Seminele mpe Institut
Mpo na Bakambi—Bosunga Bateyi Balonga


“Mpo na Bakambi—Bosunga Bateyi Balonga,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Ateyaka na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Mpo na Bakambi—Bosunga Bateyi Balonga,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Elilingi
Kelasi ya Eteyelo ya Eyenga

Mpo na Bakambi—Bosunga Bateyi Balonga

Kosala moko na moko

Mbala mingi lolenge ya malamu koleka nyonso mpo na kokokisa bamposa ya bateyi ezali na nzela ya kosala na moko na moko elongo. Ndakisa, lokola mokambi okoki kozwana na mwa lisolo moke elongo na moteyi yambo to nsima ya lisolo ya kelasi mpo na kosolola na ntina ya mibeko ya Liteya na Lolenge ya Mobikisi. Okoki kolengela lisolo oyo na kotalaka moteyi ntango azali koteya. Luka kososola malamu mpenza biteni ya bokasi ya moteyi mpe tala ndenge nini okoki kosunga ye.

Kotonga likolo ya biteni ya bokasi ya moteyi ezali ntina lokola mpe kotalaka mabaku mpo na kobongisa mosala na bango. Ekosalisa mingi malamu soki bobandi masolo na bateyi na kotunaka bango bayeba mpo na bango moko nini ezali kotambola malamu mpe epai wapi bakanisi nzela ezali malamu mpo na kokende liboso.

Ntango bokutani na bateyi, kanisa banzela nini ya kolendisa mpe koyikisa bango mpiko na boboto mpe botondi mpo na mosala basalaka.

Likita ya Lisanga ya Bateyi

Palwasi moko moko esengeli kosala makita ya lisanga ya bateyi nsima ya sanza misato epai wapi bateyi bakoki kosolola elongo na ntina ya mibeko ya koteya na lolenge ya Klisto. Makita ya lisanga ya bateyi ekoki lisusu kosalema mpo na baboti (tala Manuel General: Servir à l’Eglise de Jesus Christ des Saints des Derniers Jours, 13.5, ChurchofJesusChrist.org).

Ntango Nini Makita Oyo Esengeli Kosalema?

Makita ya lisanga ya bateyi esalemaka na miniti 50 ya ntango ya kelasi na Eyenga.

  • Bateyi ya banganganzambe, Lingomba ya Bamama Basungi, mpe ya Bilenge Basi bakoki kosangana na eyenga ya yambo to ya misato, lokola esengami na bakambi ya etuka.

  • Bateyi ya Eteyelo ya Eyenga bakoki kozala na Eyenga ya mibale to ya miyei, lokola elobamaki na bakambi ya etuka.

  • Bateyi ya Eteyelo ya Bana bakoki kozala na Eyenga songolo, lokola esengami na bakambi ya Eteyelo ya bana mpe Eteyelo ya Eyenga. Soki mposa ezali, bateyi ya Eteyelo ya bana bakoki kosangana na bokabwani ya bateyi mosusu mpo na kosolola na ntina ya makambo songolo ya koteya bana. Yango ekoki kosalema na miniti 20 ya ntango ya koyemba, yambo to nsima ya makita ya Eyenga, to na mokolo mosusu ya poso. Bakoki kosala makita ya bateyi koleka moko na sanza misato mpo na Eteyelo ya bana mpo ete banso bazanga te na bakelasi ya Eteyelo ya bana na poso moko. (Yeba malamu: Soki esengeli, bakambi ya Eteyelo ya bana bakopesa mokumba ya koteya na bateyi bakitani, bakosangisa bakelasi, to kosala mabongisi mosusu mpo na kopesa nzela na bateyi ya Eteyelo ya bana ete bazala na makita ya lisanga.)

  • Makita ya lisanga ya bateyi mpo na baboti ekoki kosalema na Eyenga nyonso, lokola esengami na lisanga ya palwasi.

Nani asengeli Kozala?

Moto nyonso oyo ateyaka lisanga ya likoki ya kelasi na palwasi asengeli kozala, elongo na ata moko ya bakambi ya lisanga to ya bonganganzambe oyo azali na mokumba likolo ya masanga makoki to bakelasi yango. Soki esengeli bandimi bakoki kokabwana na masanga engebene na bosenga ya baye bazali koteya. Ndakisa, bateyi ya bilenge to bana bakoki kozwa litomba ya kosangana na bokabwani na libaku moko mpo na kosolola makambo songolo mpo na koteya bilenge to bana.

Mpo na makita ya masanga ya bateyi mpo ya baboti, lisanga ya palwasi ekozwa mokano soki bakobegisa baboti songolo to kofungola bikuke mpo na banso oyo obalingi kozala wana.

Nani Akokamba Makita Yango?

