2015
Ya Kokangama Seko na Seko na Libota na Ngai
Sanza ya Motoba 2015


Bilenge

Ya Kokangama Seko na Seko na Libota na Ngai

Mokomi afandaka na Utah, Etazini ya Amerika.

Ntango bandimaki ngai lokola mwana na bango na mibu misato, mama moboti na ngai apesaki nzela etemikanda ya kokoma mwana na libota mosusu misalema bobele soki baboti na ngai bandimaki ete makuli na ngai ya Eklezia esalama nsima na ngai kokokisa mibu 12. Akanisaki ete nasengelaki kozala mokolo ya kokoka mpo na kopona ngai moko, kasi ezalaki mpenza mpasi mpo na kozela.

Iyo, ezalaki mpasi ya komona mingi ya baninga na ngai kozwa libatisi ntango bakokisaki mibu mwambe, kasi oyo ezalaki mpasi koleka ezalaki koyebaka ete nakokaki te kokangisama na baboti na ngai oyo bandimi ngai na libota na bango mpe na bandeko mitano ya mibali mpe basi kino nakokisaki mibu 12. Nabangaki ete eloko moko ekokomela ngai mpe nakozala na makoki te ya kokangisama na bango.

Ntango aniverseri na ngai ya mbala 12 ekomaki pene, tobandaki kosala mwango mpo na libatisi na ngai mpe bokangisi na libota na ngai. Baboti na ngai batikaki ngai napona na tempelo nini tokokangisama. Nazalaki kokanisa ntango nionso ete Tempelo ya San Diego California ezalaki kitoko koleka nionso, na boye libota na ngai mobimba bandimaki kokende na motuka na California mpo na bokangisi.

Nakokaki te kozela kokoma libota moko ya seko elongo na baboti mpe bandeko na ngai ya mibali mpe basi. Na ntango ya bokangisi na ngai, nayokaki Molimo makasi mpenza ete ezali mpasi natia na maloba. Sikawa oyo nakangisami na libota na ngai, mayoki na ngai ya bobangi epesi esika na molende mpe kimia, koyebaka ete nazali sikawa seko na seko ya kokangama na bango.