2017
Bolingo Ebonga Nie Elongolaka Kobanga
May 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mitano 2017

Bolingo Ebonga Nie Elongolaka Kobanga

Tika totia pembeni babobangi na biso mpe na esika na yango tozala na esengo, bomikitisi, elikia, mpe bondimi ete Nkolo azali na biso.

Bandeko na ngai ya bolingo basi mpe mibali, baninga ya talo, oyo libaku moko mpe esengo moko ezali kokutana lokola Eklezia ya mokili mobimba tosangani na bondimi mpe bolingo ya Nzambe mpe bana na Ye.

Nazali na botondi mingi mpo na kozala ya profeta na biso ya bolingo Thomas{nb}S. Monson. Mokambi, tokobomba ntango nionso na motema maloba na yo bolakisi nzela, toli, mpe bwanya. Tolingi yo, Mokambi Monson, mpe tokobondela ntango nyonso mpo na yo.

Mibu ebele eleki, ntango nazalaki kosala lokola mokambi ya likonzi na Frankfurt, Allemagne, ndeko muasi moko ya talo kasi azanga bosepeli apusanaki pene na ngai na suka ya moko ya mayangani ya etuka.

“Yango ezali mabe te?” ye alobaki “Kuna ekoki kozala na bato minei to mitano lokola bazali kolala ntango ya mateya na yo!”

Nakanisaki mwa ngonga mpe nayanolaki, “nandimisami ya solo ete bolali ya eklezia ezali katikati ya bosantu ya bolali nyonso.”

Mwasi na ngai, Harriet, ayokaki mingi lisolo wana mpe sima alobaki ete yango ezalaki moko ya biyano kitoko makasi nano nayanola ata mokolo moko te.

Bopengwi Monene

Na mibu moke kama eleki na Nord ya America, lingomba moko ebengamaki “Bolamuki Monene” epalanganaki katikati ya ekolo mobimba. Moko ya bantina na bango ezalaki kolamusa bato oyo bamonanaki kozala ya kolala kotalaka makambo ya molimo.

Elenge mobali, Joseph Smith asimbamaki na makambo ayokaki uta na bateyi baoyo bazalaki bamoko ya eyamba oyo ya bolamuki. Yango ezali moko ya bantina azwaki mokano ya koluka kozua bolingi ya Nkolo na libondeli ya pembeni.

Bateyi wana bayaki na lolenge moko ya koteya ya kobangisa mpe moto mpe na mateya oyo eyebanaki mpo na kobeta nsete na yango na kobangisa ya moto ya lifelo oyo ezali kozela mosumuki1 Mateya na bango ya sika epesaki bato mpongi te—kasi yango ekokaki kopesa mwa ndoto mabe. Ntina mpe lolenge na yango ezalaki lokola mpo na kobangisa bato na eklezia.

Kobanga lokola Bisalasala

Na mambi ya kala, bato mbala mingi basalelaka kobanga lokola nzela ya kotinda bato basala likambo. Baboti basalelaki yango na bana na bango, bakambi na basali, mpe bakonzi na baponi.

Bato ya mayele na koteka basosoli nguya ya kobanga mpe mbala mingi basalelaka yango. Yango wana mpo na nini, boko ya mayebisi esalaka lokola komema nsango ya kobombana ete soki tozangi kosomba biloko ya kolia ya ntongo ya malamu to tozangi ba jeux videos ya sika to telephone ya sika, tozali na likama ya kokoma na bomoi ya bobola, kokufa biso moko kaka mpe na mawa.

Tosekaka yango mpe tokanisaka tokokweya mokolo moko te na bisalasala ya boye, kasi ntango mosusu tosalaka yango. Mabe koleka, ntango mosusu tosalelaka banzela ekokana mpo na kotinda basusu basala nini tolingi bango basala.

Mateya na ngai ezali na ba ntina mibale lelo: Ya yambo ezali kosalisa biso mpona kotala mpe komona bopanzani na yango biso tosalelaka kobanga mpo na kotinda basusu—lokola bisomei. Ya mibale ezali kopesa likanisi ya nzela eleki malamu.

