2017
Nguya ya Buku ya Mormon
May 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mitano 2017

Lokasa ya nkombo ya Buku ya Mormon

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Nabondeli moko na moko na biso toyekola mpe tomaniola na losambo makasi Buku ya Mormon mikolo oyo.

Bandeko na ngai ba bolingo mibali mpe basi, napesi bino mbote ya esengo mingi wana ezali biso kokutana lisusu na likita linene ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Yambo nabanda nsango na ngai lelo, nakolinga nalobela batempelo mitano oyo ezali kotongama na bisika elandi: Brasília, Brazil; likonzi ya greater Manila na Philippines; Nairobi na Kenya; Pocatello na Idaho, USA; mpe Saratoga Springs na Utah, USA.

Na ntongo oyo na kolobela na ntina ya nguya ya Buku ya Mormon mpe bosenga ya likama oyo tozali na yango lokola bandimi ya Eklezia oyo ya koyekola, komaniola, mpe kosalela mateya na yango na bomoi na biso. Ntina ya kozalaka na litatoli ya sikisiki mpe ya solo ya Buku ya Mormon ekoki kolobelama na kolekisa ndelo te.

Tazali na bomoi na ntango ya mobulu mpe mabe mingi. Nini ekobatela biso na lisumu mpe mabe oyo etondi mpenza na mokili lelo? Nalobi ete litatoli makasi ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe ya nsango malamu na Ye ekosalisa kokamba biso epai ya kimia. Soki ozali kotanga Buku ya Mormon mokolo na mokolo, nasengi osala yango. Soki okotanga yango na losambo mpe mposa ya bosembo mpo na koyeba bosolo, Molimo Mosantu akomonisa bosolo na yango epai na bino. Soki ezali solo—mpe natatoli na lokumu ete yango ezali—nsima Joseph Smith azalaki profeta moko oyo amonaki Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Lokola Buku ya Mormon ezali solo, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali Eklezia ya Nkolo o nse mpe, mpe bonganganzambe esantu ya Nzambe ezongisami mpo na litomba mpe lipamboli ya bana na Ye.

Soki naino ozwa litatoli ya makambo oyo te, sala oyo ezali ya ntina mpo na kozwa moko. Ezali ntina mpo na yo kozwa litatoli ya yomei, mpo na litatoli ya basusu ekoki komema yo kaka mosika.” Nzokande, ntango ezwami, litatoli esengeli kobatelama na ntina mpe na bomoi na nzela ya kotosaka ntango nyonso mitindo ya Nzambe mpe na nzela ya losambo mpe boyekoli makomi ya mokolo na mokolo.

Baninga na ngai babolingo kati na mosala ya Nkolo, na bondeli moko na moko na biso toyekola mpe tomaniola na losambo Buku ya Mormon mokolo na mokolo. Ntango tosali yango, tokolongobana mpo na koyoka mongongo ya Molimo, ya kotelemela lisenginia, ya kolonga ntembe mpe bobangi, mpe ya kozwa lisalisi ya lola na bomoi na biso. Natatoli boye na motema na ngai nyonso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.