2017
Kosambela mpo na Kimia
sánzá ya míbalé 2017


Bilenge

Kosambela mpo na Kimia

Mokomi afandaka na Arizona, Etazini ya Amerika.

Baboti na ngai mbala mingi bazalaki kokende na mayangani nsima ya eklezia, mpe nazalaki kokengela baleki na ngai misato ya mibali mpe kolambela bango elambo ya midi—atako mbala mingi bazalaki nkanda nkanda mpe na nzala. mingimingi soki babandi kobunda, nazalaki kosilisa makambo mike yango nokinoki. Kasi ntango mosusu ezalaki mpasi kotia kimia soki etumba ebandi mpo ete nazalaki koningisama.

Nsima ya nzanga moko, baleki na ngai ya mibali bazalaki na mikakatano ya ndenge mpo na koyokana. Namonaki ete makasi na ngai ya kosala kimia ebebisaki makambo mpo nasilikaki. Yango wana nalambaki elambo ya midi ya ngai moko mpe natikaki koloba . Na nsuka, nalobaki, “nalingi kosambela. Nasengi ekoki biso kotika makelele monuti moko?” Ntango batikaki, nasengaki limpamboli likolo ya molia. Liboso nasukisa losambo, nabakisaki, “mpe nasengi osalisa biso tozala basali kimia.”

Na yambo, bamonanaki lokola koyoka te mpe babandaki kobunda lisusu. Nasilikaki kasi nayebaki ete nasengelaki kozala na bolingo mpe kimia lokola ekokaki ngai mpamba te nautaka kosambela mpo na kimia. Nsima ya monuti, nayokaki kimia. Naliaki kolobaka eloko moko te, mpe bana mibali na nsuka batikaki kobunda. Nasosolaki ete kimia oyo nayokaki ezalaki eyano na losambo moko ya pete. Nasambelaka mpo na kozala mosali ya kimia, mpe Tata na ngai na Lola asalisaka ngai natikala kimia ntango ezalaki pete mpenza koganga. Nayebi ete Akoki kopesa biso kimia .