Kpokoso ya Kobanga

Yambo, tika totala kpokoso ya kobanga. Na nyonso, nani o ntei na biso mokolo moko te atindamaki na kobanga na makasi kolia malamu koleka, kolata mokaba ya likama, kosala ngalasisi mingi, kobomba mosolo, to kutu koyambola masumu?

Ya solo kobanga ekoki kozala na nguya makasi na misala mpe bizalela na biso. Kasi nguya yango ezali mingimingi ya mokuse mpe ya likololikolo. Kobanga mbala mingi te ezali na nguya ya kobongola mitema na biso, mpe mokolo moko te ekokomisa biso na bato oyo balingi oyo ezali malamu mpe oyo balingi kotosa Tata ya Lola.

Bato oyo bazali na kobanga bakoki koloba mpe kosala makambo ya malamu, kasi bayokaka te makambo ya malamu. Mbala mingi bayokaka bazali na lisalisi te mpe na nkele, kutu na nkanda. Nsima ya ntango mayoki wana ekotinda na kozanga bondimi, kotelemela, kutu kotomboka.

Na mawa, lolenge oyo ya kozala mpe kokamba esuki te na mokili ya bomoto. Esalaki ngai mpasi koyoka bandimi ya Eklezia oyo basalelaka bokonzi ya mabe—ezala na bandako na bango, na mabiangi na bango ya eklezia, to na babozalani na bango ya mokolo na mokolo na basusu.

Mingi mingi, bato bakoki kosambisa motungisi na basusu, kasi bakoki te komona yango na bangomei. Basengaka kotosa na mibeko na bangomei mpenza. Kasi ntango basusu balandi mibeko oyo ya bongo na bongo te, bango bakopesa bango etumbu na maloba, na mayoki, mpe ntango mosusu kutu na nzoto.

Nkolo alobaki ete “ntango biso … tosaleli bososoli to bokonzi to botindi na makasi likolo ya milimo ya bana ya bato, na ndelo nyonso ya bosembo te, …. likolo emilongoli [mpe] Molimo ya Nkolo etungisami.”2

Ekoki kozala bangonga oyo tosenginiami na kolongisa misala na biso na kokanisaka ete nsuka elongisaka nzela. Tokoki kutu kokanisa ete kososola, kosala bisalasala, kosala makasi ekozala mpo na bolamu ya basusu. Bongo te, mpo Nkolo alakisi polele ete “mbuma ya Molimo ezali bolingo, esengo, kimia, motema molai, boboto, bolamu, bondimi, bosokemi, [mpe] bosembo.”3

Nzela Eleki Malamu

Mingi nayei koyeba Tata na ngai ya Lola mingi namoni boniboni Ye afulaka mpe akambaka bana na Ye. Ye azali kanda te, kozongisa mabe te, to kopesaka bitumbu te.4 Ntina na Ye monene—mosala na Ye mpe Nkembo na Ye—ezali kotamboli biso, kolendisa biso, mpe komema biso na botondi na Ye.5

Nzambe amilimbolaki na Mose lokola “ya ngolu mpe mawa, ya motema molai, mpe atonda na bolamu mpe bosolo.”6

Bolingo ya Tata na biso na Lola mpo na biso, bana na Ye, eleki mosika bokoki na biso ya kososola.7

Elingi koloba ete Nzambe atikaka to atalaka mpamba bizalela oyo ezali na bokeseni na mitindo na Ye? Te, atamoke te!

Kasi alingi kobongola koleka kaka bizalela na biso. Alingi kobongola lolenge na biso mpenza. Alingi kobongola mitema na biso.

Alingi biso tokende mpe tosimba sikisiki na lingenda ya ebende, totelemela kobanga na biso, mpe na mpiko tokende liboso mpe likolo na nzela eke mpe ya nkaka. Ye alingi yango mpo na biso mpamba te Ye alingi biso, mpe mpamba te yango ezali nzela ya esengo.

Boye, lolenge nini Nzambe asungaki bana na Ye balanda Ye na mikolo na biso.

Atindaki Mwana na Ye

Nzambe atindaki Mwana Mobali ya likinda, Yesu Klisto, mpo na kolakisa biso nzela.

