2018
Kozwa mokano ya kotika.
January 2018


Bilenge

Kozwa mokano ya kotika.

Mokambi Monson alimboli ete “mokumba na biso ezali ya kolongwa na bozoba tokoma na mayele, uta na bozangi tokoma babongi. Mokumba na biso ezali ya kokoma malamu biso moko.” Bato ebele basalelaka Sanza ya yambo mpo na kosala bantina mpe babongola makambo: koseka ebele, kolia malamu, to koyekola likambo ya sika. Na ntango makambo oyo ekoki kosunga bino bobongwama mpo na malamu koleka, lolenge malamu mpo na kobongwana ezali na nzela ya boyamboli.

Atako boyamboli ekoki kozala mpasi, ezali likabo! Ntango totaleli Yesu Klisto na boyamboli ya masumu na biso, tozali na makoki ya kokola mpe kokende liboso. Mokambi Monson alobaki, “Ntina ya mwango [ya lobiko] mwango ezali Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Kozanga libonza ya bomikabi na Ye, banso tolingaki kobunga.” Na nzela ya boyamboli, okoki kosukwama peto na masumu na yo mpe kokende liboso mpo na kokoma mingi lokola Ye.

Kanisa eloko oyo ekoki kobatela yo uta na kokomaka lokola Mobikisi. Ezali maloba na yo? Lolenge nini ozwaka baninga to libota na yo? Nsima ya kokanisa oyo okoki kobongisa, losambo epai ya Tata na Lola mpe yebisa ye mposa na yo ya kobongwama. Kanisa ete na nzela ya nguya ya Bomikabi na Ye, Yesu Klisto akoki kosunga yo olonga botau na yo. Lokola Mokambi Monson ateyaki, “Libonza ya Boyamboli, oyo epesamaki na Mobikisi na biso, epesaka biso ndingisa ya kobongisa bomoi na biso.”