2022
Kosala na Mabiangi ya Eklezia
Sanza ya misato 2022


“Kosala na Mabiangi ya Eklezia,” Liawona, Sanza ya misato 2022.

Etinda Liawona Sanza ya misato 2022

Kosala na Mabiangi ya Eklezia

bakambi ya Eklezia basengi bandimi basala na mikumba ya sikisiki eyebani lokola “mabiangi.” Mabiangi epesi bandimi libaku ya kosalela basusu mpe kobelema na Nzambe.

Elilingi
moto na kiti ya bibosono azali koteya na Eklezia

Foto na David Bowen Newton

Ntango tosali na mabiangi na biso, tosungi kokokisa mosala ya Nzambe. Toteyi basusu etali Tata ya Lola mpe Yesu Klisto mpe tosungi baoyo tozali koteya babelema na Bango. Tozwi lisusu mapamboli ntango tosali na bosembo nyonso.

Kozwa Mabiangi

Elilingi
elenge mobali atelemi liboso ya lingomba ya Eklezia

Baoyo basalaka na Eklezia babiangemi na Nzambe. Bakambi ya Eklezia basambelaka mpo na bofuli mpo koyeba nani kosenga mpo na kosala na libiangi moko moko. Nsima mokambi asengi mondimi mpo na kosala mpe alimboli misala ya libiangi yango. Bandimi basungami na likita ya Eklezia epai wapi bandimi ya palwasi to ya etape bapesi boponi ya kosunga. Oyo elimboli ete balingi kosunga moto oyo abiangemi. Nsima mondimi akopesamela lipamboli na mokambi moko ya bonganganzambe. Oyo ebengami botiami na mosala. Mondimi akopesamela bokonzi ya kosala na libiangi mpe mapamboli mosusu mpo kosunga ye na kosala.

Baepisikopo

Episikopo azali mokambi ya palwasi. (Na etape, mokambi ya etape akokani na episikopo.) Mokambi ya etuka akopesa nkombo ya mosimbi ya bonganganzambe ya sembo mpo kobiangema lokola episikopo. Bokambi ya Yambo ekondima libiangi. Nsima episikopo asungami mpe atyami na mosala mpo kosala. Lisusu akozwa bafungola ya bonganganzambe, oyo elimboli ete azali na bokonzi ya kokamba palwasi. Lokola episikopo, akosala mpe akokamba bandimi nyonso ya palwasi.

Bakambi

Masanga Makoki ya Bonganganzambe mpe mabongisi ya Lingomba ya Bamama mpo ya Lisalisi, ya Bilenge Basi, ya Kelasi ya Bana, mpe ya Kelasi ya Eyenga ekambami na bakambi, mbala mingi na mokambi mpe basungi mibale. Bakambi ya lisanga ya bampaka ebiangemi mpe etyami na mosala na bokambi ya etuka. Episikopo na basungi na ye basengi na bandimi kosala na babokambi mosusu na palwasi mpe batye bango na mosala. Bakambi nyonso bakosalela bandimi na masanga to mabongisi na bango. Bakoyanola na bamposa ya bandimi mpe bakosunga bango koyoka bolingo ya Nzambe.

Elilingi
mwasi amemi bilei na mama oyo azali na mwana

Mabiangi Mosusu

Mabiangi Mosusu na Eklezia esangisi mpe koteya, kosunga na miziki, kobomba bankoma, kobongisa misala ya bilenge to bana, mpe kosala na balolenge mosusu. Libiangi moko na moko na Eklezia ezali ntina mpe epesi bandimi libaku moko ya kosalela basusu mpe kosalela Nzambe. Ntango biso nyonso tosali elongo mpo kokokisa mabiangi na biso, tolendisi basusu mpe tosungi Eklezia ekola.