Nzambe asungi na nzela ya kondimisa, motema molai, boboto, bosokemi, mpe bolingo ezanga lokuta.8 Nzambe azali na ngambo na biso. Ye alingaka biso, mpe ntango tobeti libaku, Ye alingi biso totelema, tomeka lisusu, mpe tokoma makasi koleka.

Azali Molobeli na biso.

Ye azali elikia na biso ya monene mpe ya bolingo.

Ye alingi kopesa biso mposa na bondimi.

Ye atieli biso motema ete toyekola mbeba na biso mpe tosala maponi malamu.

Oyo ezali nzela malamu mingi!9

Nini na Mabe ya Mokili?

Moko ya banzela Satana alingi biso kosalasala basusu ezali na kokangamaka likolo ya mpe kutu kokomisaka monene mabe na mokili.

Na ntembe te mokili na biso ezalaka ntango nyonso, mpe ekokoba kozala, ya kobonga mpenza te. Bato mingi mpenza na mpamba kaka bazwaka mpasi na ntina ya makambo ya mokili mpe bozangi bomoto ya bato. Bobebi mpe nkuna na mikolo na biso ekokani na mosusu te mpe ezali ya kobangisa.

Kasi atako oyo nyoso, nalingaki te kozala na ngonga mosusu na mambi ya mokili. Topambolami komekisa te ya kozala na mikolo ezangi kokokana, pole, mpe litomba ezala naino te. Mingi na biso, topambolami na kozala na litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, oyo epesi biso bomoni moko ezala te ya makama ya mokili mpe kolakisa biso boniboni koboya makama oyo to kozala na yango.

Ntango nakanisi mapamboli oyo, nalingi kobuaka mabolongo na ngai na nse mpe kopesa masanzoli na Tata na biso ya Lola mpo na bolingo na Ye ezanga suka mpo na bana na Ye nyonso.

Nandimi te ete Nzambe alingi bana na Ye bazala na kobanga to kokangama na mabe na mokili. “Mpo Nzambe apesi biso molimo ya kobanga te, kasi ya nguya, mpe bolingo, mpe ya molimo ya pole.”10

Ye apesi biso ntina mingi ya kosepela. Tosengeli kaka koluka mpe komona yango. Nkolo mbala mingi akundolisaka biso na “kozala na kobanga te,” na “kozala na nsomo te,”11 mpe na “kobanga te,” na lingomba moke.”12

Nkolo Akobunda Bitumba na Biso

Bandeko mibali mpe basi, tozali “etonga moke” Ya Nkolo. Tozali Basantu ya Mikolo ya nsuka. Na kati ya nkombo na biso ezali na mokano ya kotala liboso na bozongi ya Mobikisi mpe komilengela biso moko mpe kolengela mokili mpo na koyamba Ye. Yango wana, tosalela Nkolo mpe tolinga baninga na biso bato. Tosala yango na bondimami moko ya solo, na bomikitisi, kotiolaka mokolo moko te eyamba to liboke mosusu ya bato. Bandeko mibali mpe basi, tozali na mokumba ya koyekola liloba ya Nzambe mpe kosala keba na mongongo ya Molimo, ete tokoki “koyeba bilembo ya bantango, mpe bilembo ya boyei ya Mwana ya Moto.”13

Tozangi, bongo, koyeba te mikakatano ya mokili, mpe tozangi te koyeba bakpokoso ya ntango na biso. Kasi yango elingi koloba te ete tosengeli kotondisa bisomei to basusu na kobanga ya ntango nyonso. Esika ya kokangama na bonene mingi ya mikakatano na biso, eleki malamu kokangama na bonene ezangi suka, bolamu, nguya ya Nzambe na biso te, kondimaka Ye, mpe komilengeleka na esengo na motema mpo na bozongi ya Yesu Klisto?

Lokola bato ya boyokani, tosengeli te kobukanabukana na kobanga na ntina ya makambo ya mabe ekoki koya. Esika na yango, tokoki kokende liboso na bondimi, mpiko, mokano, mpe elikia na Nzambe ntango tobelemi mikakatano mpe mabaku liboso.14

Tokotambola na nzela ya boyekoli biso moko te. “Nkolo Nzambe na bino … akokende elongo na bino; akotika bino te, to kosundola bino te.”15

“Nkolo akobunda mpo na bino, mpe bokosimba kimia na bino.”16

Liboso ya kobanga, tika tozala na mpiko na biso, tosangisa bondimi na biso, mpe tozala na elikia ya makasi na elaka ete “monduki oyo etelemeli bino ekosimba te.”17

Ezali biso na ntango ya likama to mobulu? Na ntembe te tozali na yango.