Lisanga ya palwasi, na lisungi ya bakambi ya Eteyo ya Eyenga, bakokamba makita ya lisanga ya bateyi. Bakosolola elongo na ntina ya bamposa ya bateyi mpe bayekoli na kotalaka nini bamonaki na bakelasi mpe makita. Bakosala elongo mpo na koyeba nini mibeko mpe misala uta na Mateya na Lolenge ya Mobikisi ekokokisa malamu kolekaa bosenga oyo bango bamonaki .

Lokola momeseno, mokambi ya Eteyelo ya Eyenga akokamba makita ya masanga ya bateyi. Nzokande, bandimi mosusu ya palwasi bakoki kopesama mikumba ya kokamba makita soki esengeli. Bakambi ya masanga makoki mpe mangomba bakolendisa elongo na bateyi na bango mikano mpe mibeko oyo basololaki na likita.

Nini Esengeli Kosalema na Likita ya Lisanga ya Bateyi?

Likita ya lisanga ya bateyi esengeli kolanda masengami oyo:

  • Kokabola mpe kosolola elongo. Bengisa bateyi mpo na kokabola boyebi na bango ya koteya oyo bazwi kala mingi te, tuna mituna mitali mosala ya koteya, mpe kabola makanisi mpo na kolonga mikakatano. Kati na eteni ya likita oyo bakoki kotalela lisusu mibeko basololaki na makita eleki.

  • Koyekola elongo. Bengisa bateyi basolola na ntina ya moko ya mibeko oyo elandi mpe oyo balakisi na mokanda oyo: fandisa makanisi na Yesu Klisto, linga baye bozali koteya, teya na Molimo, teya malongi, mpe bengisa boyekoli na etingia. Bakoki kosalela mibeko na kozangaka kolanda molongop songolo, mpe longola se soki esengisami ndenge mosusu na lisangaya palwasi, bandimi basangani na likita bakoki kopona nini mobeko oyo elandi mpo na kosolola na ntina na yango . Bokoki kolobela na kati ya likita maye matali mobeko soki esengeli.

  • Bolengela mpe bobiangisa. Bosunga bateyi balengela lolenge nini bakosalela mobeko oyo basololaki. Lokola elongobani, bokoki kosalela elongo likambo oyo makoki maye bosololaki. Bobengisa bango bakoma mpe basalela makanisi nyonso oyo bazwi na ntina ya lolenge nini kosalela mobeko yango na mateya na bango—mpe lisusu bokasi ya koteya na mabota na bango. Bolendisa bango babanda koyekola mobeko oyo elandi mpo na kosolola na ntina na yango.

Soki ntango epesami, makita ya lisanga ya bateyi moteyi esengeli kolanda ndakisa ya mibeko oyo esololamaki.

Elilingi
bilenge basi bazali koyambana

Makita ya bateyi na lisanga ekoki kosunga bateyi basosola malamu mpe basalela mibeko ya mateya ya lolenge ya Klisto.

Bolakisa bateyi ya Sika Lolenge ya Kosalela

Lokola mokambi, ozali na mokumba ya “kosunga bateyi ya sika” na lingomba na yo mpe “kosunga bango bamilengela mpo na mabiangi na bango” (Manuel General, 17.3, ChurchofJesusChrist.org). Makita oyo ezali libaku ya kolakisa bateyi ya sika na mabiangi na bango ya sika ya bule mpe efula bango na limoni ya oyon ezali ntina mpo na koteya na lolenge ya Mobikisi. Lokola mokambi, okoki kosunga bateyi ya sika bamilengela mpo na kosalisa na kosalaka oyo elandi;

  • Llakisa elikya ete Mobikisi akosunga bango na mabiangi na bango (tala Malongi mpe Mayokani 88:78).

  • Pesa na bateyi ya sika mokanda oyo, mpe lendisa bango baluka ndenge ya kosalela mibeko na mateya na bango.

  • Kabola elongo na bateyi ya sika eloko songolo na ntina ya lingomba na bino oyo ekozala malamu mpo na bango bayeba.

  • Lokola esengeli, yebisa bateyi ya sika kelasi nini basengeli koteya na kati mpe liteya nini basengeli kobanda na yango. Pesa nsango oyo basengeli na yango oyo etali kelasi na bango mpe bandimi na bakelasi yango.

  • Limbola na bateyi ya sika ete okoki kosunga bango na libiangi na bango. Pesa lisungi na kelasi mpe lakisa mikanda oyo ekoki kosunga bango soki basengeli.

  • Tinda bango balandela mateya kati na kelasi mbala na mbala, mpe pesa biyano na bakambi lokola Molimo etindi yo oloba.

  • Bengisa bateyi bazala na makita ya lisanga ya bateyi oyo esalemaka nsima ya basanza misato na mobu.