2018
Libonza ya Boyamboli
January 2018


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Yambo 2018

Libonza ya Boyamboli

“Mokumba na biso ezali ya kolongwa na buzoba tokoma na bonsomi, uta na bozangi kino na bokokisi,” Mokambi Thomas S. Monson ateyaki. “Mosala na biso ezali ya kokoma malamu biso moko koleka. Moko ya makabo minene koleka ya Nzambe epai na biso ezali esengo ya komeka lisusu, mpo ete mbeba moko te esengeli kotikala libela.”1

Mbala mingi tosangisaka boyei ya mobu ya sika na bamposa mpe bantina. Tozwa mokano ya kobongisa, ya kobongwana, ya komeka lisusu. Ntango mosusu lolenge ya ntina koleka tokoki komeka lisusu ezali na kosalela oyo Mokambi Monson abengaki “likabo ya boyamboli.”2

Kati ya mwa mateya na ye elandi ya uta akomaki Mokambi ya Eklezia, Mokambi Monson atei biso “tobelela makila ya bomikabi ya Klisto oyo tokoki kozwa bolimbisi ya masumu na biso, mpe mitema na biso ekoki kopetolama.”3

Bikamwisi ya Bolimbisi

“Biso nyonso tosalaki maponami ya mabe. Soki naino tobongisaki maponami oyo te, nandimisi bino ete nzela ezali mpo na kosala yango. Nzela ebengami boyamboli. Nabondeli bino bobongisa bambeba na bino. Mobikisi na biso akufaki mpo na kopesa bino na ngai likabo wana epambolama. Atako nzela ezali pete te, elaka ezali solo: ‘Atako masumu na bino ezali lokola motane, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe’ [Yisaya 1:18]. ‘Mpe ngai, Nkolo, nakokanisa yango lisusu te ata moke’ [D&C 58:42]. Kotiya bomoi na yo ya seko na likama te. Soki osumukaki, kala te obandi kozonga sima, kala te okozwa kimia ya elengi mpe esengo oyo eyaka elongo na bikamwisi ya bolimbisi.”4

Zongela Nzela

Atako esengeli ete topona na bwania, ezali na bangonga ntango tokosala maponi ya bozoba. Likabo ya boyamboli, epesami na Mobikisi na biso, ekosalisa biso tobongisa botamboli na biso, ete tokoki kozonga na nzela oyo ekomema biso na nkembo ya selesitiale wana tozali koluka.”5

Nzela ya Bozongeli

Soki moko kati na bino apesi ndingisa na masumu ekota na bomoi na ye, nandimisi bino ete makoki ya kozongela ezali. Nzela ebengami boyamboli. Atako nzela ezali mpasi, lobiko na bino ya seko eyekami likolo na yango. Nini ekoki kozala peto mingi koleka mpo na babokasi na bino? Nabondeli na bino kozwa mokano awa mpe sikawa mpo na kozwa mikano ya ntina na boyamboli ya bozindo. Soki bosaleli yango na lombango, na lombango bokozwa makoki ya kozwa kimia mpe kimia nie mpe bozangi likama oyo elobama na Yisaya [tala Yisaya 1:18].”6

Bato Bakoki Kobongwana

“Tosengeli kotia na motema ete bato bakoki kobongwana. Bakoki kotia nsima na bango mimesano ya mabe. Bakoki koyambola uta na mabunga na bango. Bakoki komema bonganganzambe na bolongobani. Mpe bakoki kosalela Nkolo na etingya.”7

Bokoma Lisusu ya Kopetolama

“Soki likama ezali na bomoi na bino, nzela ya bokangoli ezali. Botika bozangi boyengebene nyonso. Solola na episikopo na yo. Atako likambo ezali lolenge nini, ekoki kozwa eyano na nzela ya boyamboli ya solo. Bokoki kokoma lisusu ya kopetolama.”8

Mosala ya Ntina koleka ya Mobikisi

“Ntina na mwango [ya lobiko] ezali Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Kozanga libonza ya bomikabi na Ye, banso tolingaki kobunga. Yango ekoki te, nzokande, ezali pete mpo na kondimela Ye mpe mosala na Ye. Tozali na mposa ya kosala mpe koyekola, koluka mpe kosambela, koyambola mpe kobongisa. Tozali na mposa ya koyeba mibeko ya Nzambe mpe kosalela yango. Tosengeli kozwa makuli na Ye ya lobiko. Bobele na kosalaka bongo nde tokozwa esengo ya solo, ya seko.”9

Matangi

  1. “The Will Within,” Ensign, Sanza ya Mitano 1987, 68.

  2. “Choices,” Liahona, Sanza ya Mitano 2016, 86.

  3. Moziya 4:2.

  4. “The Three Rs of Choice,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2010, 69.

  5. “Maponami,” 86.

  6. “Botosa Mitindo,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2015,85.

  7. “Tala Basusu lokola Bakoki Kobongwana,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 68.

  8. “Priesthood Power,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 67.

  9. “Nzela Ebonga nie ememi na Esengo,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2016, 80.