Likita Linene
Pole ya Nsango Malamu ya Bosolo mpe Bolingo
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Pole ya Nsango Malamu ya Bosolo mpe Bolingo

Natatoli ete pole ya nsango malamu ya bosolo mpe bolingo ezali kongala makasi na mabele mobimba lelo.

Loyembo kitoko ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka “Peuples du monde, écoutez donc!” na tembe te esepelisaka mpenza mpe enetolaka litondi ya nsango malamu kokendaka epai ya banso na mokili. Na kati ya nzembo oyo toyembaka:

Botia Matoyi, Bino Mabota Manso! Boyoka mongongo ya lola

Na mabele mobimba ete moto nyonso akoka kosepela

Banjelu ya nkembo bakoka koganga elongo:

Bosolo ezongisami lisusu!1

Louis F. Mönch, mokomi ya milongo oyo ya esengo, azalaki mobongwani moko ya Allemagne oyo akomaki maloba efulama mpo na loyembo ntango azalaki na Suisse na katikati ya mosala na ye ya misionele ya ntango-mobimba na Eropa.2 Esengo oyo ebimaki uta na kotatolaka nguya mobimba ya Bozongisi elobelami polele na maloba ya loyembo elandi:

Kolukaka na molili, bikolo eleli;

Kozelaka ntongo, bazali basinzili.

Bosepela; butu esili esili.

Bosolo ezongisami na mabele!3

Na lisalisi ya bobandisi ya mosala ya Bozongisi oyo ezali kaka kokende liboso oyo eleki kaka mibu 200 , “pole ya nsango malamu ya bosolo mpe bolingo”4 sikawa ezali kongala makasi na mabele mobimba. Profeta Joseph ayekolaki na 1820, mpe bantuku koleka banda wana bayekolaki, ete Nzambe “akopesaka na bato nyonso malamu koleka, mpe akopamelama te.”5

Moke nsima ya kobongisama ya Eklezia na eleko oyo ya nsuka, Nkolo ayebisaki na Joseph Smith mpe alakisaki bolingo na Ye etondi meke mpo na biso ntango Alobaki:

“Yango wana, Ngai Nkolo, koyebaka mawa oyo esengeli koyela bato ya mabele, nabiangaki mosali na ngai Joseph Smith, Moke, mpe nalobelaki ye uta na lola, mpe napesaki ye mitindo; …

“Mpo ete liyokani na ngai ya seko ekoka kotiama;

“Ete litondi ya nsango malamu na ngai ekoka kosakolama na bato mpe basokemi kino na bansuka ya mokili.”6

Ntango moke nsima ya boyambi ya limonisi oyo, bamisionele babandaki kobiangema mpe batindamaki na bikolo ebele ya mokili. Kaka lokola profeta Nefi alobaki na libandela, nsango ya nsango malamu ezongisama ebandaki koteyama “katikati ya bikolo, mabota, minoko, mpe bato nyonso.”7

“Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebongisamaki na ndako moke ya mabaya na nordi ya New York na 1830.

“Yango ezwaki mibu 117—kino 1947—mpo ete Eklezia ekola uta na bandimi motoba ya ebandeli kino nkoto moko. Bamisionele bazalaki elembo moko ya Eklezia uta mikolo na yango ya ebandela, kopanzanaka na bikolo ya babotami ya Amerika, na Canada mpe, na 1837, mosika ya Nordi ya etuka ya Amerika kino na Angleterre. Kala te nsima, bamisionele basalaki na Etuka ya mokili ya Poto mpe mosika koleka na India mpe Biteni ya mabele ya Pasifiki.

“Motango ya bandimi nkoto mibale ekokaki kaka nsima ya mibu 16, na 1963, mpe nkoto misato na mibu mwambe koleka.”8

Kotyaka mokoloto na bokoli ya lombango ya Eklezia, Mokambi Russell M. Nelson alobaki kala te: “Lelo, mosala ya Nkolo kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali kokende liboso na matambe ya mbangombango. Lobi ya Eklezia ekokokana te na oyo eleki, ekokesena na oyo ekoya.”9

Bozongisi ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, libongisi ya Eklezia ya bomoi ya Nkolo awa lisusu na mabele, mpe bokoli na yango ya kokamwa nsima boye kotya mapamboli ya bonganganzambe mpo na banso nzinganzinga na mabele. Makuli mpe mayokani ya bule oyo ekangisi biso na Nzambe mpe etye biso na nzela ya liyokani emonisi polele “nguya ya bonzambe.”10 Soki tokoti kati ya mosala wana ya bule mpo na baye bazali na bomoi mpe bakufi, tokosangisa Yisalaele na ngambo nyonso mibale ya elamba mpe kolengela mabele mpo na Bozongi ya Mibale ya Mobikisi.

Na 1973, baboti na ngai mpe ngai tokendaki mobembo uta Argentine na biso ya kobotama mpo na kokangisama na tempelo. Na ntango wana ezalaki na batempelo te na Amerika ya Latina mobimba, tokendaki mobembo ya mpepo ya bakilometele koleka 9 700 kokende na kozonga mpo na kokangisama na Tempelo ya Salt Lake City. Atako nazalaki kaka na mibu mibale ya mbotama na ntango wana mpe namikundoli te mobimba ya likambo wana ya sikisiki, bilili misato eyebani makasi uta na mobembo wana ekangamaki na makanisi na ngai mpe etikalaki libela.

Elilingi
Bomoni uta na lininisa ya mpepo

Yambo, namikundoli ete natyamaki pembeni ya lininisa ya mpepo mpe komonaka mapata ya pembe na nse.

Mapata wana, ya kitoko mpe ya kongenga ekangamaki na makanisi na ngai lokola soki ezalaka bambuma minene ya coton.

