2023
Komilengela mpo na Kokota na Tempelo
Sanza ya Zomi na Mibale 2023


“Komilengela mpo na Kokota na Tempelo,” Liahona, Sanza ya Zomi na Mibale 2023.

Etinda ya Sanza ya Liahona , Sanza ya Zomi na Mibale 2023

Komilengela mpo na Kokota na Tempelo

Elilingi
bato bazali kokende na Tempelo ya Ogden Utah

Elilingi ya Tempelo ya Mboka ya Ogden Utah na Mark Brunson

Na batempelo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka tokoki kozwa mayokani mpe makuli ya bule mpo na biso moko mpe mpo na bankoko na biso. Tokotaka na tempelo mpo na kolakisa bolingo mpe botondi na biso mpo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Tokoki komilengela mpo na kokota na tempelo na koyekolaka mpe kobikaka nsango malamu ya Yesu Klisto. Mpo na koyeba makambu mosusu etali tempelo, tala lisolo ya Moboko ya Nsango Malamu “Mosala ya Tempelo” na Sanza ya Zomi 2021 ezwami kati ya Liahona.

Elilingi
maloba na libanda ya Tempelo ya Durban Afrika ya Sudi

Elilingi ya Tempelo ya Mboka ya Durban Afrika ya Sudi na Matthew Reier

Ndako ya Nkolo

Batempelo ebengamaka “ndako ya Nkolo.” Ezali bisika ya bule epai wapi tokoki koyoka Molimo ya Nzambe mpe bolingo na Ye mpo na biso. Ezali lisusu bisika wapi tokoki kosala mayokani mpe kozwa makuli ya motuya oyo ekolengela biso mpo na kozwa bomoi ya seko. (Mayokani ezali bilaka ya bule kati na Nzambe na bana na Ye.) Kozala sembo na mayokani na biso mpe kozwa makuli oyo ezali kosunga biso kozala na boyokani ya sikisiki na Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

Elilingi
bilenge batelemi libanda ya Tempelo ya Guayaquil Equateur

Elilingi ya Tempelo ya Mboka Guayaquil Equateur na Janae Bingham

Nani akoki Kokota na Tempelo?

Bandimi ya Eklezia bakoki kosala batisimo mpo na bato bakufa kobanda na mobu bakokisi mbula 12. Mondimi akoki kozwa dotasio soki azali na mbula ata 18 azala mobali to mwasi, azali na mbula moko lokola mondimi ya Eklezia, mpe alingi kosala mpe kobomba mayokani ya tempelo (tala Buku Monene: Kosala kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka, 27.2.2, ChurchofJesusChrist.org). Mobali mpe mwasi oyo basila kozwa dotasio na bango na tempelo bakoki kokangisama (kobalana) mpo na seko kati ya tempelo.

Mayokani mpe Makuli

Bokosala mayokani mpe bokozwa makuli kati ya tempelo. “Kokota na mokangano ya boyokani na Nzambe ekangisaka biso epai na Ye na lolenge oyo ekomisaka makambo nyonso etali bomoi pete koleka” (Russell M. Nelson, “Kolonga Mokili mpe Kozwa Bopemi,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2022, 97). Likuli ezali mosala ya bule ya nzoto esalami na likoki ya bonganganzambe. Makuli ezali na ndimbola ya mozindo na molimo. Ndakisa, ntango ozali kosangana na bokuli, ozali kolakisa Nzambe ete olingi kozwa mpe kobomba mayokani na Ye.

Bomilengeli ya moto ye moko.

Milengela na molimo na kolandaka mateya ya Yesu Klisto mpe kobombaka mayokani oyo osalaki na Nzambe mokolo ya libatisi. Okoki lisusu kotanga bibongiseli ya Eklezia, lokola makomi mpe mateya ya likita linene. Temples.ChurchofJesusChrist.org ezali kopesa makambo oyo osengeli kozela ntango okokota na tempelo. Ezali kosangisa mpe makambo mingi etali mayokani, makuli, mpe bilembo ya tempelo.

Elilingi
Libanda ya Tempelo ya Mboka Nauvoo Illinois

Elilingi ya Tempelo ya Mboka Nauvoo Illinois na Eve Tuft

Bilembo

Nkolo ateyaka mbala mingi na nzela ya bilembo. Ndakisa, batisimo—kokita na nse ya mayi mpe kobima lisusu—ezali lokola kufa ya bomoto na yo ya kala mpe mbotama ya bomoto nayo ya sika (tala Baloma 6:3–6). Makuli ya Tempelo ezali komonisa Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Ekoki kozala mpasi mpo na yo kososola bilembo nyonso mbala ya liboso ya kokota tempelo, kasi okoki kokoba koyekola ntango ozali kozongaka na tempelo na bomoi na yo mobimba.

Mokanda ya Ndingisa mpo na Tempelo

Mpo na kokota na tempelo, ozali na mposa ya komilengela mpe kolongobana. Okoki kozwa ndingisa mpo na kokota tempelo nsima ya lisolo na episikopo na yo to mokambi ya etape mpe mokambi ya likonzi to mokambi ya misio. Bakambi oyo bakotuna yo etukulu ya mituna mpo na kondimisama ete ozali kobika nsango malamu ya Yesu Klisto. Bakambi na yo bakoki koyebisa yo mituna yango liboso.

Kozonga na Tempelo mpo na Bankoko na Yo

Tata na Lola alingi ete bana na Ye nyonso basala mayokani na Ye mpe bazwa makuli ya bule. Makuli yango, lokola batisimo mpe dotasio, esengeli esalama na batempelo mpo na baoyo bakufa na kozangaka koyeba nsango malamu. Okoki kozonga na tempelo mpo na kosala makuli mpo na bandeko na yo ya libota oyo bakufa.