2017
Bokoma Bayekoli ya Solo
October 2017


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Zomi 2017

Bokoma Bayekoli ya Solo

Na likita ya elambo nyonso, tozalaka na libaku ya kolaka Tata na Lola ete tokomikundola Mobikisi ntango nyonso to tokobatela mitindo na Ye mpo tokoka kozala na Molimo na Ye elongo (tala Moroni 4:3; 5:2; D&A 20:77, 79). Komikundola Ye ekozala ntango nyonso libaku na biso malamu ntango tozwi nkombo na Ye likolo na biso. Tosalaka yango na ndenge ebele, kasi mingi mingi ntango tosungaka basusu na nkombo na Ye, totangaka maloba na Ye, mpe tosambelaka mpo na koyeba nini Ye alingi biso tosala.

Esalamelaki ngai ntango nabatisaki elenge mobali moko. Nayebaki ete nabengamaki na basali bakulisama na Mobikisi lokola misionele mpo na koteya nsango malamu na Ye mpe kotatola na ntina na Ye mpe na ntina ya Eklezia na Ye ya solo. Moninga na ngai ya misio mpe ngai tolakaka elenge mobali moko ete asengelaki kopetolama na nzela ya nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto ntango ayambolaki na bondimi epai ya Mobikisi mpe abatisamaki na moko ya basali na Ye ya makoki.

Ntango nabimisaki elenge mobali na mai ya libatisi, alobelaki ngai na litoi, “napetolami, Nakomi peto.” Na ntango wana, namikundolaki libatisi ya Mobikisi na Yoane na ebale ya Yaladene. Atako koleka, namikundolaki ete nazalaki kosala mosala ya lobiko ya Mobikisi asekwa mpe ya bomoi—nasungamaki na Molimo Mosanto, lokola esalamelaki Yoane.

Mpo na ngai mpe moko na moko kati na biso, komikundolaka Mobikisi ekoki kozala malamu mingi koleka koyekamela mayele ya bomoto na biso mpe mayebi na Ye. Tokoki kosala maponami ya mokolo na mokolo oyo ekopusa biso pene na Ye sikawa.

Boponi ya moke ekoki kozala ya koyekola makomi. Na kosalaka bongo, tokoki kolonga mayoki ya kozala pene na Ye. Mpo na ngai, bopusani ekomaka mbala mingi ntango nayekolaka Buku ya Mormon. Na baminite ya yambo oyo natangaki na mikapo ya 2 Nefi, nayokaki na makanisi na nagi mingongo ya Nefi mpe Lehi kotalisaka Mobikisi lokola bayebaki Ye malamu bango moko. Liyoki ya bopusani eyei.

Mpo na bino, bisika mosusu na kati ya makomi ekoki mingi mingi kopusa bino pene na Ye. Kasi ezala esikaka nini mpe esika nini botangi liloba ya Nzambe, na komikitisa na likanisi ya solo mpo na komikundola mobikisi, bokomatisa mposa na bino ya kozwa nkombo na Ye likolo na bino na bomoi ya mikolo na bino.

Mposa yango ekobomgola lolenge bosungaka na Eklezia ya Nkolo. Bokosambela na Tata na bino ya Lola mpo na lisungi na bosalisi atako nini ekokomela bino kozala libiangi moke. Lisungi bokosenga ezali likoki ya komibosana bino moko mpe komipesa na oyo Mobikisi alingaka mpo na baoyo bino bobiangemi mpo na kosunga.

Nayokaki loboko na Ye mpe kozala pene na Ye na mosala na ngai elongo na bana na biso ntango nasambelaki mpo na koyeba lolenge nini ya kosunga bango bazwa kimia oyo kaka nsango malamu ekoki kopesa. Na bantango ya boye, nalengelaka moke na ntina ya komonana lokola moboti molongi, kasi nalengelaka na bozimbo na ntina ya elonga mpe bozali ya malamu ya bana na ngai.

Mposa ya kopesa na baoyo tosalisaka oyo Mobikisi akokaki kopesa bango bokambi na nsambo oyo ezali kobondelaka epai ya Tata na Lola, na bosolo na nkombo ya Yesu Klisto. Ntango tosambeli na lolenge wana—na nkombo ya Mobikisi, na bondimi epai na Ye—Tata ayanolaka. Atindaka Molimo Mosantu ekamba, elendisa, mpe ekembisa biso. Mpo ete Molimo etatolaka ntango nyonso na ntina ya Mobikisi (tala 3 Nefi 11:32, 36; 28:11; Ether 12:41), likoki na biso ya kolinga Nkolo na motema mobimba, na makanisi, mpe na bokasi ekomata (tala Malak. 12:30; Luka 10:27; D&C 59:5).

Mapamboli ya mokolo na mokolo mpe ya bomikundoli sikawa ekoya malembe malemba mpe elenda ntango tosungi Ye, kosepela na liloba na Ye, mpe kosambela na bondimi na nkombo na Ye. Mpe bomikundoli ekobongola biso tokoma ya bayekoli ya solo ya Nkolo Yesu Klisto na ati ya bokonzi na Ye na mabele oyo—mpe sima na Tata na Ye na mokili ya nkembo oyo ezali koya.