Elilingi mosusu oyo etikalaki na makanisi na ngai ezalaki biloko ya mike ya kosekisa-kotalaka na esika ya bosepeli na etuka ya Los Angeles. Biloko yango ezalaki mpasi mpo na kobosana.

Kasi mingi ya motuya koleka ezali elilingi oyo ya kongala mpe ya kobosana ata mokolo moko te:

Elilingi
Lisuku ya kokangisa ya Tempelo ya Salt Lake

Nakundolaki na pole nyonso kozalaka na kisuku moko ya bule ya tempelo ya Salt Lake epai wapi bokangisi ya babalani mpe mabota esalamaka mpo na ntango mpe mpo na boseko nyonso. Nakundolaki kitoko ya mesa esantu mpe nakanisi pole ya moi kongenga kongalaka katikati ya lininisa ya libanda ya kisuku. Nayokaki boye, mpe nakobaki koyoka kaka uta wana, esengo, bozangi bobangi, mpe kimya ya pole ya nsango malamu ya bosolo mpe bolingo.

Mayoki ya ndenge moko endimisamaki lisusu na motema na ngai mibu 20 nsima, ntango nakotaki na tempelo mpo na kokangisama mbala moko lisusu—ngonga yango ntango molongani na ngai mpe ngai tokangisamaki mpo na ntango mpe mpo na boseko nyonso. Nzokande, na libaku oyo, tozalaki na bosenga te ya kokende mobembo bamonkama ya bakilometele mpo ete Tempelo ya Buenos Aires Argentine etongamaki mpe ebulisamaki, mpe ezalaki kaka nzela ya mokuse uta na ndako na biso.

Elilingi
Libota ya Walker

Mibu ntuku mibale na mibale nsima ya libala mpe bokangisi na biso, tozwaki lipamboli ya kozonga na tempelo kaka moko wana, kasi na ntango wana elongo na mwana na biso ya mwasi ya kitoko, mpe tokangisamaki lokola libota moko mpo na ntango mpe mpo na boseko nyonso.

Ntango nakanisaki likolo ya bantango wana ya bule koleka ya bomoi na ngai, namiyokaki esengo ya bozindo mpe, ya makasi. Nayokaki mpe nakobaki koyoka bolingo ya Tata moko ya mawa ya Lola, oyo ayebi bosenga na biso moko na moko mpe babosenga na biso ya solo.

Na mateya ya bosangisi ya Yisalaele na mikolo mya nsuka, Nkolo Yehova alobaki, “Nakotya mobeko na ngai kati na bango, mpe nakokoma kati ya mitema na bango; mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”11 Nayoki botondi ya libela ete uta kibolenge na ngai, mobeko ya Nkolo ebandaki kokomama na bozindo mpenza ya motema na ngai na nzela ya makuli ya bule kati ya ndako na Ye esantu. Boniboni yango ezali motuya koyeba ete Ye azali Nzambe na biso, ete biso tozali bato na Ye, mpe atako makama ezingi biso, soki tozali na bondimi mpe totosi mayokani biso tosalaki, tokoki “kozingama mpo na libela na maboko na ye ya bolingo.”12

Katikati ya liyangani ya basi na likita linene ya sanza ya zomi 2019, Mokambi Nelson alobaki, “Babokasi na biso nyonso ya kosalela moko na mosusu, kosakola nsango malamu, konetola Basantu, mpe kosikola bakufi esalemi na kati ya tempelo.”13

Lisusu, katikati ya likita linene kaka moko wana, Mokambi Nelson ateyaki: “Ya solo, eteni ya ntina mingi koleka ya Bozongisi ezali tempelo esantu. Makuli na yango ya bule mpe mayokani ezali ntina koleka mpo na bolengeli bato oyo bamilengeli mpo na koyamba Mobikisi na Boyei na Ye ya Mibale.”14

Bozongisi oyo ezali kaka kokende liboso etiamaki mokoloto na botongi mpe bobulisi ya batempelo kokobaka na lombango. Ntango tosangani na ngambo mibale ya elamba, soki tozali komibonza mpo na kokomisa tempelo likonzi wapi bomoi na biso ezali koyekema, Nkolo azali na bosolo kotonga biso—Azali kotonga bato na Ye ya liyokani.

O boniboni nkembo ya boye uta na ngbende na likolo

Kongengisaka pole ya nsango malamu ya bosolo mpe bolingo

Bongengi lolkola ya sanza, bpngengi oyo ya lola

Engengisi bikolo nyonso lelo.15

Natatoli ete pole ya nsango malamu ya solo mpe bolingo ezali kongala makasi na mabele mobimba lelo. Mosala “ya nkembo mpe ya kokamwa” eloba profeta Yisaya16 mpe emonami na Nefi17 ezali kozwa esika mbangumbangu, atako na bangonga oyo ya mitungisi. Lokola Profeta Joseph Smith asakolaki na bosakoli nyonso, “Bendele ya Bosolo etelemi likolo; loboko epesameli nzela te ekoki kokanga mosala uta na bokobi … kino makanisi ya Nkolo ekokokisama, mpe Yehova Monene akoloba mosala esili.”18

Bandeko mibali mpe basi, tika ete tozala na mposa mpe kozwa mokano lelo ya komikotisa biso moko mpe mabota na biso na koyokaka mongongo ya lola, kutu mongongo ya Mobikisi na biso. Tika biso tosala mpe tobomba mayokani na Nzambe, oyo ekobomba biso makasi na nzela oyo ekomema kozonga liboso na Ye, mpe tika biso tosepela na mapamboli ya pole ya nkembo mpe bosolo ya nsango malamu na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.