Likita Linene
Klisto Asekwi; Bondimi kati na Ye Ekotombola Bangomba
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Klisto Asekwi; Bondimi na Ye Ekotombola Bangomba

Bondimi na Yesu Klisto ezali nguya monene koleka mpenza tozali na yango na bomoi oyo. Makambo nyonso ezali pete epai na baoyo bandimeli.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, nazali na botondi mpo na libaku ya koloba na bino na Eyenga oyo ya Pasika.1 libonza ya bomikabi mpe Lisekwa ya Yesu Klisto ebongolaki moko moko ya bomoi na biso mpo na libela. Tolingi Ye mpe tosambeli Ye mpe Tata na biso na Lola na botondi.

Na basanza motoba oyo eleki, tokobaki konyokwama na bokono oyo ya mokili mobimba. Nasepeli na bompikiliki mpe makasi na bino na eleko ya bokono, bobungisi mpe bozali na bino moko. Nasambeli ntango nyonso ete, na nzela ya makambo nyonso, bokoyoka bokobi ya bolingo ya Nkolo mpo na bino. Soki boyanoli na mikakatano na bino na makasi mpenza ya kimoyekoli, mobu oyo eleki ekozala ya mpamba te.

Na ntongo oyo, toyoki na bakambi ya Eklezia baoyo bawuti na mikili nyonso ya bato ezwami na mabele. Ya solo mpenza, mapamboli ya nsango malamu ezali mpo na libota nyonso na mokili, lokota, mpe bato. Eklezia ya Yesu Klisto ezali eklezia ya mokili mobimba. Yesu Klisto azali Mokambi na biso.

Likambo ya esengo, kutu bokono ya mokili mobimba ezalaki na makoki ya kolembisa botambwisi liboso bosolo na Ye te. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali yango nde esengeli na mokili oyo ya mobulungano, ya bondongwani, mpe ya botau.

Mwana moko na moko ya Nzambe azali na libaku ya koyoka mpe kondima libiki, nsango ya bosikoli ya Yesu Klisto. Nsango mosusu te ezali motuya koleka mpo na bomoi na biso—sikawa mpe mpo na libela.2 Nsango mosusu te ezali ya kotondisami koleka na elikya. Nsango mosusu te ekoki kolongola boswani kati na lisanga na biso.

Bondimi kati na Yesu Klisto ezali moboko ya boyambi nyonso mpe ezalela ya nguya ya bonzambe. Engebene na Apostolo Paulo, “Kozanga bondimi ezali mpasi mpo na kosepelisa [Nzambe]: mpo ete oyo ayei epai na Nzambe asengeli kondima ete azali, mpe ete azali mopesi makabo na baoyo bakoluka ye na lombango.”3

Eloko nyonso ya malamu na bomoi—lipamboli nyonso ya ntina ya seko—ebandi na bondimi. Kotika Nzambe akonza bomoi na biso ebandi na bondimi ete Ye azala na bolingi ya kokamba biso. Boyamboli ya solo ebandi na bondimi ete Yesu Klisto azali na nguya ya kopetola, kobikisa, mpe kolendisa biso.4

“Koboya nguya ya Nzambe te,” profeta Moroni asakolaki, “mpo asali ali na nguya, engebene na bondimi ya bana na bato.”5 Ezali bondimi na biso nde efungoli nguya ya Nzambe kati na bomoi na biso.

Kosalela bondimi ekoki komonana mosala ya makasi mingi. Ntango mosusu tokoki koluka koyeba soki tokoki kosangisa bondimi ya kokoka mpo na kozwa mapamboli oyo tozali na yango mposa mpenza. Na yango, Nkolo atyaki bobangi wana efanda na nzela ya maloba ya Alma profeta ya Buku ya Mormon

Elilingi
Mbuma na Sinapi

Alma asengi na biso kaka na komeka liloba mpe “tosalela eteni moko ya bondimi, iyo, atako soki [biso] tokoki te kozala na eloko mosusu koleka kondimela.”6 Liloba “eteni ya bondimi” ekundolisi ngai elaka ya Nkolo na biblia ete soki biso tozali na bondimi lokola mbuma ya nkona ya sinapi,” tokozala na makoki ya “kolobela ngomba oyo, Longwa awa, kende esika mosusu; mpe ekolongwa; mpe eloko moko te ekozala mpasi epai na [biso].”7

Elilingi
Bandeke na kati ya bambuma ya sinapi

Nkolo ayebi bolembu na biso ya nzoto. Biso nyonso tobetaka libaku ntango mosusu. Kasi Ye mpe ayebi lisusu monene ya makoki na biso. Nkona ya seneve ebandi muke kasi ekomi nzete monene mpenza mpo bandeke batonga zala kati na bitape na yango. Nkona ya seneve emonisi bondimi ya moke kasi ya kokola .8

Nkolo asengisi te bondimi ebonga nie mpo na biso kozwa nguya na Ye ebonga nie . Kasi Asengi na biso tondimela.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi ya bolingo, libiangi na ngai epai na bino na ntongo ya Pasika oyo ezali ya kobanda lelo na komatisa bondimi na bino. Na nzela ya bondimi na bino, Yesu Klisto akomatisa likoki na bino ya kotombola bangomba na bomoi na bino,9 atako mikakatano na bino moko ekoki kozala monene koleka ngomba ya Mont Everest.