Nzambe Yemei alobaki, “Na mokili tokozala ba mitungisi: kasi bozala ya kosepela nalonga mokili.”18

Ekoki biso kosalela bondimi mpo ba kondima mpe kosala engebene? Ekoki biso kozala na baboyokani mpe mayokani ya bule? Ekoki biso kobomba mitindo ya Nzambe atako kobundaka na makambo? Na ntembe te tokoki!

Tokoki mpamba te Nzambe alaki, “nyonso ekosala elongo mpo bolamu na bino, soki [bino] botamboli alima.”19 Tika totia pembeni babobangi na biso mpe na esika na yango tozala na esengo, elikia, mpe bondimi ete Nkolo azali na biso.

Bolingo Ebonga Mpenza Elongolaka Kobanga.

Baninga na ngai balingami, bandeko ba ngai mibali mpe basi kati na Klisto, soki bomimoni ete bozali na kobanga to kobangabanga, to soki tomoni ete maloba, bizalela, to misala na bisomei ezali kobangisa basusu, nasambeli na bokasi bonso ya molimo na ngai ete tokoki kokoma ya kokangolama uta na bobangi oyo na nzela ya nkisi oyo epesami na Nzambe mpo kobanga: bolingo ya petua ya Klisto mpo “bolingo ebonga mpenza elongolaka kobanga.”20

Bolingo ebonga mpenza ya Klisto elongaka masenginia ya kosala mabe, kobangisa, koniokola, to kotungisa.

Bolingo ebonga mpenza ya Klisto ekopesa biso nzela ya kotambola na bomikitisi, bolongobani, mpe elikia lokola balandi ya Mobikisi na biso ya bolingo. Bolingo ebonga mpenza ya Klisto ekopesa biso elikia ya kosala atako na kati ya kobanga na biso mpe kotia elikia na biso mobimba na nguya mpe bolamu ya Tata na biso ya Lola, mpe Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto.

Na bandako ba biso, na bisika na biso ya nkita, na mabiangi na biso na Eklezia, na mitema ba bisomei, tika tokitanisa kobanga na bolingo ebonga penza ya Klisto. Bolingo ya Klisto ekokitanisa kobanga.

Bolingo na Ye ekopesa biso likoki ya kososola, kozala na elikia, mpe bondimi na bolamu epusi ya Tata na biso ya Lola, mwango na Ye ya bonzambe, nsango malamu na Ye, mpe mitindo na Ye.21 Kolingaka Nzambe mpe kiboninga ekobongolaka botosi na biso ya mitindo ya Nzambe na lipamboli esika ya mokumba. Bolingo ya Nkolo ekosunga biso kokoma malamu moke, kolimbisaka mingi, kobatelaka mingi, mpe komipesa mingi na mosala na Ye.

Lokola biso totondisi mitema na biso na bolingo ya Klisto, tokolamuka na molimo ya sika epetwami mpe tokotambola na esengo makasi, na bondimi, ya kolamuka mpe ya bomoi kati na pole mpe nkembo ya Mobikisi na biso ya bolingo, Yesu Klisto.

Natatoli, elongo na Apostolo Yoane, “Ezali na kobanga te na bolingo ya [Klisto].”22 Bandeko mibali mpe basi, baninga ba bolingo, tozali na mposa ya batalanta mpe baemoneli na bino ya malamu. Ye alingaka bino malamu mpenza. Ye ayebi nini mikolo ekoya na bino ezali. Ye alingi bino “bobanga te, bobele bolikia.”23 mpe “kokangama na bolingo na ye ebonga [mpenza].”24 Oyo ezali libondeli mpe lipamboli na ngai na kombo ya Yezu Klisto, amene.

