungolama na likolo” (Matai 18:18).

Ezali bobele na bokonzi ya selesitiale nde tokoki kozala na bomoi kati na mabota mpo na libela. Kuna tokoki kozala kati na mabota na miso ya Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi. Profeta Joseph Smith alimbolaki boyebi wana ya kitoko na lolenge oyo kati na Doctrine et Alliances:

“Ntango Mobikisi akobima tokomona ye lokola azali. Tokomona ete azali moto lokola bisomei.

“Mpe bomoi se moko oyo ya awa ya kozala na lingomba na bato mosusu kati na biso ekozala kati na biso kuna, bobele ekoyikana na nkembo ya seko, oyo nkembo tozali koyoka esengo na yango sikawa te.” (D&A 130:1–2).

Makomi oyo elingi koloba ete tokoki na kondima koluka kokoma na ebongiseli moko ya lola na mikangano na biso kati na mabota na biso. Tokoki komitungisa na ndenge ekoki na ntina ya bato ya libota na biso, ya baoyo na bomoi mpe bakufi, kosala nionso tokoki mpo na kopesa bango makuli ya bonganganzambe oyo ekokanga biso na lola.

Mingi na bino, bilenge mpe bakolo, bozali kosala yango. Bolukaki bankombo ya bankonko oyo bazwi naino te makuli oyo ekoki kokangisa bino elongo.

Pene banso na bino bozali na bandeko ya bomoi oyo bakangisami te na mabota na nguya ya bonganganzambe. Mingi bazali na bandeko ya bomoi oyo bazwi makuli ya bonganganzambe kasi bazali kobatela makuli basalaki na Nzambe te. Nzambe akopambola bino ete bokozala na makoki ya kosalisa mpo na kosembola loboko eepai ya bandeko wana banso na bondimi. Bozali na elaka oyo Nkolo asalaka na bayekoli na Ye oyo bakendaka mpo na komema basusu epai na Ye.

“Mpe ye oyo ayambi bino, kuna nakozala mpe, mpo nakotambola liboso na bino. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe na loboko na bino ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala kati na mitema na bino, mpe banzelu na ngai zingazinga na bino, mpo na kotombola bino” (D&A 84:88).

Uta na bilo na ngai namonaka basi mpe mibali bazali kobalana mikolo nionso kokangaka bafoto na bango kati na bafololo kitoko mpe na mai komataka likolo. Mbala mingi mobali akomemaka mwasi na ye na maboko na ye, na pene mpo na mwa matambe ya kotatabana, wana ezali mokangi foto kokanga bafoto ya libala. Ntango nionso namonaka yango, nakanisaka babalani nayebi oyo ntango wana—ntango mosusu na mwa ntango mokuse mpenza nsima ya mokolo ya libala na bango—basengelaki kotombolana na ndenge mosusu ntango bomoi ekomaki mpasi. Misala ekoki kobeba. Bana bakoki kobotama na mikakatano minene. Maladi ekoki koya. Mpe nsima, mimesano ya kosalaka na basusu oyo tolingaki bango basala na biso—ntango ezalaki pete koleka—ekokomisa biso bilombe mibali mpe bilombe basi na bangonga wana ya komekaka ntango esengaka mingi koleka oyo tokanisaka tozalaki na yango kati na biso.

Tosengeli kopesa na mabota na biso lolenge ya mokangano oyo tokoki kozwa na miso ya Nzambe. Tosengeli komeka te kopesa nkanda to kozwa nkanda. Tokoki kozwa mokano ya kolimbisa nokinoki mpe na mobimba. Tokoki komeka koluka esengo ya basusu liboso ya oyo ya biso moko. Tokoki kozala na boboto kati na maloba na biso. Wana ezali biso komeka kosala makambo manso oyo, tokobengisa Molimo Mosantu kati na mabota na biso mpe kati na babomoi na biso.

Elikia na ngai epai na bino ezali ete, na lisalisi ya Nkolo mpe na mitema ya boyamboli, tokoki kotala uta na bomoi oyo lolenge ya bomoi tolingi kozala na yango mpo na libela. Tata na Lola alingaka biso. Alingi biso tozonga kozala na Ye. Mobikisi, na nzela ya nguya ya Bomikabi na Ye, asali ete mbongwana na mitema na biso oyo tosengeli kosala mpo na kokota na batempelo esantu ekoka kosalama, kosala makuli oyo tokoki mpe nsima kobatela, mpe na ntango esengeli kozala na mabota mpo na libela na nkembo—ya libota ya selesitiale lisusu.

Koteya uta na Etinda Oyo

Ntango bozali koteya malongi ya mabota ya seko, bolanda maye Mpaka Richard G. Scott ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobi: “Ntango nionso boluka kolendisa mabota. Boteya na limoni ya ntina mpo na mabota kokangisama kati na tempelo. … Ntango bozali na limoni ya makuli ya bokangisi ya tempelo, bokosalisa mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe na mabele” (“Napesi Bino Ndakisa,” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 34). Boniboni ekoki bino kosalisa baye boteyaka bakolisa limoni ya ntina ya kokangisama kati na tempelo? Bobengisa baoyo bakangisami naino te mpo na kosolola na ntina ya bameko oyo bakokaki kozwa mpo na kozwa makuli wana. Bobengisa baoyo bakangisami mpo na kosolola lolenge oyo bakokeli kobatela limoni ya libota na bango ya seko mpe kosala mpo na kobongisa baboyokani na bango na moko na mosusu.