Bangomba na bino ekoki kozala bozali bino moko, ntembe, bokono, to makambo mosusu ya bino moko. Bangomba na bino ekozala ya ndenge na ndenge, mpe eyano na mikakatano na bino moko na moko ezali ya komatisa bondimi na bino. Esengi mosala. Bayekoli ya botau mpe bayekoli ya goigoi bakobunda ntango nyonso mpo kozwa kutu mwa eteni moko ya bondimi.

Mpo na kosala eloko songolo malamu esengi makasi. Kokoma moyekoli ya solo ya Yesu Klisto ezali mpo na moto nyonso. Komatisa bondimi na bino mpe elikya na Ye esengi makasi. Nakoki kopesa makanisi mitano mpo na kosunga bino bomatisa bondimi mpe elikya wana.

Ya yambo, boyekoli. Kokoma moyekoli omopesi. Mikotisa yomei kati na makomi mpo na kososola malamu etinda mpe mosala ya Klisto. Koyeba malongi ya Klisto mpo ete ososola nguya na yango mpo na bomoi na yo. Kokotisa bosolo ete Bomikabi ya Yesu Klisto ezali mpo na yo. Azwaki likolo na Yemei ya yo bolozi, ya yo mabunga, ya yo bolembu, mpe ya yo masumu. Afutaki motuya ya ntalo esengeli mpe apesaki yo nguya mpo ete otombola ngomba nyonso oyo okokutana na yango. Ozwi nguya wana na bondimi na yo, elikya, mpe bolingi ya kolanda Ye.

Kotombola bangomba na yo ekoki kosenga likamwisi moko. Koyekola na ntina ya makamwisi. Makamwisi ekoya engebene na bondimi na yo na Nkolo. Ya motuya na bondimi wana ezali kolikya na bolingi mpe ntango na Ye—lolenge nini mpe ntango nini Ye akopambola yo na lisalisi ya likamwisi oyo ozali na yango mposa. Bobele se kozanga bondimi na yoekopekisa Nzambe apambola yo na makamwisi ya kotombola bangomba na kati ya yo bomoi.10

Mingi koleka ozali koyekola mpo na ntina ya Mobikisi, ekozalela yo pete mpo na koteya elikya na mawa na Ye, bolingo na Ye ezanga nsuka, mpe nguya na Ye ya makasi, ya libiki mpe ya bosikoli. Mobikisi azali pene na yo te kaka ntango ozali kokutana to komata ngomba na bondimi.

Ya mibale, pona kondimela Yesu Klisto. Soki ozali na ntembe na ntina na Nzambe Tata mpe Mwna na Ye ya Bolingo, to ntina etali Bozongisi to bosolo ya libiangi ya bonzambe ya Joseph Smith lokola profeta, pona kondimela11 mpe kotikala sembo. Mema mituna na yo epai ya Nkolo mpe na bato mosusu ya sembo. Yekola na mposa ya kondimela koleka elekya ete okoki komona mbeba kati ya bomoi ya profeta songolo to mabunga na kati ya makomi. Tika komatisa ntembe na yo na komekamekaka bato mosusu ya ntembe. Pesa Nkolo ndingisa ya kokamba yo na mobembo na yo ya bokundoli ya molimo.

Ya misato, sala na bondimi. Olingaki kosala nini soki ozalaki na bondmi koleka? Kanisa na ntina na yango. Koma na ntina na yango. Nsima zwa bondimi ebele koleka na kosalaka eloko songolo oyo esengi bondimi koleka.

Ya minei, zwa makuli ya bule na bolongobani. Makuli efungoli nguya ya Nzambe mpo na bomoi na yo.12

Mpe ya mitano, senga lisalisi, epai ya Tata na yo na Lola, na nkombo na Yesu Klisto.

Bondimi esengi mosala. Kozwa emoniseli esengi mosala. Kasi “moto nyonso oyo asengi, akozwa; mpe ye oyo aluki akokuta; mpe na ye oyo abeti, ekofungolama.”13 Nzambe ayebi oyo ekosalisa kokolisa bondimi na yo. Senga, mpe senga lisusu nsima.

