2022
Yosefe Alengeli Mboka mpo ya Ntango ya Mpasi
Sanza ya misato 2022


”Yosefe Alengeli Mboka mpo ya Ntango ya Mpasi,” Etinda ya sanza Moninga Sanza ya misato 2022

“Yosefe Alengeli Mboka mpo ya Ntango ya Mpasi”

Etinda Moninga Sanza ya misato 2022

Yosefe Alengeli Mboka mpo ya Ntango ya Mpasi

Elilingi
Yosefe liboso ya Falao

Liyemi na Apryl Stott

Yosefe azalaki profeta. Ye abikaki na Ejipito. Na butu moko Falao, mokonzi ya Ejipito, alotaki ndoto moko ya kokamwa. Ye atunaki Yosefe ndoto elimbolaki nini.

Elilingi
Mwana moke na nsaani ya mpamba

Nzambe asungaki Yosefe kososola ndoto yango. Mpo na mbula nsambo, bato bakozala na bilei beebo. Nsima ya mbula nsambo, bakozala na biloko ya kolya mingi te. Yosefe ayebisaki Falao etali ndimbola ya ndoto.

Elilingi
Yosefe azali kobomba mbuma na Ejipito

Yosefe alobaki basengeli kobomba bilei sikawa. Nsima bakozala ya kolengelama mpo ya ntango ya mpasi. Falao apesaki Yosefe mokumba ya kobomba bilei. Yosefe asalaki mosala makasi.

Elilingi
Yosefe azali kopesa mbuma na bato

Ntango mbula nsambo ya nzala eyaki, bato bazalaki na biloko mingi ya kolia. Bazalaki kutu na mingi ya kokabola na basusu.

Elilingi
libota ezali kokende na eklezia

Nakoki kolengele sikawa. Na lisungi ya Nzambe, nakoki kolonga na ntango ya mpasi!

Kopakola langi na Lokasa

Tata ya Lola Akosunga Ngai na Ntango ya Mpasi

Elilingi
bandeko bazali kopesa mbote ya nsuka

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Liyemi na Apryl Stott

Ntango nini Tata ya Lola asungaki yo?