Mambi ya kala ya Eklezia
Boyingisi


“Boyingisi,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba (2018)

Boyingisi

Libiki ya bana ya Nzambe ezali moboko ya nsango malamu na Ye. Alakaki ete “bikolo nyonso ya mokili [e]kopambolama” na nzela ya mboto ya Abalayama (Genese 22:18), mpe na babateli mpate ya pamba kati na Yudea, esakolamaki ete “nsango ya nsai” ya nsango malamu etindamaki na “bato banso” (Luka 2:10). Na nkasa ya ebandeli ya Buku ya Mormon, Nefi asakolaki ete Nkolo “akosala eloko te longola se soki ezali mpo ya litomba ya mokili; mpo alingi mokili, kutu ete akopesa bomoi bwa yemei ete akoka kobenda mibali banso [mpe basi] epai ya ye.”(2 Nefi 26:24; italiki ebakisami).

Mwa ntango moke nsima ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ebongisamaki, Nkolo atindaki Basantu mpo na koteya nsango malamu na mokili mobimba: “Mpo ete akotia bolumbu loboko na ye losantu o miso mya bikolo binso,” Nkolo alobaki na 1831. “Bomilengela, bomilengela, O bato na ngai. … Tika mongongo ekende o ntei ya bato banso” (Malongi mpe Mayokani 133:3–4, 10). Yango wana, Basantu ya sembo bandimaki mabiangi ya koteya na mokili mobimba, Buku ya Mormon ebongolami (na mobimba to na eteni) na bankota koleka 110, mpe mangomba matiami mpe ekomi ebele na mokili mobimba.

Atako Basantu mingi basosoli ete Eklezia ezali boyambi ya mokili mobimba, mambi ma kala ya Eklezia na bisika mingi ya mokili eyebani malamu. Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba oyo eluki kokabola lisolo efulami ya lolenge nini nsango ya Bozongisami eyambami mpe ekabolami kati na mokili mobima.

Mambi ma kala moko moko ezali na bokuse, mikanda ya kala ya masolo ya bondimi, manaka, bansango, mpe batangi mosusu bakoki kotanga. Masolo matali bandimi ya mboka baoyo bayoki mpe batosi libiangi ya Mobikisi na “kosakola liloba kati na bikolo zinga nzinga mpembeni na bango” (Malongi mpe Mayokani 52:39) mpe baoyo basaleli bondimi na kolonga mikakatano moko oyo ya kozala Basantu ba Mikolo mya Nsuka na bamboka na bango.