Mozangi bondimi akoki koloba ete bondimi ezali mpo na bato na bolembu. Kasi liloba oyo esengeli te kobosana nguya ya bondimi. Bayekoli ya Mobikisi basengelaki bakoba koteya malongi na Ye nsima ya liwa na Ye, na likama ya bomoi na bango, soki batyelaka Ye ntembe?14 Ekokaki Joseph mpe Hyrum Smith banyokwama liwa ya bamartiru na kokotela Bozongisi ya Eklezia ya Nkolo mpo bazalaki na litatoli ya solo ete yango ezalaki solo? Esengelaki Basantu ya ebandela 2000 bakufa na nzela ya bapionie15 soki bazalaki na ntembe ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisamaki? Ya solo mpenza, bondimi ezali nguya oyo epesi likoki na oyo ekoki kozala bongo te ekokisaoyo ekoki kozala yango te.

Komona mpamba te bondimi oyo osili kozala na yango. Esengi bondimi mpo na kokota na Eklezia mpe kotikala sembo. Esengi bondimi mpo na kolanda baprofeta na esika ya banganga mayele mpe bilobaloba ya bato. Esengi bondimi mpo na kosala misio na ntango ya bokono moko ya mokili mobimba. Esengi bondimi mpo na kobika bomoi ya bopeto ntango mokili ezali konganga ete mobeko ya Nzambe ya bopeto esila ngala sikawa. Esengi bondimi mpo na koteya nsango malamu na bana na mokili ya lelo. Esengi bondimi mpo na kobondela mpo na bomoi ya molingami moko mpe kutu kozala na bondimi koleka mpo na kondima eyano ya kolembisa nzoto.

Bambula mibale eleki, Ndeko mwasi Nelson mpe ngai a totalaki Samoa, Tonga, Fiji, mpe Tahiti. Moko na moko ya bikolo ya bisanga oyo emonaka mbula ya makasi kobeta mikolo ebele. Bandimi bakilaki mpe basambelaki mpo ete mayangani na bango ya libanda ekoka kobatelema na mbula.

Na Samoa, Fiji, mpe Tahiti, kaka se ntango mayangani ebandaki, mbula ekatanaki. Kasi na Tonga, mbula ekatanaki te . Nzoka Basantu ya sembo 13.000 bayaki bangonga liboso mpo na kokanga bisika, bazalaki na motema kokita mbula ya momesano, mpe nsima bafandaki na nse ya liyangani moko ya malili ya bantango mibale.

Elilingi
Basantu ya Tonga na nse ya Mbula

Tomonaki bondimi makasi na mosala kati ya moko na moko ya bato ya bisanga wana—bondimi ekoka mpo na kopekisa mbula, mpe bondimi ya koyika mpiko ntango mbula ekatanaki te.

Bangomba na kati ya bomoi na biso ekolongwa ntango nyonso te na lolenge to ntango tolingi elongwa. Kasi bondimi na biso ntango nyonso ekopusa biso liboso. Bondimi ntango nyonso ematisi nkonzo na biso na nguya ya bonzambe.

Yeba ete: soki eloko songolo mpe moto nyonso na mokili akoki kokweya, Yesu Klisto mpe Eklezia na Ye bakokweyisa yo te. Nkolo animbi ata mokolo moko te, to mpe Ye alali te.16 “Azali se moko lobi eleki, lelo, mpe [lobi ekoya].”17 Akotika mayokani na Ye,18 bilaka na Ye, to bolingo na Ye mpo na bato na Ye. Asali makwamisi lelo mpe akosala makamwisi lobi.19

Bondimi na Yesu Klisto ezali nguya monene koleka mpenza tozali na yango na bomoi oyo. Makambo nyonso ezali pete epai na baoyo bandimeli.20

Bondimi na bino makasi epai na Ye ekotombola bangomba—bangomba ya mabanga te oyo epesi bonzenga na mabele—kasi bangomba ya mpasi na bomoi na bino. Ya bino bondimi ya makasi ekosalisa bino bobongola mikakatano ekoma esengo mpe libaku malamu.

Na Eyenga oyo ya Pasika, na mayoki na ngai ya mozindo ya bolingo mpe botondi, Nasakoli litatoli na ngai ete ya solo Yesu Klistoasekwi. Asekwi mpo kokamba Eklezia na Ye. Asekwi mpo kopambola bomoi ya bana nyonso ya Nzambe, bisika nyonso oyo bazali kobika. Na bondimi epai na Ye, tokoki kotombola bangomba kati na bomoi na biso. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.