Mambi ya kala ya Eklezia
“Tozalaki na Esengo Wana kati na Motema na Biso”


“‘Tozalaki na Esengo Wana kati na Motema na Biso,’” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo (2020)

“‘Tozalaki na Esengo Wana kati na Motema na Biso,’” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo

“Tozalaki na Esengo Wana kati na Motema na Biso”

Na 1989 ntango Daniel mpe Thérèse Kola bayokaki etali nsango malamu ezongisama, mingi ya bozwi na bango ewutaki na mombongo ya kafe, tumbaku, mpe masanga na nganda na bango. Nsima ya kondima Liloba ya Bwania, atako, bazalaki komituna soki ezalaki malamu na koteka biloko bazalaki kokima. Basololaki nini kosala kino mokolo ya libatisi na bango. Bazwaki mokano ya kotika oyo ezalaki kopesa bango limpa, lokola bayekoli ya kala ya Klisto. “Na ntongo, bazwaki mokano,” emikundolaki Daniel Kola. Batekaki butiki na bango mpe babatisamaki, kondimaka ete basalaki oyo Nkolo alingaki bango basala. “Tozalaki na esengo wana kati na motema na biso mpo toyokaki eloko moko.”

Na mibu nsambo nsima, Daniel mpe Thérèse basalelaki Nzambe na bosembo lokola Eklezia ezalaki kokola na ekolo na bango. Lokola basusu na nkola ya yambo ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya RD Congo, bayekolaki moke moke. Na 1996 bakambi ya Eklezia ya Bacongolais basengamaki koleka na etape ya sika ya kokola na bango. Atako Kinshasa ezalaki pene ya 4,000 kilometele uta na tempelo ya penepene mpenza, na Johannesburg, Afrika ya Sudi, liboke moko ya bakambi ya mboka babengisamaki bakende mobembo na tempelo elongo mpo na kolatisama na nguya uta na lola mpe kokangisama na balongani na bango mpo na seko. Ezalaki mobembo ya tempelo na liboke ya yambo na lisitwale ya Congo.

Mibu nsima ya mobembo ya tempelo yango ezalaki mibu moko ya motuya mpo na Eklezia na Congo. Na nsuka ya mibu 1990, etuka nsima ya etuka ebongisamaki na Congo. Mingi ya mibali oyo babiangemaki yambo lokola bakambi ya bituka, kobakisa Daniel Kola, bazalaki na molongo ya bato basalaki mobembo wana ya tempelo.

Na 2007 Daniel Kola abiangemaki lokola Ntuku Nsambo ya Etuka Enene. Mobu ya nsima, akendaki mobembo na Utah mpo na kozala na likita linene mpe apambolamaki na kokotaka na tempelo mbala mitano mosusu mpo na kosala makuli ya ebandeli, bolatisami na nguya ya molimo , mpe bokangisi mpo na bankoko na ye, kobakisa kokangisamaka na baboti na ye moko. “Ntango nazwaki bolatisami na nguya ya molimo na ngai, ezalaki na mingi nasosolaki te,” Kola alobaki. “Kasi lelo, nasosolaka mpe boyebi na ngai ezali ya mozindo mingi koleka.”

Lokola akolisaki bosepeli ya mozindo mingi koleka mpo na tempelo, Kola akolisaki lisusu bolingo makasi na mambi ya kala ya libota. Elongo na basusu, ayaki koyeba ete azalaki na ngonga moko ya motuya, ntango bankombo mpe masolo ya bankoko mingi bazalaki naino na likoki ya bokundoli na bomoi kasi likama ya kobunga soki bakomamaki te. Na 2018 lingomba elukaka litomba te ya Daniel Kola eyokanaki na FamilySearch mpo na kosala mobembo nzinga nzinga ya République Démocrotique du Congo mpo na kokoma kokanga mambi ya kala ya maloba, kokanaka kosangisa bankombo 400.000 na basanza 12 .