2023
Libongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka
Sanza ya Zomi 2023


“Libongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka,” Liahona, Sanza ya Zomi 2023.

Etinda ya sanza ya Liahona Sanza ya Zomi 2023

Libongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka

Elilingi
elilingi ya Yesu Klisto

Nkolo Yesu Klisto, na Del Parson

Yesu Klisto azali moto ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Afulaka baprofeta mpe bapostolo mpo na kokamba Eklezia lelo, lokola asalaki na ntango ya Kondimana ya Sika. Basungami na bakambi mosusu ya Eklezia.

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali Eklezia ya Mobikisi. “Etongami likolo ya moboko ya bapostolo mpe baprofeta, Yesu Klisto yemoko azali libanga ya litumu ya ndako” (Baefese 2:20). Yango elakisi ete Ye azali eteni ya ntina mingi ya moboko. Akambaka Eklezia na nzela ya baprofeta mpe bapostolo oyo Ye aponi mpo na kozala bakambi.

Elilingi
Bokambi ya Yambo

Bokambi ya Yambo

Mokambi ya Eklezia azali profeta ya Nzambe na mabele lelo. Azali Apostolo monene mpe moto se moko na mabele oyo azwaka emoniseli mpo na kokamba Eklezia mobimba. Nkolo afulaka ye mpo na koyeba Bapostolo nini mibale asengeli kobianga mpo na kosala lokola bapesi toli na ye. Bango nde basali Bokambi ya Yambo. Bango misato bazali baprofeta, bamoni, mpe babimisi.

Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale

Basangani ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale bazali lisusu baprofeta, bamoni, mpe babimisi. Babiangami kozala banzeneneke ya ndenge ya Yesu Klisto. Batambolaka na mokili mobimba mpo na koteya mpe kotatola na ntina na Ye. (Tala Malongi mpe Mayokani 107:23, 33.)

Masanga Makoki ya Bantuku Nsambo

Basangani ya Bantuku Nsambo babiangami lisusu mpo kozala banzeneneke ya Yesu Klisto (tala Malongi mpe Mayokani 107:25). Basalisaka Lisanga Likoki ya Bazomi na Mibale koteya nsango malamu mpe kotonga Eklezia na mokili mobimba.

Elilingi
bakambi basangani elongo

Foto na David Bowen Winters

Bakambi ya Esika ofandi

Bokambi ya etuka to ya disitiliki na yo, bokambi ya episikopo to ya etape, mpe bokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe Lingomba ya Bamama Basungi mabiangami mpe na Nzambe. Bakoki kosalisa yo na koyekola mpe kotia nsango malamu na misala. Okoki koyekola na ntina ya boko mabiangi oyo na lisolo ya Miboko ya Nsango Malamu ya sanza ya misato 2022, “Serving in Church Callings (Kosalela na Mabiangi ya Eklezia).”