Matangi

  1. George Whitefield mpe Jonathan Edwards bazali bandakisa ya lolenge oyo ya moteyi.

  2. Doctrine and Covenants 121:37.

  3. Bagalatia 5:22–23

  4. Na libaku moko, Mobikisi alingaki kokota na mboka moko ya Basamalia, kasi bato yango babwakisaki Yesu mpe balingaki koyamba Ye kati na mboka na bango te. Mibale ya bayekoli na Ye batukamaki na yango mpe batunaki, “Nkolo, Olingi biso totinda moto ekita uta na lola mpe ezikisa bango?” Yesu ayanolaki na likebisi oyo: “Boyebi te ya lolenge nini ya molimo bozali. Mpo Mwana na Moto ayaki mpo na kobebisa bomoi ya bato te kasi mpo na kobikisa bango” (tala Luka 9:51–56, New King James Version [1982]).

  5. Tala Moïse 1:39; tala lisusu Baefse 3:19.

  6. Esode 34:6.

  7. Tala Baefse 3:19.

  8. Tala Doctrine and Covenants 121:41. Na ntembe te soki Nzambe azeli na bino, bana na ye ya kufa, tozala na lolenge oyo, Ye—mozali abonga mpenza oyo azali na mabongi nyonso—asengeli kozala ndakisa mpo na ezaleli wana.

  9. Likita ya Lola ezali ndakisa moko malamu mingi ya koyekola oyo elakisa ezalela ya Nzambe. Kuna Tata ya Lola alakisaki mwango na Ye mpo ba bokoli na biso ya seko. Biloko eleki na motuya ya mwango wana oyo ezali na boponi, botosi, mpe lobiko na nzela ya Bomikabi ya Klisto. Lusifelo, nzokande, apesaki nzela moko mosusu. Ye atiaki asengaki ete banso batosa—moko te alingaki kozanga. Nzela se moko mpo na kosala yango ezalaki na nzela ya moniokoli mpe makasi. Kasi Tata na biso na Lola alingaki te kotika mwango ya bongo. Atiaki motuya na boponi bana na Ye. Ayebaki ete tosengelaki kosala mabunga na nzela soki tosengeli koyekola. Mpe yango wana Ye apesaki Mobikisi, oyo ya ye libonza ekokaki kopetola biso na masumu mpe kopesa ndingisa ya bokoti na biso mpo na kozonga na bokonzi ya Nzambe.

    Ntango Tata na biso ya Lola amonaki ete bana na Ye mingi ya bolingo basenginiamaki na Lusifelo, akangaki bango na makasi na mwango na Ye? Abangisaki to akanelaki baye bazalaki kosala boponi ya nsomo boye? Te. Nzambe na bino ya nguya nyonso akokaki kokanga na ntembe te botomboki oyo. Akokaki kotia bolingi na Ye na makasi likolo ya bapengui mpe kosala batosa. Kasi esika na yango, Ye apesaki nzela na bana na Ye bapona mpo ba bango moko.

  10. 2 Timote 1:7.

  11. Tala, mpo na ndakisa, Yoshua 1:9; Yisaya 41:13; Luka 12:32; Yoane 16:33; 1 Petelo 3:14; Doctrine and Covenants 6:36; 50:41; 61:36; 78:18.

  12. Luka 12:32.

  13. Doctrine and Covenants 68:11.

  14. Toli ya Mose epai ya bato ya mboka na ye ezali naino kosalamela: “Bobanga te. … Botala lobiko ya Nkolo, oyo Ye akokokisa mpo na bino lelo” (Esode 14:13, New King James Version).

  15. Dutelenome 31:6.

  16. Esode 14:14, New King James Version.

  17. Yisaya 53:3

  18. Yoane 16:33.

  19. Doctrine and Covenants 90:24; tala lisusu 2 Bakolinti 2:14; Doctrine and Covenants 105:14.

  20. 1 Yoane 4:18.

  21. Tika tomikundola ete Mobikisi ayaki te “kati na mokili ete asambisa motikili te kasi ete mokili ebika mpo na ye” (Yoane 3:17). Solo, “akosala eloko te longola se soki ezali mpo ya litomba ya mokili; mpo alingi mokili, kutu ete akopesa bomoi bwa yemei ete akoka kobenda bato banso epai ya ye.” (2 Nefi 26:24).

  22. 1 Yoane 4:18; tala lisusu 1 Yoane 4:16.

  23. Malako 5:36.

  24. Yoane 15:10.