2017
Bomikabi ya Klisto ezali Elembo ya solo ya Bolingo ya Nzambe.
sánzá ya míbalé 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mibale 2017

Bomikabi ya Klisto ezali Elembo ya solo ya Bolingo ya Nzambe

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofulami mpo na koyeba maye bosengeli koteya.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Kososolaka ete Tata na biso na Lola apesaki Mwana wa Ye se Moko mpo ete tokoka kozwa bozangi kufa mpe likoki mpo na bomoi ya seko esalisi biso toyoka bolingo ezangi nsuka mpe ezangi bososoli mpo na biso. Mobikisi na biso alingi biso.

“Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? …

“Mpo nandimi solo, ete ata kufa, ata bomoi, ata banzelu, ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata banguya,

“Ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki kokabola biso te na bolingo na nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso” (Baloma 8:35, 38–39).

Na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki: “Mpasi ya Mobikisi na Getesemane mpe bobundi na Ye na liwa likolo ya ekulusu esikoli biso uta na lisumu na kokokisaka babonsenga oyo boyengebene ezali na yango likolo na biso. Asemboli ngolu mpe alimbisi baoyo bayamboli. Bomikabi ya Yesu Klisto lisusu ekokisi niongo boyengebene esengeli kopesa biso na kobikisaka mpe kofutaka biso mpo na mpasi nyonso oyo tozali koniokwama na bozangi koyeba. ‘Mpo tala, akoyoka bolozi, iyo, bolozi ya ekelamo na ekelamo ya bomoi, mibali, basi lokola, mpe bana, baye bazali ya libota ya Adama’ (2 Nefi 9:21; tala lisusu Alma 7:11–12).”1

Klisto “akomi [biso] likolo ya matandu ya maboko na [Ye]” (Yisaya 49:16). Linda K. Burton, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki: “Ekela wana eluti ya bolingo esengeli kotinda moko na moko na biso epai ya mabolongo na biso na losambo ya komikitisa mpo na kotondo Tata na biso na Lola mpo na kolingaka biso ya kokoka ete Atindaki Mwana na Ye se Moko mpe ya botosi aniokwama mpo na masumu na biso, bampasi ya motema na biso, mpe nyonso oyo ezali komonana lokola bosembo te na bomoi ya moko na moko na biso.”2

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Yoane 3:16; 2 Nefi 2:6–7, 9; reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. D.Todd Christofferson, “Bosikoli,” Liahona, Nsanza ya mitano 2013, 110.

  2. Linda K. Burton, “Is Faith in the Atonement of Jesus Christ Written in Our Hearts?” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2012, 114.

Bolanda Oyo

Boniboni ekoki biso kolakisa botondi na biso mpe bolingo epai ya Nzambe mpe Yesu Klisto mpo na likabo ya Bomikabi ya Mobikisi na biso?