2023
Zwa Molimo mpo na Bokambi na Yo
Sanza ya Zomi 2023


“Zwa Molimo mpo na Bokambi na Yo,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Zomi 2023.

Etinda ya sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Zomi 2023

Zwa Molimo mpo na Bokambi na Yo

Tata na biso na Lola ayebaki ete na bokufi tokokutana na mikakatano, bolozi, mpe mobulu; Ayebaki tokobunda na mituna, mawa, komekama, mpe botau. Mpo na kopesa biso bokasi ya kufa mpe bokambi ya bonzambe, Apesaki Molimo Mosantu.

Na mosala ya bonzambe, Molimo afulaka, atatolaka, ateyaka, mpe atindikaka biso totambola na pole ya Nkolo. Tozali na mokumba ya bule ya koyekola koyeba bopusi na Ye na bomoi na biso mpe koyanola.

Lolenge nini tokosala yango?

Ya yambo, tosalaka makasi mpo na kozala na bomoi oyo ebongi na Molimo.

Ya mibale, tosengeli kondima kozwa Molimo.

Ya misato, tosengeli koyeba Molimo ntango ayaka.

Ya minei, tosengeli kosala na kolandaka nungunungu ya yambo.

Tika ete tozwa na motuya libiangi ya Nkolo mpo na “kozala na esengo, mpo ete nakokamba bino” (Malongi mpe Mayokani 78:18). Akambaka biso na nzela ya Molimo Mosantu. Tika ete tofanda penepene na Molimo, kosalaka nokinoki na banungunungu na biso ya yambo, koyebaka ete euti na Nzambe. Natatoli nguya ya Molimo Mosantu mpo na kokamba biso, kobatela biso, mpe kozala ntango nyonso elongo na biso.