2015
Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Bolamu
Sanza ya Motoba 2015


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Motoba 2015

Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Bolamu

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na site www.reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

“Tika bolamu elata makanisi na yo ntango nionso; nsima kondima na yo ekola makasi na miso ya Nzambe; mpe malongi ya bonganganzambe ekotonda na molimo na yo lokola litanga ya mayi moke euti na likolo” (D&A 121:45).

Bolamu ezali nini? Mokambi James E. Faust (1920–2007) alobaki ete: “Bolamu na ndimbola na yango mobimba mpenza esangisi ndenge nionso ya bosembo oyo ezali kosalisa biso tosala ezaleli na biso.”1 Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) abakisaki ete: “Bolingo ya Nzambe ezali ebandeli ya bolamu nionso, ya makambo malamu nionso, na bokasi nionso ya motema.”2

Mpo na boyokani kati ya basi mpe bolamu, Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki ete: “Basi bamemaka elongo na bango na mokili bolamu moko boye, likabo ya bonzambe oyo ekomisaka bango banganga na kokotisaka mabongi ya boye lokola bondimi, bokasi, bokaboli mayoki, mpe bobongisi kati na baboyokani mpe kati na babonkoko. …

“Bandeko basi, na masanga na bino nionso, ezali boyokani na bino na Nzambe, Tata na bino ya Lola, oyo azali liziba ya nguya ya bizaleli malamu na bino, oyo bosengeli ntango nionso kotia yambo na bomoi na bino. Bomikundola ete nguya ya Yesu eyaki na nzela ya mokano ya bomipesi na Ye moko na bolingi ya Tata. … Bosala makasi ya kozala lolenge ya moyekoli wana ya Tata mpe Mwana, mpe nguya na bino ekosila mokolo moko te.”3

Makomi ya Kobakisa

Nzembo 24:3–5; Bafilipi 4:8; 2 Petelo 1:3–5; Alma 31:5; D&A 38:23–24

Uta na Makomi

Lelo, basi ya bolamu, batonda bondimi, bazali kosembola loboko epai ya Mobikisi. Na Luka 8 totangi oyo etali mwasi moko oyo azalaki kotanga makila mibu 12 oyo ekokaki kobikisama te. Alukaki libiki ntango “ayaki nsima ya [klisto], mpe asimbaki nsuka ya elamba na ye: mpe nokinoki kotanga na ye ya makila [ekaukaki]. … Mpe Yesu alobaki, Moto moko asimbi ngai: mpo nayoki ete nguya4 ebimi na ngai.” Mwasi ya botongono ya bolamu oyo akweyaki liboso na Ye, kolobaka “na ye miso ya bato nionso” ete “asimbaka ye” mpe “abikisamaki nokinoki. Mpe alobaki na ye, Mwana muasi, kondima na yo esili kobikisa yo, kende na kimia” (tala Luka 8:43–48; tala lisusu 6:17–19).

Na nzela ya bolamu na Ye,5 Klisto akoki kobikisa, kolendisa, kopesa kimia, mpe kopesa makasi ntango toponi na bokasi mpe bondimi mpo na kosembola loboko epai na Ye.

Matangi

  1. James E. Faust, “The Virtues of Righteous Daughters of God,” Liahona, Sanza ya mitano 2003, 108.

  2. Gordon B. Hinckley, “Excerpts from Recent Addresses of President Gordon B. Hinckley,” Ensign, Sanza ya minei 1996, 73.

  3. D. Todd Christofferson, “The Moral Force of Women,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 29, 31.

  4. Bolamu ezali na nguya (tala Malako 5:30).

  5. Na Guide des Ecritures, “Bonganganzambe” elimbolami lokola: “Nzela mpe nguya oyo Nzambe apesi na moto mpo na kosala na makambo nionso mpo na lobiko ya moto” (D&A 50:26–27).

Bolanda oyo.

Boniboni bolamu ezali kopesa nguya mpe kolendisa biso?