Seminele mpe Institut
Sunga Bayekoli Baya epai ya Yesu Klisto


“Bosunga Bayekoli Baya Epai ya Yesu Klisto, ” Koteya na Lolenge ya Mobikisi: Mpo na Moto Nyonso Oyo Akoteya na Libota mpe na Eklezia (2022)

“Bosunga Bayekoli Baya Epai ya Yesu Klisto,” Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Elilingi
Yesu afandi elongo na bana

Lokola bayekoli ya nsango malamu Yesu Klisto, tosungaka basusu basosola mpe batalela mateya, nguya mpe bolingo na Ye.

Sunga Bayekoli Baya epai ya Yesu Klisto

Eloko moko te okosala lokola moteyi ekopambola bayekoli koleka kosunga bango bayeba Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpe bayoka bolingo na Bango (tala Yoane 17:3). Kanisa mayebi oyo esungaki yo oya koyeba mpe kolinga Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Nini osalaki mpo na koyekola na ntina ya bizalela, nguya mpe bolingo na Ye? Lolenge nini bolingo na yo mpo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto ememelaki yo esengo? Nsima kanisa na ntina ya bolingo na Bango mpe nguya ekoki kosala mpo na moto moko na moko oyo ozali koteya. (Tala Alma 26:16; Mose 5:11.)

Ntina na biso ya nsuka na bomoi oyo ezali ya kokoma mingi mingi lokola Tata na biso ya Lola mpe kozonga epai na Ye. Lolenge tosukisa ntina oyo ezali ya koya epai ya Yesu Klisto (tala Yoane 14:6). Yango wana, lokola profeta Nefi ateyaki, “tolobaka na ntina ya Klisto, tosepelaka kati na Klisto” (2 Nefi 25:26).

Mwana nyonso ya Nzambe azali na mposa ya mwinda mpe bosolo oyo ewutaka na Mobikisi mpe akoki kopona koyanola na yango. Mpo na kozala moyekoli ya nsango malamu ya Yesu Klisto elakisi kosunga basusu basosola mpe basalela mateya, nguya ya bosikoli mpe bolingo na Ye ebonga nie. Banza lolenge nini kolandaka makanisi ekoki kosunga yo ofula basusu bayeba malamu Yesu Klisto mpe balanda Ye.

Bosunga Bayekoli Bayeba Bolingo ya Nkolo, Nguya mpe Ngolu na Bomoi na Bango

Ezali malamu koyeba na ntina ya bolingo ya Mobikisi, nguya mpe ngolu, kasi tosengeli lisusu koyoka yango. Komonaka lolenge nini Ye apambolaki mpe akangolaki bato na kati ya makomi esungaka biso tokolisa bondimi makasi ete Ye akoka kopambola mpe kokangola biso. Ndakisa, koyekolaka na ntina ya mayebi ya Daniele ezali ya kokoka tesoki yango efuli biso te tondimela Nkolo ntango tokutani na libulu na biso moko ya bankosi.

Ntango ozali kosunga bayekoli bayeba “bangolu malamu ya Nkolo” (1 Nefi 1:20), nyonso mibale na kati ya makomi mpe na makambo bayebi na bomoi na bango moko, bakoyoka mpe bakoyeba ete Nkolo azali elongo na bango mpe akotelemela bango na bolingo (tala Doctrine et Alliances 68:6). Bakomona mpe bakoyoka bosolo ya bolingo ya Nkolo mpe ngolu na kati ya bamposa na bango moko mpe mabaku.

Elilingi
Yesu azali kopesa esakola likolo ya Ngomba

Bateyi bakoki kosunga bayekoli bayeba bolingo ya Mobikisi, nguya mpe ngolu.

Bosunga Bayekoli Balendisa Bozalani na Bango na Tata na Lola mpe Yesu Klisto

Ntina ya mateya mpe boyekoli na ntina ya Yesu Klisto ezali ya kosunga moto moko na moko apusana pene na Ye mpe ya Tata na Lola. Bosunga bato oyo bozali koteya babungisa ata moke te kotala ntina wana. Bolendisa bango balendisa mokangano na bango na Tata na Lola mpe Yesu Klisto na koyekolaka makomi, koyambolaka mbala na mbala, kolobaka elongo na Tata na losambo, mpe kotatolaka na ntina ya Tata mpe Mwana. Boteya bayekoli na liloba mpe ndakisa ya lolenge nini kosalaka mpe kobatelaka mayokani oyo ekangiis biso na Bango. Bosunga bango bayeba lolenge nini tozali ntina mpe bolingo mpo na Bango. Bolendisa bondimi na bango ete Yesu Klisto, na bolamu na Ye ya Bosikoli ebonga nie, azali bobele nzela moko ya kozonga epai ya Tata na biso. Bopesa mabaku malamu mpo na bayekoli bazwa matatoli uta na Molimo Mosantu, “oyo ezali kotatola na ntina ya Tata mpe Mwana” (Mose 5:9).

Bosunga Bayekoli Bakoma Mingi mingi lokola Yesu Klisto

Na nsuka, koyekolaka na ntina ya Yesu Klisto efulaka biso tokoma mingi lokola Ye. Kasi kokoma lokola Ye esalemaka bobele ntango tosali na bondimi, nyonso mibale na kati mpe libanda ya eteyelo, kosalaka maponi malamu ya kolanda ndakisa na Ye mpe kozwa ngolu na Ye. Bobengisa bayekoli baluka lisungi ya Molimo Mosantu mpo na kotalisa nzela bakoki kokoma mingimingi lokola Mobikisi. Bopesa bokambi mpe lisungi ntango bayekoli basala ete mosala ya koluka kozala lokola Ye ekoma mosala ya bomoi mobimba.

Yakobo ateyaki ete “biloko nyonso oyo epesamaki uta na Nzambe uta na ebandeli ya mokili” ekoki koteya biso na ntina ya Yesu Klisto (2 Nefi 11:4). Mateya na bino ekoki kozala moko ya biloko oyo. Botia Yesu Klisto na katikati ya mateya moko na moko mpe boyebi ya boyekoli. Ntango bino mpe bayekoli “bozali kosolola na ntina ya Klisto, … bosepela na Klisto, … boteya na ntina ya Klisto” (2 Nefi 25:26), Molimo Mosantu ekoki kolona litatoli ya Mobikisi elenda na kati ya makanisi mpe motema ya moto moko na moko. Ntango bozali kosunga bayekoli na bino bayeba Tata na Lola mpe Yesu Klisto mpo na bango moko, bakozala mingimingi na mposa ya kozonga epai na Bango mpo na lisungi, elikya, mpe bokangoli na bomoi na bango mobimba.