2017
Koyambaka na Bolingo Baoyo Bapengwi
October 2017


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali Sanza ya Zomi 2017

Koyambaka na Bolingo Baoyo Bapengwi

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi, Libota, Lisungi

“Atako tozali banso na botawu, tokoki kolonga yango … ,” elobaki Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi Toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo. “Atako libota na yo ekutani na makambo, atako osengeli kobongisa yango, ebandeli mpe nsuka ya likakmbo ezali bolingani, bolingo ya peto ya Klisto.”1

Na baoyo bazali kosalela nsango malamu mpenza na mobimba te, Linda K. Burton, Mokambi Monene na Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki: “Tata ya Lola alingaka bana na ye nyonso. … Kotala esika bazali te—na nzela to te—Alingaka bango bazonga ndako.”2

“Na yango baoyo bapengwi [bana na bino] basengeli kozala, … ntango bolobi to bosololi na bango, bosala yango na nkanda te, bosala yango na makasi te, na molimo ya kopesa etumbu te,” elobaki Mokambi Joseph F. Smith (1838–1918). “Kolobela bango na bosembo.”3

Mpaka Brent H. Nielson moko ya Bantuku nsambo alobelaki lisusu liteya ya Mobikisi na baoyo bazali na makuta zomi mpe babungisi moko: “Okokende koluka yango te kino okozwa yango. Ntango moto oyo abunga azali mwana na yo ya mobali to ya mwasi, ndeko na yo ya mobali to ya mwasi, … sima ya nyonso oyo tokoki kosala, tolinga bato wana na mitema na biso mobimba. …

“Tika ete bino mpe ngai tozwa bobimisi ya koyeba boniboni kopusana malamu koleka baoyo bapengwa na bomoi na biso mpe, soki esengeli, kozala na bompikiliki mpe bolingo ya Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, ntango tozali kolinga, kotala, mpe kozela baoyo babunga.”4

Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, alobaki: “Nasambelaki na bondimi ete moto oyo nalingi akoka koluka mpe koyoka nguya ya Bomikabi. Nasambelaki na bondimi ete banzelu wana ya bato bakoya kosunga bango, mpe bayaki.

“Nzambe ayemi banzela mpo na kobikisa moko na moko ya bana na Ye.”5

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Matai18:12; Alma 31:35; 3 Nefi 13:32; D&A 121:41–42;

reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. Dieter F. Uchtdorf, “In Praise of Those Who Save,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 79, 80.

  2. Linda K. Burton, in Sarah Jane Weaver, “Sister Burton, Sister Wixom Bakendaki kotala Etuka ya Elezia ya Pacific,” Basango ya Elezia, Sanza ya minei. 2, 2013, lds.org/church/news.

  3. Mateya ma Bakambi ba Eklezia: Joseph F. Smith1998), 247.

  4. Brent H. Nielson, “Waiting for the Prodigal,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 103.

  5. Henry B. Eyring, “To My Grandchildren,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 71.