Likita Linene
Mobikisi na Biso Moko
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Mobikisi na Biso Moko

Mpo na libonza ya kosikola na Ye, Mobikisi azali na nguya mpo na kosukola, kobikisa, mpe kolendisa biso moko na moko.

Nazali na botondi ya kozala elongo na bino na ntongo ya Pasika kitoko oyo. Ntango nakanisaka Pasika nalingaka kozongela na makanisi na ngai maloba elobamaki na banzelu epai ya baoyo bazalaki na Lilita ya Elanga: “Bozali koluka moto na bomoi kati na bakufi mpo na nini? Azali awa Te, kasi asekwi.”1 Natatoli ete Yesu ya Nazalete asekwakI mpe Azali na bomoi.

Bino bokanisi nini mpo na Klisto?

Mibu ntuku na misato na minei mileki, moninga na ngai ya misio mpe ngai tokutanaki mpe toteyaki mobali moko ya mayele mingi na Engumba Davao, Philippines. Tosepelaki koteya ye mpo ete azalaki na mituna mingi mpe azalaki kotosa mpenza boyambi na biso. Motuna ya motuya mpenza atunaki biso ezalaki “Bino bokanisi nini mpo na Klisto?”2 Biso ya solo tokabolaki makanisi na biso na esengo mpe totatolaki na ntina ya Yesu Klisto . Nsima abimisaki nkoma moko na likambo se moko wana oyo ezalaki na maloba kitoko mpe masakoli etali Mobikisi. Namikundoli kozalaka ya kokama kasi ya kolendisama mpenza te. Ezalaki na nsango malamu kasi nayokaki eloko te mpe nazangaki nguya ya molimo.

Kokoma Koyeba Ye Mingi mingi

“Bino bokanisi nini mpo na Klisto?” Nasosoli ete lolenge nayebi Mobikisi na motema moko etindikaka mpenza makoki na ngai ya koyoka Ye, lokola mpe lolenge nayanolaka. Mwa mibu mileki, Mpaka David A. Bednar atunaki mituna miye milandi lokola eteni ya makebisi na ye: “Eyebi biso bobele oyo etali Mobikisi, to ezali biso kokoma koyeba Ye mingi mingi? Lolenge nini ekomaka biso koyeba Nkolo?”3

Ntango nayekolaki mpe namaniolaki nayaki kososola polele ete maye nayebi ya Mobikisi eleki mpenza lolenge nini nayebi Ye solo mpenza. Nsima nazwaki mokano ya kosala makasi mingi mpo na koyeba Ye. Nazali na botondi mpenza mpo na makomi mpe matatoli ya basembo mibali mpe basi bayekoli ya Yesu Klisto. Mobembo na ngai moko na mwa mibu eleki ememi ngai na banzela mingi ya boyekoli mpe bomoni. Nasambeli ete Molimo Mosantu akopesa bino lelo nsango malamu mosika koleka maloba ya mpamba oyo nakomaki.

Yambo, tosengeli kososola lisusu ete koyeba Mobikisi ezali nzela ya motuya koleka mpenza ya bomoi na biso. Esengeli kozwa esika ya liboso likolo ya makambo mosusu kani.

“Mpe oyo ezali bomoi ya seko ete bayeba yo Nzambe moko ya solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”4

“Yesu alobaki epai na ye, Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi, moto akokoma na Tata te, soki na ngai te.”5

“Ngai nazali pole ya mokili: ye oyo akobila ngai akotambola na molili te, kasi akozala na moi ya bomoi.”6

Ya mibale, ntango tozala kokoma koyeba Mobikisi, biteni ya makomi mpe maloba ya baprofeta ekomi na ntina malamu mpenza mpo na biso ete ekomi maloba na biso moko. Ezali te kokanga maloba, mayoki, mpe komekola makambo ya basusu mpo ete ezali kokoma koyeba mpo na bisomei, na lolenge se moko ya biso moko, na kosalelaka liloba7 mpe kozwaka litatoli euti na Molimo Mosantu. Lokola esakolaki profeta Alma:

“Ebanzi bino ete nayebi makambo maye ngai moko? Tala, natatoli epai ya bino ete nayebi ete makambo wapi nalobi mazali ma solo. Mpe boniboni bobanzi ete nayebi bosolo bwa mango mpenza?

“Tala, Nalobi epai na bino mayebisami epai ya ngai na Molimo Mosantu ya Nzambe. Tala, nakilaki bilei mpe nasambelaki mikolo mingi ete nakoka koyeba makambo maye ngaimei. Mpe sikawa nayebi ngaimei ete mazali solo; mpo Nkolo Nzambe asali mango mamonisama epai ya ngai na Molimo Mosantu mwa ye; mpe eye ezali molimo mwa bobimisi oyo azali na ngai.”8

Ya misato, kososolaka mingi mingi ete Bomikabi ya Yesu Klisto azali mpo na biso moko mpe mpo na moto na moto ekosunga biso toyeba Ye. Mbala mingi ezali pete mingi mpo ete biso tokanisa mpe tobela Bomikabi ya Klisto na maloba ya momesano koleka kososola lisusu ntina na yango moko na bomoi na biso. Bomikabi ya Yesu Klisto ezanga ndelo mpe ezali ya seko mpe engisaka nyonso na nguya mpe mozindo na yango kasi matomba na yango ezali mpo na moto se moko mpe moto na moto. Mpo na libonza ya kosikola na Ye, Mobikisi azali na nguya mpo na kosukola, kobikisa, mpe kolendisa biso moko na moko.

