Likita Linene
COVID-19 mpe Batemplelo
Likita linene ya sanza ya minei 2021


COVID-19 mpe Batemplelo

Bobomba mayokani na bino ya tempelo mpe mapamboli ya liboso na makanisi mpe mitema na bino. Botikala sembo na mayokani bosalaki.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, tozwi na solo feti moko ya molimo. Nazali na bontondi mingi mpo na mabondeli, masukulu, mpe miziki ya likita mobimba. Botondi na moko na moko na bino ndenge bosangani na biso, bisika binso bozali.

Na ebandeli ya mobu oyo eleki, likolo ya bokono ya COVID-19 mpe mposa na biso ya kozala bato ya malamu, tozwaki ekateli makasi ya kokanga batempelo inso mpo na mwa ntango. Na basanza oyo elandaki, tomiyokaki ya kofulama mpo na kofungola lisusu batempelo moke moke na lolenge moko ya ekenge makasi. Batempelo ezali sikawa ya kofungwama mpe ezali kosala na biteni minei, kolandaka mpenza mibeko ya bakonzi ya mboka mpe boyokani ya libateli.

Mpo na batempelo na eteni 1, babalani balongobani oyo bazwaki liboso dotasio na bango bakoki kokangisama lokola mobali mpe mwasi.

Mpo na batempelo na eteni 2, makuli manso mpo na bato ya bomoi esalemi, kobakisa dotasio ya moto ye moko, kokangisa ya mobali mpe mwasi, mpe kokangisa ya bana na baboti. Tosemboli kala te bibongiseli ya eteni ya mibale mpe sikawa topesi nzela na bilenge na biso, bandimi ya sika, mpe basusu oyo bazali na ndingisa ya tempelo ya ntango mokuse mpo na kozwela bankoko na bango libatisi.

Mpo na batempelo na eteni 3, baoyo bazali na bilaka ebongisami bakoki kaka te kosala makuli mpo na bato ya bomoi kasi lisusu kosala makuli manso mpo na bankoko bakufa.

Eteni 4 ezali bozongeli ya manso, mosala ya tempelo ya momesano.

Topesi botondi mpo na bompikiliki mpe bomipesi na mosala na bino na ntango oyo ebongwama mpe ya mikakatano. Nasambeli ete ya bino mposa ya kokumbamela mpe kosala na tempelo engenga makasi sikawa koleka liboso.

Bokoki kozala komitungisa mpo na koyeba ntango nini bokokoka kozonga lisusu na tempelo. Eyano: Tempelo na bino ekofungwama ntango mibeko ya bakonzi ya mboka mikopesa nzela. Ntango bokono bobe ya COVID-19 kati na mboka na bino ezali na ndelo ya kozanga likama, tempelo na bino ekofungwama lisusu. Tolendisi bino bosala manso bokoki kosala mpo na kosunga kokitisa motango ya COVID na mboka na bino mpo ete mabaku ya tempelo ekoka komata.

Liboso ntango yango ekoka, bobomba mayokani na bino ya tempelo mpe mapamboli ya liboso na makanisi mpe mitema na bino. Botikala sembo na mayokani bosalaki.

Tozali kotonga sikawa mpo na mikolo ekoya! Batempelo 41 ezali kotongama to kobongisama mikolo oyo. Kaka mobu eleki, atako bokono bobe, kotonga ya batempelo ya sika 21 ebandaki!

Tolingi komema ndako ya Nkolo penepene na bandimi na biso, ete bakoka kozwa libaku ya bule ya kokota na tempelo ntango inso ezalela na bango epesi nzela.

Ntango nazali kopesa miango na biso ya kotonga batempelo misusu 20, Nazali komaniola mpe kokumisa babongisi-nzela—ya kala mpe ya mikolo oyo—baoyo bomikabi na bango esungi kosala mambi oyo lelo. Tempelo ya sika ekotongama na bisika moko na moko oyo elandi: Oslo, Norvege; Brussels, Belgique; Vienne, Autruche; Kumasi, Ghana; Beira, Mozambique; Cape Town, Afrika ya Sudi; Singapour, Republika ya Singapour; Belo Horizonte, Brezil; Cali, Colombie; Querétaro, Mexique; Torreón, Mexique; Helena, Montana; Casper, Wyoming; Grand Junction, Colorado; Farmington, New Mexico; Burley, Idaho; Eugene, Oregon; Elko, Nevada; Yorba Linda, California; mpe Smithfield, Utah.

Batempelo ezali eteni ya ntina mingi ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na litondi na yango. Makuli ya tempelo ezali kotondisa bomoi na biso na nguya mpe bokasi oyo ezalaka na nzela mosusu te. Tozongisi matondi epai Nzambe mpo na mapamboli oyo.

Ntango tozali kosilisa likita oyo, tozali lisusu komonisa bolingo na biso mpo na bino. Tosambeli ete Nzambe akopesa bino mapamboli na Ye mpe akobatela moko na moko na bino. Elongo, tomipesi na ya Ye mosala ya bule. Na mpiko inso, tokende liboso banso na mosala ya nkembo ya Nkolo! Mpo na yango nasambeli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.