Bobele mposa ya Mobikisi, bobele ntina ya Ye, uta na ebandeli mpenza, ezalaki kosala bolingi ya Tata. Bolingi ya Tata ezalaki mpo ete Ye asunga na “[komema] kosala bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto”9 na kokomaka ya biso “molobeli epai ya Tata.”10 Boye, “ata soki nazalaki Mwana, ayekoli kotosa mpo na koyoka mpasi, mpe esili ye kobongi nie, akomaki mobandisi ya lobiko ya seko mpo na bango yonso bakotosaka ye”11

“Mpe akokende, koyokaka mpasi ya bolozi mpe mitungisi mpe masenginia ya lolenge na lolenge. …

“Mpe akokamata likolo lya ye liwa, ete akoka kokangola nkanga ya liwa … mpe akokamata likolo lya ye bokono bwa bango, ete nsopo ya ye ekoka kotonda na ngolu, … ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato na ye engebene na bokono na bango.

“… Mwana Mobali wa Nzambe akoyoka mpasi engebene na mosuni ete akoka kokamata likolo lya ye masumu ma bato ba ye, ete akoka kolongola bobuki mobeko na bango engebene na nguya ya libiki lya ye.”12

Nalingi kokabola boyebi moko ya pete oyo elakisi etumba oyo tozali na yango ntango mosusu mpo na koyamba ezalela ya Bomikabi ya Nkolo ya moto se moko.

Mibu mileki, na libengisi ya mokambi na ngai ya liboso, natangaki Buku ya Mormon uta ebandeli tii na nsuka mpe natiaki bilembo na milongo oyo elobelaki Bomikabi ya Nkolo. Mokambi na ngai abengisaki ngai lisusu nalengela bokuse ya lokasa moko ya maye nayekolaki. Namilobelaki, “Lokasa moko? Solo, wana ezali pete.” Nzokande, na kokamwa, namonaki mosala yango mpasi mpenza mpe nakweyaki.

Nasosolaki uta wana ete nakweyaki mpo ete nasosolaki ntina te mpe nazalaki na makanisi ebonga te. Yambo, nakanisaki ete bokuse yango esengelaki kofula moto nyoto. Bokuse yango esalamaki mpo na ngai kasi mpo na moto mosusu te. Esalamaki mpo na kolakisa mayoki mpe motema na ngai na oyo etali Mobikisi mpe maye Ye asalaki mpo na ngai mpo ete ngonga nyonso nakotanga yango, ekokomisa polele boyebi ya molimo ya kafukafu, makasi, mpe ya moto se moko .

Ya mibale, nakanisaki bokuse yango ekozala monene mpe ya kokomama malamu mpe kozala na maloba mpe masakoli minene. Ezalaki likambo ya maloba minene te. Esalamaki mpo na kozala esakola ya bondimi ya polele mpe pete. “Mpo molimo mwa ngai mokosepela o polele; mpo nsima ya lolenge loye Nkolo Nzambe akosala o ntei ya bana ba bato. Mpo Nkolo Nzambe akopesa mwinda mpo ya bosololi.”13

Ya misato, nazelaki yango ebonga nie, bokuse mpo na kosukisa bokuse nyonso—bokuse ya nsuka oyo moko akoki te mpe asengeli te kobakisa na—yango na esika ya mosala oyo ezali kokoba oyo nakoki kobakisa liloba moko awa to esakola kuna ntango bososoli na ngai ya Bomikabi ya Yesu Klisto ezali kobakisama.

Litatoli mpe Libengisi

Ntango nazalaki elenge mobali, nayekolaki mingi uta na masolo na episikopo na ngai. Na mibu ya bolenge wana, nayekolaki kolinga maloba ya loyembo moko nalingaka:

Nazali mpenza na esengo na bolingo Yesu alakisi ngai,

Nazangi makoki ya kososola ngolu ya bofuluki oyo alakisi ngai.

Nalengaka nakotinda yo oluka Yesu oyo baprofeta mpe bapostolo bakomakikoyeba ete mpo na ngai abakamaki o ekulusu,

Ete mpo na ngai, mosumuki, ayokaki mpasi, abimaki makila mpe akufaki.

O, ezali esengo ete asengeli kobatela ngai

Mingi ya kokufa mpo na ngai!

O, ezali esengo mingi koleka, esengo mpo na ngai!14

Profeta Moroni abengisi biso: “Mpe sikawa, nalingi kotinda bino koluka Yesu na ntina ya nani oyo baprofeta mpe bapostolo bakomaki.”15

Mokambi Russell M. Nelson alakaki ete “soki [biso] tokobi koyekola manso [biso] tokoki na ntina ya Yesu Klisto, … [ya biso] makoki ya koboya masumu ekobakisama. [Ya biso] mposa ya kobatela mitindo ekoya makasi.”16

Na Eyenga ya Pasika, kaka lokola Mobikisi abimaki uta na libanga ya lilita, tika tolamuka uta na pongi na biso ya molimo mpe totombwama likolo ya mapata ya ntembe, manzaka ya bobangi, molangwa ya lolendo, mpe kimia ya lokuta. Yesu Klisto mpe Tata ya Lola bazali na bomoi. Natatoli na ntina ya bolingo na Bango ebonga nie mpo na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.